< Zsoltárok 126 >
1 Zarándoklás éneke. Midőn visszahozta az Örökkévaló Czión foglyait, úgy voltunk, mint a kik álmodnak.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tango Yawe azongisaki bato ya Siona longwa na bowumbu, tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
2 Akkor megtelt szájunk nevetéssel és nyelvünk újjongással; akkor szóltak a nemzetek közt: nagyokat mívelt az Örökkévaló ezekkel!
Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo: « Yawe asaleli bango makambo minene! »
3 Nagyokat mívelt az Örökkévaló velünk; vidámak voltunk.
Solo, Yawe asaleli biso makambo minene, mpe tozali kosepela.
4 Hozd vissza, Örökkévaló, foglyainkat, mint folyammedreket a délvidéken.
Yawe, yaka kobongisa makambo na biso ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi.
5 Akik könnyel vetettek, újjongással aratnak:
Bato oyo balonaka na mpinzoli babukaka na banzembo ya esengo.
6 menve mén és sír, aki viszi a vetőmag szóratját; jöttön jő, újjongással, aki viszi kévéit.
Moto oyo akendaka na kolela, tango amemi milona na ye, azongaka na esengo wana amemi maboke na ye.