< אֶל־הָרוֹמִיִּים 4 >

ועתה מה נאמר על אברהם אבינו מה זה השיג לפי הבשר׃ 1
Toloba nini na tina na Abrayami, koko na biso? Azwaki nini na bomoto?
כי אם נצדק אברהם מתוך המעשים לו התהלה אך לא לפני האלהים׃ 2
Soki Abrayami atangamaki lokola moto ya sembo na nzela ya misala, akokaki solo komikumisa; kasi liboso ya Nzambe, ezali bongo te!
כי הכתוב מה הוא אמר והאמן אברהם ביהוה ויחשבה לו צדקה׃ 3
Makomi elobi nini? « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe, yango wana Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. »
הנה הפעל לא יחשב לו שכרו על פי החסד כי אם על פי החוב׃ 4
Soki moto asali mosala, batangaka lifuti na ye lokola likabo te, kasi lokola motoki na ye.
אבל לאשר איננו פעל כי אם מאמין במצדיק את הרשע אמונתו תחשב לו לצדקה׃ 5
Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo.
כאשר גם דוד מאשר את האדם אשר האלהים יחשב לו צדקה בלא מעשים באמרו׃ 6
Davidi mpe alobaki bongo tango atatolaki esengo ya moto oyo Nzambe akomisi sembo na kozanga misala:
אשרי נשוי פשע כסוי חטאה׃ 7
« Esengo na bato oyo mabe na bango elimbisami, mpe masumu na bango elongwe!
אשרי אדם לא יחשב יהוה לו עון׃ 8
Esengo na moto oyo Nkolo atangelaka lisumu te! »
ועתה האשור הזה העל המילה הוא אם גם על הערלה הלא אמרנו כי לאברהם נחשבה אמונתו לצדקה׃ 9
Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatisa ngenga to ezali mpe mpo na bato oyo bakatisa ngenga te? Solo, tozali koloba: Mpo ete Abrayami azalaki na kondima, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo.
ואין נחשבה לו אם בהיותו מהול או בעודנו ערל הן לא בהיותו מהול כי אם בערלתו׃ 10
Esalemaki tango nini? Esalemaki liboso na ye kokatisa ngenga to sima na ye kokatama ngenga? Esalemaki te sima na ye kokatama ngenga; esalemaki nde liboso na ye kokatisa ngenga.
ואות המילה קבל לחותם צדקת האמונה אשר היתה לו בערלתו להיות לאב לכל המאמינים והם ערלים למען אף להם תחשב הצדקה׃ 11
Nzambe apesaki ye elembo ya kokatama ngenga lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima, wana azalaki akatama nanu ngenga te. Boye akoma na mbala moko tata ya bato nyonso oyo bandimaka, wana bazali bakatama ngenga te mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo,
ולהיות לאב גם למולים אך לא לאשר הם נמולים לבד כי אם גם הלכים בעקבות האמונה שהיתה לו לאברהם בעודנו בערלתו׃ 12
mpe tata ya bato oyo bakatisa ngenga, ba-oyo bakatama ngenga kaka te, kasi balandaka mpe ndakisa ya kondima oyo Abrayami, tata na biso, azalaki na yango liboso ete bakata ye ngenga.
כי לא על ידי תורה באה ההבטחה לאברהם ולזרעו להיותו ירש העולם כי אם על ידי צדקת האמונה׃ 13
Ezali na nzela ya Mobeko te nde Abrayami mpe bakitani na ye bapesamelaki elaka ya kozwa mokili lokola libula, kasi ezali nde na nzela ya bosembo oyo ewutaka na kondima.
כי אלו לבני התורה הירשה האמונה לריק תהיה וההבטחה בטלה׃ 14
Pamba te soki ezali bato oyo batosaka mibeko nde bakozwa libula yango, wana kondima ezali lisusu na tina te mpe elaka ezali te,
כי התורה מביאה קצף כי באשר אין תורה גם אין שם עברה׃ 15
pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.
על כן מתוך אמונה למען לפי חסד למען תחיה ההבטחה קימת לכל זרעו לא לבני התורה לבדם כי גם לבני אמונת אברהם אשר הוא אב לכלנו׃ 16
Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami: kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso,
ככתוב כי אב המון גוים נתתיך והוא האמין בהביט אל אל המחיה את המתים והקורא את אשר לא היה כמו הוה׃ 17
kolanda ndenge ekomama: « Nakomisaki yo tata ya bikolo ebele. » Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimaki, Nzambe oyo apesaka bomoi epai ya bakufi mpe azalisaka biloko oyo etikala kozala te.
באשר אין תקוה קוה ויאמן למען אשר יהיה לאב המון גוים כמו שנאמר כה יהיה זרעך׃ 18
Atako Abrayami akokaki lisusu te kotia elikya, kasi atiaki kaka elikya mpe andimaki; boye akomaki tata ya bikolo ebele, kolanda ndenge Nzambe aloba mpo na ye: « Bakitani na yo bakozala ebele. »
ולא רפתה אמונתו ולא התבונן אל גופו שכבר נפוג בהיותו כבן מאת שנה ואל בלות רחם שרה׃ 19
Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te atako atalaki nzoto na ye, oyo ezalaki lisusu na makasi te, mpe nzoto ya Sara oyo akokaki lisusu kobota te.
ולא חלק לבו בהבטחת האלהים כחסר האמונה כי אם התחזק באמונתו ויתן כבוד לאלהים׃ 20
Nzokande, na esika ete atia tembe na elaka ya Nzambe mpe aboya kondima, kasi kondima na ye epesaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe nkembo,
וידע בלבב שלם כי את אשר הבטיח גם יכל לעשותו׃ 21
wana andimisamaki makasi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka na Ye.
על כן גם נחשבה לו לצדקה׃ 22
Yango wana, mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo.
ולא לבד למענו כתובה זאת שנחשבה לו׃ 23
Nzokande, ezali mpo na ye moko kaka te nde ekomama: « Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo; »
כי אם גם למעננו אשר עתידה להחשב לנו המאמינים במי שהעיר את ישוע אדנינו מן המתים׃ 24
ezali mpe mpo na biso oyo Nzambe akotanga lokola bato ya sembo mpo ete tondimelaka Ye oyo asekwisaki, kati na bakufi, Yesu, Nkolo na biso,
אשר נמסר בעבור פשעינו ונעור לבעבור צדקנו׃ 25
oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.

< אֶל־הָרוֹמִיִּים 4 >