< תהילים 138 >

לדוד אודך בכל לבי נגד אלהים אזמרך׃ 1
Nzembo ya Davidi. Nasanzolaka Yo na motema na ngai mobimba; nayembelaka Yo banzembo liboso ya banzambe.
אשתחוה אל היכל קדשך ואודה את שמך על חסדך ועל אמתך כי הגדלת על כל שמך אמרתך׃ 2
Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule mpe nasanzolaka Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo, pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.
ביום קראתי ותענני תרהבני בנפשי עז׃ 3
Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.
יודוך יהוה כל מלכי ארץ כי שמעו אמרי פיך׃ 4
Yawe, bakonzi nyonso ya mabele bakokumisa Yo tango bakoyoka maloba kobima na monoko na Yo;
וישירו בדרכי יהוה כי גדול כבוד יהוה׃ 5
bakoyemba na tina na banzela ya Yawe, pamba te nkembo na Yawe ezali monene.
כי רם יהוה ושפל יראה וגבה ממרחק יידע׃ 6
Atako Yawe atombwama, atalaka bato oyo bamikitisa mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.
אם אלך בקרב צרה תחיני על אף איבי תשלח ידך ותושיעני ימינך׃ 7
Tango pasi ekweyelaka ngai, obatelaka bomoi na ngai, osembolaka loboko na Yo mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai; mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.
יהוה יגמר בעדי יהוה חסדך לעולם מעשי ידיך אל תרף׃ 8
Yawe akokisaka makambo nyonso mpo na bolamu na ngai. Yawe, bolingo na Yo ewumelaka seko na seko! Kosundola te bato oyo osala na maboko na Yo!

< תהילים 138 >