< Máté 8 >
1 Mikor leszállott vala a hegyről, nagy sokaság követé őt.
Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye.
2 És ímé eljövén egy bélpoklos, leborula előtte, mondván: Uram, ha akarod, megtisztíthatsz engem.
Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki: — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
3 És kinyújtván kezét, megilleté őt Jézus, mondván: Akarom, tisztulj meg. És azonnal eltisztult annak poklossága.
Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki: — Nalingi ete ezala bongo, koma peto. Mbala moko, apetolamaki na maba na ye;
4 És monda néki Jézus: Meglásd, senkinek se szólj. Hanem eredj, mutasd meg magadat a papnak, és vidd fel az ajándékot, a melyet Mózes rendelt, bizonyságul nékik.
mpe Yesu alobaki na ye: — Yoka malamu! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
5 Mikor pedig beméne Jézus Kapernaumba, egy százados méne hozzá, kérvén őt,
Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi.
6 És ezt mondván: Uram, az én szolgám otthon gutaütötten fekszik, és nagy kínokat szenved.
Alobaki: — Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi.
7 És monda néki Jézus: Elmegyek és meggyógyítom őt.
Yesu azongiselaki ye: — Nakoya kobikisa ye.
8 És felelvén a százados, monda: Uram, nem vagyok méltó, hogy az én hajlékomba jőjj; hanem csak szólj egy szót, és meggyógyul az én szolgám.
Mokonzi ya basoda alobaki: — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.
9 Mert én is hatalmasság alá vetett ember vagyok, és vannak alattam vitézek; és mondom egyiknek: Eredj el, és elmegy; és a másiknak: Jöszte, és eljő; és az én szolgámnak: Tedd ezt, és megteszi.
Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai; soki nalobi na moko: « Kende! » akendaka; mpe soki nalobi na mosusu: « Yaka! » ayaka; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai: « Sala mosala oyo! » asalaka yango.
10 Jézus pedig, a mikor ezt hallá, elcsodálkozék, és monda az őt követőknek: Bizony mondom néktek, még az Izráelben sem találtam ilyen nagy hitet.
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye: — Nazali koloba na bino penza ya solo: natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele!
11 De mondom néktek, hogy sokan eljőnek napkeletről és napnyugatról, és letelepednek Ábrahámmal, Izsákkal és Jákóbbal a mennyek országában:
Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.
12 Ez ország fiai pedig kivettetnek a külső sötétségre; holott lészen sírás és fogaknak csikorgatása.
Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
13 És monda Jézus a századosnak: Eredj el, és legyen néked a te hited szerint. És meggyógyult annak szolgája abban az órában.
Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda: — Zonga na ndako na yo! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo! Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
14 És bemenvén Jézus a Péter házába, látá, hogy annak napa fekszik és lázas.
Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele.
15 És illeté annak kezét, és elhagyta őt a láz; és fölkele, és szolgála nékik.
Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei.
16 Az est beálltával pedig vivének hozzá sok ördöngőst, és egy szóval kiűzé a tisztátalan lelkeket, és meggyógyít vala minden beteget;
Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango; abikisaki mpe babeli nyonso.
17 Hogy beteljesedjék, a mit Ésaiás próféta mondott, így szólván: Ő vette el a mi erőtlenségünket, és ő hordozta a mi betegségünket.
Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki: « Amemaki mokumba ya pasi na biso mpe abikisaki biso na bokono na biso. »
18 Látván pedig Jézus a nagy sokaságot maga körül, parancsolá, hogy menjenek a túlsó partra.
Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale.
19 És hozzámenvén egy írástudó, monda néki: Mester, követlek téged, akárhova mégy.
Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki: — Moteyi, nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
20 És monda néki Jézus: A rókáknak vagyon barlangjok és az égi madaraknak fészkük; de az ember Fiának nincs hová fejét lehajtani.
Kasi Yesu alobaki na ye: — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
21 Egy másik pedig az ő tanítványai közül monda néki: Uram, engedd meg nékem, hogy előbb elmenjek és eltemessem az én atyámat.
Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye: — Nkolo, pesa ngai nzela ete nakende nanu kokunda tata na ngai.
22 Jézus pedig monda néki: Kövess engem, és hagyd, hogy a halottak temessék el az ő halottaikat.
Kasi Yesu alobaki na ye: — Landa Ngai! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.
23 És mikor a hajóra szállt vala, követék őt az ő tanítványai.
Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
24 És ímé nagy háborgás lőn a tengeren, annyira, hogy a hajót elborítják vala a hullámok; ő pedig aluszik vala.
Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi.
25 És az ő tanítványai hozzámenvén, felkölték őt, mondván: Uram, ments meg minket; mert elveszünk.
Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga: — Nkolo, bikisa biso! Tozali kokufa!
26 És monda nékik: Mit féltek, óh kicsinyhitűek? Ekkor fölkelvén, megdorgálá a szeleket és a tengert, és lőn nagy csendesség.
Kasi Yesu alobaki na bango: — Bato na kondima moke! Mpo na nini bozali kobanga? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge; bongo kimia monene ezongaki.
27 Az emberek pedig elcsodálkozának, mondván: Kicsoda ez, hogy mind a szelek, mind a tenger engednek néki.
Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana: « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye? »
28 És a mikor eljutott vala a túlsó partra, a Gadarénusok tartományába, két ördöngős ment eléje, a sírboltokból kijövén, igen kegyetlenek, annyira, hogy senki sem mer vala elmenni azon az úton.
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana.
29 És ímé kiáltának mondván: Mi közünk te veled Jézus, Istennek fia? Azért jöttél ide, hogy idő előtt meggyötörj minket?
Bakomaki koganga: — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama?
30 Tőlük távol pedig egy nagy disznónyáj legelészik vala.
Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki.
31 Az ördögök pedig kérik vala őt mondván: Ha kiűzesz minket, engedd meg nékünk, hogy ama disznónyájba mehessünk!
Milimo mabe esengaki na Yesu: — Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu.
32 És monda nékik: Menjetek. Azok pedig kimenvén, menének a disznónyájba: és ímé az egész disznónyáj a meredekről a tengerbe rohana, és oda vesze a vízben.
Yesu alobaki na milimo yango: — Bobima! Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.
33 A pásztorok pedig elfutának, és bemenvén a városba hírré adának mindent, azokat is, a mik az ördöngősökkel történtek vala.
Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama.
34 És ímé az egész város kiméne Jézus elébe; és mihelyt meglátták, kérék őt, hogy távozzék az ő határukból.
Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.