< Zsoltárok 88 >
1 Ének, zsoltár. Kórach fiaitól. A karmesternek, Máchalát szerint, éneklésre. Oktató dal az ezráchi Hémántól. Örökkévaló, segítségem Istene, nappal kiáltok, meg éjjel teelőtted;
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na flite. Nzembo ya Emani, moto ya Ezera. Yawe, ozali Nzambe; Yo nde obikisaka ngai! Butu mpe moyi, nagangaka epai na Yo!
2 jusson eléd imádságom, hajlítsd füledet fohászkodásomra.
Tika ete losambo na ngai ekoma epai na Yo; Yoka koganga na ngai!
3 Mert jóllakott lelkem bajokkal és életem az alvilághoz ért. (Sheol )
Pamba te bomoi na ngai etondi na pasi mpe nakomi pene ya kokufa. (Sheol )
4 Azokhoz számíttattam, kik a gödörbe szállnak, olyan lettem mint erő nélkül levő férfi
Batie ngai na molongo ya bato oyo bazali kokende na kunda; nakeseni ata moke te na moto oyo azali lisusu na makasi te.
5 a holtak között, odavetve, miként megölöttek, sírban fekvők, kikről nem emlékezel többé, hisz ők elszakíttattak kezedtől.
Nakomi moko kati na bakufi, lokola bato oyo basila kokufa na bitumba mpe bazali sik’oyo kati na kunda, lokola bato oyo okanisaka lisusu te, pamba te obatelaka bango lisusu te.
6 Helyeztél engem a legal só gödörbe, sötétségbe, mélységbe.
Obwaki ngai na libulu ya mozindo makasi, kati na mozindo ya molili.
7 Haragod reám eresztette súlyát, és mind a hullámaiddal sújtottál. Széla.
Kanda na Yo ya makasi ekweyeli ngai, bambonge na yango nyonso ezali konyokola ngai.
8 Eltávolítottad ismerőseimet tőlem, utálattá tettél engem nekik, elzárva vagyok, nem juthatok ki.
Okaboli ngai na balingami na ngai ya motema, okomisi ngai eloko ya nkele na miso na bango; nakomi lokola mokangami kati na boloko, nakoki kobima te!
9 Szemem elepedt a nyomortól, hívtalak téged, Örökkévaló, mindennap, kiterjesztettem hozzád kezeimet.
Miso na ngai ezali komona lisusu te mpo na pasi; nzokande nabelelaka Yo, Yawe, mikolo nyonso, natombolaka maboko na ngai epai na Yo!
10 A holtaknak teszel-e csodát, avagy árnyak kelnek-e föl, magasztalnak-e téged? Széla.
Boni, okosala bikamwa mpo na bakufi? Boni, bakufi bakoki kotelema mpo na kosanzola Yo?
11 Elbeszélik-e a sírban szeretetedet, hűségedet az enyészetben?
Boni, bolingo na Yo etatolamaka kati na kunda, mpe bosembo na Yo, kati na mboka ya bakufi?
12 Ismerik-e a sötétségben csodádat, és igazságodat a feledés országában?
Boni, bikamwa na Yo eyebani kati na molili, mpe bosembo na Yo, kati na mokili ya bato oyo babosana?
13 Én pedig hozzád, oh Örökkévaló, fohászkodtam és reggel elédbe jut imádságom.
Kasi ngai, nazali kobelela nde Yo, Yawe; nabondelaka Yo tongo nyonso.
14 Miért, oh Örökkévaló, veted el lelkemet, rejted el arczodat előlem?
Yawe, mpo na nini kobwaka ngai mpe kobombela ngai elongi na Yo?
15 Szegény vagyok én és sínylődő ifjuságtól fogva, viselem ijedelmeidet, oda vagyok.
Wuta bolenge na ngai, nazali mobola mpe moto na pasi; mpe okweyiselaka ngai makambo na Yo ya somo! Solo, elikya esili ngai!
16 Elvonulnak fölöttem föllobbanásaid, rettentéseid megsemmisítettek engem.
Kanda makasi na Yo ebetaka ngai, minyoko oyo ewutaka epai na Yo ekomisaka ngai moto pamba.
17 Körülvettek mint a víz egész nap, közrefogtak engem egyaránt.
Ezingelaka ngai mikolo nyonso, lokola mayi, na bangambo nyonso.
18 Eltávolítottál tőlem barátot és társat, ismerőseim – csupa sötétség.
Okaboli ngai na baninga mpe balingami na ngai, natikali na moninga kaka moko ya motema: molili!