< 4 Mózes 6 >

1 Es szólt az Örökkévaló Mózeshez, mondván:
Yawe alobaki na Moyize:
2 Szólj Izrael fiaihoz és mondd nekik: Férfi vagy nő, ha kiválik fogadalmat téve, tartózkodási fogadalmat, hogy tartózkodjék az Örökkévalónak,
« Yebisa bana ya Isalaele: Mobali to mwasi oyo amibulisi mpo na Yawe na nzela ya ndayi ya libulisi
3 bortól és részegítő italtól tartózkodjék, borecetet és részegítő italból való ecetet ne igyék; bármi szőlőlevet ne igyék és friss szőlőt vagy szárazat ne egyék.
asengeli komipekisa komela vino, masanga oyo elangwisaka, masanga ya ngayi oyo basala na vino mpe masanga ya ngayi oyo basala na masanga mosusu oyo elangwisaka; asengeli te komela masanga oyo basala na bambuma ya vino ya mayi to ya kokawuka.
4 Tartózkodásának egész ideje alatt mindabból, ami a szőlőből készül, a szőlőmagtól a szőlőhéjig, ne egyék.
Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, asengeli te kolia eloko nyonso oyo basala na bambuma ya vino, kobanda na mokokoli kino na poso.
5 Tartózkodási fogadalmának egész ideje alatt borotva ne jöjjön a fejére; amíg betelnek a napok, melyekre tartózkodást fogad az Örökkévalónak, szent legyen, vadul növessze fejének a haját.
Na mikolo nyonso ya ndayi ya libulisi na ye, jileti esengeli te kotutana na moto na ye to basengeli te kokata suki ya moto na ye, kino tango ya libulisi na ye mpo na Yawe ekosila; akozala bule mpe akotika suki ya moto na ye mpe mandefu na ye kokola.
6 Mindazon a napok alatt, melyekre tartózkodást fogad az Örökkévalónak, holttesthez ne menjen be;
Na mikolo nyonso ya libulisi na ye mpo na Yawe, asengeli te kosimba ebembe;
7 atyjával, anyjával, fivérével és nővérével meg ne tisztátalanítsa magát; ha meghaltak, mert Istenének názirsága van a fején.
ezala mpo na kufa ya tata na ye, ya mama na ye, ya ndeko na ye ya mobali to ya ndeko na ye ya mwasi, asengeli te komikomisa mbindo; pamba te na moto na ye, azali na elembo ya libulisi mpo na Nzambe.
8 Tartózkodásának egész ideje alatt szent ő az Örökkévalónak.
Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, akozala bule mpo na Yawe.
9 Ha valaki meghal mellette hirtelen és tisztátalanná tette názirfejét, akkor nyírja le haját tisztulásának napján, a hetedik napon nyírja le azt.
Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama.
10 A nyolcadik napon pedig vigyen két gerlicét vagy két galambfiát a paphoz, a gyülekezés sátorának bejáratához.
Na mokolo ya mwambe, asengeli komema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani: bibenga mibale ya zamba mpe bana mibale ya ebenga ya mboka.
11 És készítse el a pap az egyiket vétekáldozatnak és a másikat égőáldozatnak, hogy engesztelést szerezzen érte, amiért vétkezett a holttest által; és szentelje meg fejét azon a napon.
Nganga-Nzambe akobonza moko lokola mbeka mpo na masumu mpe mosusu, lokola mbeka ya kotumba; akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye lokola asimbaki ebembe. Kaka na mokolo yango, akobulisa lisusu moto na ye epai na Yawe.
12 És tartózkodjék az Örökkévalónak tartózkodása napjain át, vigyen egy egyéves juhot bűnáldozatul, az előbbi napok pedig elesnek, mert tisztátalanná lett tartózkodása.
Akokaba lisusu epai na Yawe libulisi na ye mpe akobonza lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mwana meme ya mobu moko; pamba te mikolo na ye ya liboso, oyo esilaki koleka, ekotangama lisusu te mpo ete akomaki mbindo.
