< תהילים 62 >
למנצח על ידותון מזמור לדוד אך אל אלהים דומיה נפשי ממנו ישועתי׃ | 1 |
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi. Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe; lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.
אך הוא צורי וישועתי משגבי לא אמוט רבה׃ | 2 |
Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
עד אנה תהותתו על איש תרצחו כלכם כקיר נטוי גדר הדחויה׃ | 3 |
Kino tango nini bokosangela moto moko? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya?
אך משאתו יעצו להדיח ירצו כזב בפיו יברכו ובקרבם יקללו סלה׃ | 4 |
Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye wuta na esika na ye ya likolo, basepelaka kotatola lokuta. Bapambolaka na nzela ya minoko na bango; kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.
אך לאלהים דומי נפשי כי ממנו תקותי׃ | 5 |
Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.
אך הוא צורי וישועתי משגבי לא אמוט׃ | 6 |
Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
על אלהים ישעי וכבודי צור עזי מחסי באלהים׃ | 7 |
Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.
בטחו בו בכל עת עם שפכו לפניו לבבכם אלהים מחסה לנו סלה׃ | 8 |
Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.
אך הבל בני אדם כזב בני איש במאזנים לעלות המה מהבל יחד׃ | 9 |
Solo, bato bazali lokola molunge, bazali lokola lokuta; Soki batie bango na emekelo kilo, ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.
אל תבטחו בעשק ובגזל אל תהבלו חיל כי ינוב אל תשיתו לב׃ | 10 |
Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te.
אחת דבר אלהים שתים זו שמעתי כי עז לאלהים׃ | 11 |
Nzambe alobaki mbala moko, ngai nayokaki mbala mibale: « Pamba te makasi ezali ya Nzambe;
ולך אדני חסד כי אתה תשלם לאיש כמעשהו׃ | 12 |
mpe bolingo ezali ya Nkolo; » mpe « ofutaka moto nyonso kolanda misala na ye. »