< תהילים 82 >

מזמור לאסף אלהים נצב בעדת אל בקרב אלהים ישפט׃ 1
Nzembo ya Azafi. Nzambe atelemi kati na lisanga na Ye, azali kokata makambo kati na banzambe.
עד מתי תשפטו עול ופני רשעים תשאו סלה׃ 2
Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe?
שפטו דל ויתום עני ורש הצדיקו׃ 3
Bolongisa moto oyo azangi makasi mpe mwana etike, bokata likambo ya moto ya mawa mpe ya mobola;
פלטו דל ואביון מיד רשעים הצילו׃ 4
bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi mpe na mobola, bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.
לא ידעו ולא יבינו בחשכה יתהלכו ימוטו כל מוסדי ארץ׃ 5
Bazangi boyebi mpe bososoli, bazali koyengayenga kati na molili; miboko nyonso ya mokili ezali koningana.
אני אמרתי אלהים אתם ובני עליון כלכם׃ 6
Nalobaki: « Bozali banzambe, bozali bino nyonso bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo! »
אכן כאדם תמותון וכאחד השרים תפלו׃ 7
Nzokande, bokufaka lokola bato nyonso mpe bokweyaka lokola bakambi.
קומה אלהים שפטה הארץ כי אתה תנחל בכל הגוים׃ 8
Nzambe, telema, sambisa mokili; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.

< תהילים 82 >