< 1 Re 18 >

1 Dopo molto tempo, il Signore disse a Elia, nell'anno terzo: «Su, mostrati ad Acab; io concederò la pioggia alla terra».
Sima na tango molayi, na mobu ya misato, Yawe alobaki na Eliya: « Kende komimonisa epai ya Akabi, mpe Ngai nakonokisa mvula na mokili oyo. »
2 Elia andò a farsi vedere da Acab. In Samaria c'era una grande carestia.
Eliya akendeki komimonisa epai ya Akabi. Wana nzala ezalaki makasi na Samari,
3 Acab convocò Abdia maggiordomo. Abdia temeva molto Dio;
Akabi abengisaki Abidiasi, mobateli bikolo ya ndako na ye. Nzokande Abidiasi azalaki kotosa Yawe mingi.
4 quando Gezabele uccideva i profeti del Signore, Abdia prese cento profeti e ne nascose cinquanta alla volta in una caverna e procurò loro pane e acqua.
Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga: basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.
5 Acab disse ad Abdia: «Và nel paese verso tutte le sorgenti e tutti i torrenti della regione; forse troveremo erba per tenere in vita cavalli e muli e non dovremo uccidere una parte del bestiame».
Akabi apesaki mitindo na Abidiasi: « Tambola kati na mokili mobimba, na bitima nyonso ya mayi mpe na miluka nyonso; tango mosusu tokoki kozwa matiti ya mobesu mpe tokobatela bomoi ya bampunda mpe ya bamile mpo ete toboma lisusu te ndambo ya bibwele na biso. »
6 Si divisero la regione da percorrere; Acab andò per una strada e Abdia per un'altra.
Bakabolaki mokili mpo na kotambola kati na yango, Akabi akendeki ye moko na ngambo moko, Abidiasi mpe akendeki ye moko na ngambo mosusu.
7 Mentre Abdia era in cammino, ecco farglisi incontro Elia. Quegli lo riconobbe e si prostrò con la faccia a terra dicendo: «Non sei tu il mio signore Elia?».
Wana Abidiasi azalaki kokende, Eliya akutanaki na ye. Abidiasi asosolaki ete ezali ye, afukamaki elongi kino na se mpe alobaki: — Boni, ezali penza yo, Eliya, nkolo na ngai?
8 Gli rispose: «Lo sono; su, dì al tuo padrone: C'è qui Elia».
Eliya azongisaki: — Iyo, ezali ngai. Kende koyebisa mokonzi na yo ete Eliya azali awa.
9 Quegli disse: «Che male ho fatto perché tu consegni il tuo servo ad Acab perché egli mi uccida?
Abidiasi atunaki: — Likambo nini ya mabe ngai nasali mpo ete okaba mosali na yo epai ya Akabi mpo ete baboma ngai?
10 Per la vita del Signore tuo Dio, non esiste un popolo o un regno in cui il mio padrone non abbia mandato a cercarti. Se gli rispondevano: Non c'è! egli faceva giurare il popolo o il regno di non averti trovato.
Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.
11 Ora tu dici: Su, dì al tuo signore: C'è qui Elia!
Kasi sik’oyo otindi ngai ete nakende epai ya mokonzi na ngai koyebisa ye ete Eliya azali awa.
12 Appena sarò partito da te, lo spirito del Signore ti porterà in un luogo a me ignoto. Se io vado a riferirlo ad Acab egli, non trovandoti, mi ucciderà; ora il tuo servo teme il Signore fin dalla sua giovinezza.
Nayebi te esika nini Molimo na Yawe akoki komema yo tango nakotika yo. Soki namemi sango epai ya Akabi, kasi ye amoni yo te, akoboma ngai. Nzokande ngai, mosali na yo, natosaka Yawe wuta bolenge na ngai.
