< תהילים 13 >

למנצח מזמור לדוד עד אנה יהוה תשכחני נצח עד אנה תסתיר את פניך ממני׃ 1
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
עד אנה אשית עצות בנפשי יגון בלבבי יומם עד אנה ירום איבי עלי׃ 2
Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela? Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te?
הביטה ענני יהוה אלהי האירה עיני פן אישן המות׃ 3
Kino tango nini nakozala mawa-mawa kati na motema na ngai mpe nakomitungisa mikolo nyonso? Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai?
פן יאמר איבי יכלתיו צרי יגילו כי אמוט׃ 4
Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai. Sala ete miso na ngai emona malamu; soki te, nakokufa,
ואני בחסדך בטחתי יגל לבי בישועתך׃ 5
bongo monguna na ngai akoloba: « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.
אשירה ליהוה כי גמל עלי׃ 6
Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo, mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo. Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, pamba te asaleli ngai bolamu.

< תהילים 13 >