< תהילים 122 >

שיר המעלות לדוד שמחתי באמרים לי בית יהוה נלך׃ 1
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Nasepelaka tango balobaka na ngai: « Tokende na Tempelo ya Yawe! »
עמדות היו רגלינו בשעריך ירושלם׃ 2
Yelusalemi, makolo na biso etelemi na bikuke na yo!
ירושלם הבנויה כעיר שחברה לה יחדו׃ 3
Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu; engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko.
ששם עלו שבטים שבטי יה עדות לישראל להדות לשם יהוה׃ 4
Ezali kuna nde mabota ekendaka, mabota ya Yawe, kolanda mibeko kati na Isalaele, mpo na kosanzola Kombo ya Yawe.
כי שמה ישבו כסאות למשפט כסאות לבית דויד׃ 5
Pamba te bakiti ya bokonzi ya bato oyo basalelaka bosembo ezali kuna, bakiti ya bokonzi mpo na ndako ya Davidi.
שאלו שלום ירושלם ישליו אהביך׃ 6
Bosenga kimia ya Yelusalemi! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia!
יהי שלום בחילך שלוה בארמנותיך׃ 7
Tika ete kimia ezala kati na yo mpe kati na bandako na yo ya bokonzi!
למען אחי ורעי אדברה נא שלום בך׃ 8
Likolo ya bolingo na ngai mpo na bandeko mpe balingami na ngai, nalobi: « Tika ete kimia ezala kati na yo! »
למען בית יהוה אלהינו אבקשה טוב לך׃ 9
Likolo ya bolingo na ngai mpo na Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso, nasengi bolamu mpo na yo.

< תהילים 122 >