13 Non ti hanno forse riferito, mio signore, ciò che ho fatto quando Gezabele sterminava tutti i profeti del Signore, come io nascosi cento profeti, cinquanta alla volta, in una caverna e procurai loro pane e acqua?
Nkolo na ngai, oyokaki te makambo oyo nasalaki tango Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe? Nabombaki basakoli ya Yawe nkama moko kati na madusu mibale ya mabanga: tuku mitano na lidusu moko na moko mpe napesaki bango bilei mpe mayi ya komela.
14 E ora tu comandi: Su, dì al tuo signore: C'è qui Elia? Egli mi ucciderà».
Sik’oyo olobi na ngai ete nakende koyebisa mokonzi na ngai ete Eliya azali awa? Akoboma ngai!
15 Elia rispose: «Per la vita del Signore degli eserciti, alla cui presenza io sto, oggi stesso io mi mostrerò a lui».
Eliya alobaki: — Solo, na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe oyo ngai nazali kosalela, lelo nakomimonisa epai ya Akabi.
16 Abdia andò incontro ad Acab e gli riferì la cosa. Acab si diresse verso Elia.
Boye Abidiasi akendeki kokutana na Akabi mpe apesaki ye sango; mpe Akabi akendeki kokutana na Eliya.
17 Appena lo vide, Acab disse a Elia: «Sei tu la rovina di Israele!».
Tango Akabi amonaki Eliya alobaki na ye: — Yo nde moto ozali kotia mobulu kati na Isalaele?
18 Quegli rispose: «Io non rovino Israele, ma piuttosto tu insieme con la tua famiglia, perché avete abbandonato i comandi del Signore e tu hai seguito Baal.
Eliya azongisaki: — Natie mobulu te kati na Isalaele. Kasi ezali nde yo mpe libota ya tata na yo bato bozali kosala mobulu, pamba te botosaki te mibeko ya Yawe mpe bolandi banzambe Bala.
19 Su, con un ordine raduna tutto Israele presso di me sul monte Carmelo insieme con i quattrocentocinquanta profeti di Baal e con i quattrocento profeti di Asera, che mangiano alla tavola di Gezabele».
Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.
20 Acab convocò tutti gli Israeliti e radunò i profeti sul monte Carmelo.
Boye Akabi atindaki sango epai ya bato nyonso ya Isalaele mpe asangisaki basakoli na ngomba Karimeli.
21 Elia si accostò a tutto il popolo e disse: «Fino a quando zoppicherete con i due piedi? Se il Signore è Dio, seguitelo! Se invece lo è Baal, seguite lui!». Il popolo non gli rispose nulla.
Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki: — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. Bato bazongisaki ata eloko moko te.
22 Elia aggiunse al popolo: «Sono rimasto solo, come profeta del Signore, mentre i profeti di Baal sono quattrocentocinquanta.
Boye Eliya alobaki na bango: — Natikali kaka ngai moko mosakoli kati na basakoli na Yawe. Kasi Bala azali na basakoli tuku minei na mitano.
23 Dateci due giovenchi; essi se ne scelgano uno, lo squartino e lo pongano sulla legna senza appiccarvi il fuoco. Io preparerò l'altro giovenco e lo porrò sulla legna senza appiccarvi il fuoco.
Bobongisela biso bangombe mibale ya mibali. Tika ete basakoli ya Bala bapona bango moko ngombe moko, bakata-kata yango na biteni mpe batia yango likolo ya bakoni, kasi bapelisa moto te. Ngai mpe nakobongisa ngombe mosusu, nakotia yango likolo ya bakoni, kasi na kopelisa moto te.
24 Voi invocherete il nome del vostro dio e io invocherò quello del Signore. La divinità che risponderà concedendo il fuoco è Dio!». Tutto il popolo rispose: «La proposta è buona!».
Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki: — Makambo oyo olobi ezali malamu.
25 Elia disse ai profeti di Baal: «Sceglietevi il giovenco e cominciate voi perché siete più numerosi. Invocate il nome del vostro Dio, ma senza appiccare il fuoco».