13 És ez a názir tana: Amely napon betelnek tartózkodásának napjai, vigyék el őt a gyülekezés sátorának bejáratához;
Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe: ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani
14 és mutassa be áldozatát az Örökkévalónak egy egyéves ép juhot égőáldozatul és egy egyéves nőstény juhot, épet, vétekáldozatul, és egy kost, épet, békeáldozatul;
epai wapi akobonza lokola mbeka mpo na Yawe: mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba; meme ya mwasi ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu; mpe meme ya mobali mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani;
15 meg egy kosár kovásztalan kenyeret lánglisztből, olajjal elegyítve és kovásztalan lepényeket, olajjal megkenve, meg ételáldozatukat és italáldozatukat.
kitunga ya mapa ezanga levire mpe basala na farine basangisa na mafuta; bagalete ezanga levire mpe bapakola mafuta elongo na mbeka ya masanga mpe makabo mosusu.
16 Vigye oda a pap az Örökkévaló színe elé és készítse el vétekáldozatát és égőáldozatát.
Nganga-Nzambe akomema makabo wana nyonso liboso ya Yawe; akobonza mbeka na ye mpo na masumu mpe mbeka na ye ya kotumba;
17 A kost pedig készítse el békeáldozatul az Örökkévalónak a kovásztalan kenyerek kosarával, és készítse el a pap ételáldozatát és italáldozatát:
akobonza lisusu epai na Yawe meme ya mobali lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, elongo na kitunga ya mapa ezanga levire. Nganga-Nzambe akobakisa na likolo na yango mbeka na ye ya masanga mpe makabo na ye mosusu.
18 És nyírja le a názir a gyülekezés sátorának bejáratánál názirfejét, vegye názirfejének haját és tegye a tűzre, mely a békeáldozat alatt van.
Bongo moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe akokata, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, suki ya moto na ye mpe ya mandefu na ye; akolokota yango mpe akobwaka yango na moto oyo ezali kopela na se ya mbeka mpo na kozongisa boyokani.
19 És vegye a pap a lapockát, megfőzve, a kosból, meg egy kovásztalan kalácsot a kosárból és egy kovásztalan lepényt, tegye a názir tenyereire, miután megnyírta názirfejének a haját.
Nganga-Nzambe akozwa lipeka ya mbeka ya meme ya mobali tango esili kozika; akozwa lisusu, kati na kitunga, lipa moko ezanga levire mpe galeti moko ezanga levire, akotia yango na maboko ya moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe sima na ye kokata suki ya moto na ye mpe mandefu na ye.
20 Lengesse azokat a pap lengetéssel az Örökkévaló színe előtt; szent az a pap számára a lengetés szegyével és az ajándék combjával együtt; azután pedig ihat a názir bort.
Nganga-Nzambe akobulisa mpe akotombola yango mpo na kopesa yango epai na Yawe, pamba te ezali biloko ya bule mpe ya Nganga-Nzambe, ndenge moko na tolo mpe mopende.
21 Ez a názir tana, aki fogadást tesz; áldozata az Örökkévalónak tartózkodása miatt, azonkívül, amire vagyonából kerül: fogadalma szerint, amit fogad, úgy cselekedjék tartózkodásának tana szerint.
Wana nde ezali mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe, na nzela ya ndayi, elongo na makabo oyo asengeli kobonza epai na Yawe mpo na libulisi na ye. Mpe soki azali na makoki, akoki na ye kopesa makabo mosusu wuta na motema na ye moko. Akokokisa biloko nyonso kolanda ndayi oyo asilaki kolapa mpe mobeko ya libulisi na ye. › »
22 És szólt az Örökkévaló Mózeshez, mondván:
Yawe alobaki na Moyize:
23 Szólj Áronhoz és fiaihoz, mondván: Így áldjátok meg Izrael fiait, mondván: nekik:
« Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali: ‹ Tala ndenge nini bokobanda kopambola bana ya Isalaele, bokoloba:
24 Áldjon meg téged az Örökkévaló és őrizzen meg téged
‘Tika ete Yawe apambola yo mpe abatela yo!
25 világíttassa az Örökkévaló; neked az ő színét: és könyörüljön rajtad
Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye mpe apesa yo ngolu na Ye!
26 fordítsa feléd az Örökkévaló az ő színét és adjon neked békét.
Tika ete Yawe amona yo mpe apesa yo kimia!’ ›
27 Tegyék nevemet Izrael fiaira és én megáldom őket.
Ezali ndenge wana nde bakobanda kobelela Kombo na Ngai mpo na bolamu ya bana ya Isalaele, mpe Ngai nakopambola bango. »

< 4 Mózes 6 >