< תהילים 6 >
למנצח בנגינות על השמינית מזמור לדוד יהוה אל באפך תוכיחני ואל בחמתך תיסרני׃ | 1 |
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe. Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.
חנני יהוה כי אמלל אני רפאני יהוה כי נבהלו עצמי׃ | 2 |
Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazangi makasi. Yawe, bikisa ngai na bokono, pamba te mikuwa na ngai elembi.
ונפשי נבהלה מאד ואת יהוה עד מתי׃ | 3 |
Molimo na ngai ezali kotungisama makasi; bongo Yo, Yawe, kino tango nini?
שובה יהוה חלצה נפשי הושיעני למען חסדך׃ | 4 |
Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.
כי אין במות זכרך בשאול מי יודה לך׃ (Sheol ) | 5 |
Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo? (Sheol )
יגעתי באנחתי אשחה בכל לילה מטתי בדמעתי ערשי אמסה׃ | 6 |
Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.
עששה מכעס עיני עתקה בכל צוררי׃ | 7 |
Miso na ngai ebebi mpo na mawa; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.
סורו ממני כל פעלי און כי שמע יהוה קול בכיי׃ | 8 |
Bino nyonso oyo bosalaka mabe, bolongwa liboso na ngai, pamba te Yawe ayoki kolela na ngai.
שמע יהוה תחנתי יהוה תפלתי יקח׃ | 9 |
Yawe ayanoli mabondeli na ngai mpe ayambi losambo na ngai.
יבשו ויבהלו מאד כל איבי ישבו יבשו רגע׃ | 10 |
Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni, mpe somo monene ekokanga bango; bakozonga na sima mpe bakoyoka mbala moko soni.