Eliya alobaki na basakoli ya Bala: — Bopona ngombe moko kati na bangombe ya mibali; bino bozala bato ya liboso ya kobongisa yango, pamba te bozali ebele. Bobelela kombo ya nzambe na bino, kasi bopelisa moto te.
26 Quelli presero il giovenco, lo prepararono e invocarono il nome di Baal dal mattino fino a mezzogiorno, gridando: «Baal, rispondici!». Ma non si sentiva un alito, né una risposta. Quelli continuavano a saltare intorno all'altare che avevano eretto.
Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki: « Bala, yanola biso! » Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.
27 Essendo gia mezzogiorno, Elia cominciò a beffarsi di loro dicendo: «Gridate con voce più alta, perché egli è un dio! Forse è soprappensiero oppure indaffarato o in viaggio; caso mai fosse addormentato, si sveglierà».
Na midi, Eliya akomaki kotiola bango, alobaki: « Boganga lisusu makasi, pamba te azali nzambe; tango mosusu azali kokanisa makambo ebele to akangami na misala mosusu to azali na mobembo; to mpe azali kolala, boye esengeli bino kolamusa ye. »
28 Gridarono a voce più forte e si fecero incisioni, secondo il loro costume, con spade e lance, fino a bagnarsi tutti di sangue.
Boye bagangaki lisusu makasi mpe bamizokisaki na mipanga na makonga, ndenge ezalaki momesano na bango kino makila kotanga.
29 Passato il mezzogiorno, quelli ancora agivano da invasati ed era venuto il momento in cui si sogliono offrire i sacrifici, ma non si sentiva alcuna voce né una risposta né un segno di attenzione.
Wana ngonga ya midi elekaki, bakobaki kotuntuka kino na tango ya mbeka ya pokwa, kasi eyano ezalaki kaka te, nzambe moko te ayanolaki bango mpe ata elembo moko te ezalaki.
30 Elia disse a tutto il popolo: «Avvicinatevi!». Tutti si avvicinarono. Si sistemò di nuovo l'altare del Signore che era stato demolito.
Eliya alobaki na bato nyonso: — Bopusana pene na ngai! Bato nyonso bapusanaki pene na ye mpe Eliya abongisaki etumbelo ya Yawe oyo ebukanaki.
31 Elia prese dodici pietre, secondo il numero delle tribù dei discendenti di Giacobbe, al quale il Signore aveva detto: «Israele sarà il tuo nome».
Eliya akamataki mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya bana mibali ya Jakobi oyo Yawe alobaki na ye: « Kombo na yo ekozala Isalaele. »
32 Con le pietre eresse un altare al Signore; scavò intorno un canaletto, capace di contenere due misure di seme.
Na mabanga yango, atongaki etumbelo mpo na Yawe; atimolaki libulu ya mayi oyo ekokaki kokota balitele pene tuku misato zingazinga ya etumbelo.
33 Dispose la legna, squartò il giovenco e lo pose sulla legna.
Abongisaki bakoni, akataki ngombe na biteni mpe atiaki yango likolo ya bakoni.
34 Quindi disse: «Riempite quattro brocche d'acqua e versatele sull'olocausto e sulla legna!». Ed essi lo fecero. Egli disse: «Fatelo di nuovo!». Ed essi ripeterono il gesto. Disse ancora: «Per la terza volta!». Lo fecero per la terza volta.
Alobaki na bango: — Botondisa mayi kati na bambeki minei ya minene mpe bosopa yango na likolo ya mbeka mpe na likolo ya bakoni. Basalaki bongo. Alobaki na bango lisusu: — Botondisa mayi kati na bambeki minei ya minene mpe bosopa yango na likolo ya mbeka mpe na likolo ya bakoni. Basalaki lisusu bongo. Apesaki bango mitindo: — Bosala bongo mpo na mbala ya misato! Basalaki bongo mpo na mbala ya misato.
