< תהילים 70 >
למנצח לדוד להזכיר אלהים להצילני יהוה לעזרתי חושה׃ | 1 |
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe. Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai! Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai!
יבשו ויחפרו מבקשי נפשי יסגו אחור ויכלמו חפצי רעתי׃ | 2 |
Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe bayokisama soni!
ישובו על עקב בשתם האמרים האח האח׃ | 3 |
Tika ete bato oyo balobaka na ngai: « Ah! Ah! » bazonga mpo na soni!
ישישו וישמחו בך כל מבקשיך ויאמרו תמיד יגדל אלהים אהבי ישועתך׃ | 4 |
Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso: « Nzambe azali monene! »
ואני עני ואביון אלהים חושה לי עזרי ומפלטי אתה יהוה אל תאחר׃ | 5 |
Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te!