< שיר השירים 3 >

על משכבי בלילות בקשתי את שאהבה נפשי בקשתיו ולא מצאתיו׃ 1
Butu mobimba, na mbeto na ngai, nazali koluka mobali oyo motema na ngai elingaka; naluki ye, kasi namonaki ye te.
אקומה נא ואסובבה בעיר בשוקים וברחבות אבקשה את שאהבה נפשי בקשתיו ולא מצאתיו׃ 2
Esengeli na ngai kolamuka sik’oyo mpe kobima libanda ya engumba, na balabala na yango mpe na bisika oyo bato nyonso bakutanaka; nakoluka mobali oyo motema na ngai elingaka. Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.
מצאוני השמרים הסבבים בעיר את שאהבה נפשי ראיתם׃ 3
Bakengeli bamonaki ngai tango bazalaki koleka-leka na balabala ya engumba. Natunaki bango: « Bomoneli ngai te mobali oyo motema na ngai elingaka? »
כמעט שעברתי מהם עד שמצאתי את שאהבה נפשי אחזתיו ולא ארפנו עד שהביאתיו אל בית אמי ואל חדר הורתי׃ 4
Tango kaka nalekaki bango, mbala moko, namonaki mobali oyo motema na ngai elingaka. Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende. Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai, na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.
השבעתי אתכם בנות ירושלם בצבאות או באילות השדה אם תעירו ואם תעוררו את האהבה עד שתחפץ׃ 5
Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga: Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
מי זאת עלה מן המדבר כתימרות עשן מקטרת מור ולבונה מכל אבקת רוכל׃ 6
Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata, azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa, oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitoko ya moto ya mombongo?
הנה מטתו שלשלמה ששים גברים סביב לה מגברי ישראל׃ 7
Tala! Ezali nde tsipoyi ya mokonzi Salomo! Basoda na ye ya mpiko, bato ya lokumu ya Isalaele, tuku motoba nde bamemi yango.
כלם אחזי חרב מלמדי מלחמה איש חרבו על ירכו מפחד בלילות׃ 8
Bango nyonso balati mipanga; bango nyonso bazali makasi na bitumba, baselingwa mpo na bitumba ya butu.
אפריון עשה לו המלך שלמה מעצי הלבנון׃ 9
Mokonzi Salomo asalisaki tsipoyi; basalaki yango na mabaya ya mboka Libani.
עמודיו עשה כסף רפידתו זהב מרכבו ארגמן תוכו רצוף אהבה מבנות ירושלם׃ 10
Basalaki bisimbelo na yango na palata, mokongo na yango, na wolo. Balatisaki evandelo na yango bilamba ya motuya ya langi ya motane makasi. Bongo, bilenge basi ya Yelusalemi babongisaki kati na yango na motema ya bolingo.
צאינה וראינה בנות ציון במלך שלמה בעטרה שעטרה לו אמו ביום חתנתו וביום שמחת לבו׃ 11
Bino bilenge basi ya Siona, bobima; botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole, motole oyo mama na ye alatisaki ye na mokolo ya libala na ye, na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.

< שיר השירים 3 >