35 L'acqua scorreva intorno all'altare; anche il canaletto si riempì d'acqua.
Mayi esopanaki zingazinga ya etumbelo mpe etondisaki libulu.
36 Al momento dell'offerta si avvicinò il profeta Elia e disse: «Signore, Dio di Abramo, di Isacco e di Giacobbe, oggi si sappia che tu sei Dio in Israele e che io sono tuo servo e che ho fatto tutte queste cose per tuo comando.
Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki: — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo.
37 Rispondimi, Signore, rispondimi e questo popolo sappia che tu sei il Signore Dio e che converti il loro cuore!».
Yanola ngai, oh Yawe, yanola ngai, mpo ete bato oyo bayeba solo ete Yo, Yawe, nde ozali Nzambe; na bongo okozongisa mitema ya bato oyo epai na Yo.
38 Cadde il fuoco del Signore e consumò l'olocausto, la legna, le pietre e la cenere, prosciugando l'acqua del canaletto.
Bongo moto ya Yawe ekweyaki, ezikisaki mbeka, bakoni, mabanga mpe ekawusaki mayi nyonso kati na libulu.
39 A tal vista, tutti si prostrarono a terra ed esclamarono: «Il Signore è Dio! Il Signore è Dio!».
Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakweyaki bilongi na se mpe bagangaki: — Solo, Yawe nde azali Nzambe; Yawe nde azali Nzambe!
40 Elia disse loro: «Afferrate i profeti di Baal; non ne scappi uno!». Li afferrarono. Elia li fece scendere nel torrente Kison, ove li scannò.
Eliya apesaki bango mitindo: — Bokanga basakoli ya Bala, botika ata moto moko te kokima. Bakangaki bango, mpe Eliya amemaki bango na lubwaku ya Kishoni mpo na kokata bango bakingo kuna.
41 Elia disse ad Acab: «Su, mangia e bevi, perché sento un rumore di pioggia torrenziale».
Eliya alobaki na Akabi: — Kende, lia mpe mela, pamba te nazali koyoka makelele ya mvula makasi.
42 Acab andò a mangiare e a bere. Elia si recò alla cima del Carmelo; gettatosi a terra, pose la faccia tra le proprie ginocchia.
Boye, Akabi akendeki kolia mpe komela. Kasi Eliya amataki kino na songe ya ngomba Karimeli, afukamaki elongi kino na se, na kati-kati ya mabolongo.
43 Quindi disse al suo ragazzo: «Vieni qui, guarda verso il mare». Quegli andò, guardò e disse. «Non c'è nulla!». Elia disse: «Tornaci ancora per sette volte».
Alobaki na mosali na ye: — Kende kotala na nzela ya ebale monene. Mosali na ye akendeki kotala, alobaki: — Eloko moko te ezali kuna. Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo: « Kende kotala lisusu! »
44 La settima volta riferì: «Ecco, una nuvoletta, come una mano d'uomo, sale dal mare». Elia gli disse: «Và a dire ad Acab: Attacca i cavalli al carro e scendi perché non ti sorprenda la pioggia!».
Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki: — Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene. Boye Eliya alobaki: — Kende koyebisa Akabi: « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. »
45 Subito il cielo si oscurò per le nubi e per il vento; la pioggia cadde a dirotto. Acab montò sul carro e se ne andò a Izrèel.
Na tango wana kaka, likolo eyindaki makasi na mapata ya mvula, mopepe eyaki, mpe mvula makasi enokaki. Akabi amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli.
46 La mano del Signore fu sopra Elia che, cintosi i fianchi, corse davanti ad Acab finché giunse a Izrèel.
Lokola nguya na Yawe ezalaki likolo ya Eliya oyo alataki mokaba na loketo na ye, akimaki mbangu liboso ya Akabi kino na ekuke ya Jizireyeli.

< 1 Re 18 >