< תהילים 16 >

מכתם לדוד שמרני אל כי חסיתי בך׃ 1
Nzembo ya Davidi. Nzambe, batela ngai, pamba te nabombami kati na Yo.
אמרת ליהוה אדני אתה טובתי בל עליך׃ 2
Nalobaka na Yawe: « Ozali Nkolo na ngai, Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai. »
לקדושים אשר בארץ המה ואדירי כל חפצי בם׃ 3
Natatolaka na tina na basantu oyo bazali kati na mboka ete bazali penza bato minene oyo nasepelaka na bango makasi.
ירבו עצבותם אחר מהרו בל אסיך נסכיהם מדם ובל אשא את שמותם על שפתי׃ 4
Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi. Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.
יהוה מנת חלקי וכוסי אתה תומיך גורלי׃ 5
Yawe, Yo moko kaka nde ozali libula mpe bomoi na ngai; ozali ndanga ya bozwi na ngai.
חבלים נפלו לי בנעמים אף נחלת שפרה עלי׃ 6
Nazwi etando ya motuya makasi, ezali libula ya kitoko penza mpo na ngai!
אברך את יהוה אשר יעצני אף לילות יסרוני כליותי׃ 7
Nakopambola Yawe oyo apesaka ngai toli mpe, ezala na butu, angengisaka makanisi na ngai.
שויתי יהוה לנגדי תמיד כי מימיני בל אמוט׃ 8
Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
לכן שמח לבי ויגל כבודי אף בשרי ישכן לבטח׃ 9
Yango wana motema na ngai etondi na esengo, molimo na ngai ezali kosepela, nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.
כי לא תעזב נפשי לשאול לא תתן חסידך לראות שחת׃ (Sheol h7585) 10
Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi, okotika mpe te ete mosantu na Yo apola. (Sheol h7585)
תודיעני ארח חיים שבע שמחות את פניך נעמות בימינך נצח׃ 11
Okolakisa ngai nzela ya bomoi; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.

< תהילים 16 >