< מִשְׁלֵי 9 >

חכמות בנתה ביתה חצבה עמודיה שבעה׃ 1
Bwanya atongi ndako na ye, atelemisi yango na makonzi sambo;
טבחה טבחה מסכה יינה אף ערכה שלחנה׃ 2
abomi banyama na ye, akamoli masanga na ye ya vino mpe, na sima, atandi mesa.
שלחה נערתיה תקרא על גפי מרמי קרת׃ 3
Atindi basali na ye ya basi mpo ete babelela wuta na basonge ya bangomba ya engumba:
מי פתי יסר הנה חסר לב אמרה לו׃ 4
« Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa! » Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli:
לכו לחמו בלחמי ושתו ביין מסכתי׃ 5
« Boya kolia bilei na ngai mpe komela vino oyo nakamoli,
עזבו פתאים וחיו ואשרו בדרך בינה׃ 6
botika nzela na bino ya bozoba mpe bokozala na bomoi, botambola na nzela ya mayele. »
יסר לץ לקח לו קלון ומוכיח לרשע מומו׃ 7
Moto nyonso oyo apamelaka motioli amilukelaka kosambwa, moto nyonso oyo apamelaka moto mabe amilukelaka ngambo.
אל תוכח לץ פן ישנאך הוכח לחכם ויאהבך׃ 8
Kopamela motioli te, noki te akoyina yo; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.
תן לחכם ויחכם עוד הודע לצדיק ויוסף לקח׃ 9
Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.
תחלת חכמה יראת יהוה ודעת קדשים בינה׃ 10
Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.
כי בי ירבו ימיך ויוסיפו לך שנות חיים׃ 11
Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
אם חכמת חכמת לך ולצת לבדך תשא׃ 12
Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali mpo na litomba na yo moko; kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi.
אשת כסילות המיה פתיות ובל ידעה מה׃ 13
Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele, ayokaka te mpe azanga mayele,
וישבה לפתח ביתה על כסא מרמי קרת׃ 14
avandaka na ekuke ya ndako na ye, atiaka kiti na ye na bisika ya likolo ya engumba,
לקרא לעברי דרך המישרים ארחותם׃ 15
mpo na kobenga baleki nzela, bato oyo bazali kokende na nzela na bango.
מי פתי יסר הנה וחסר לב ואמרה לו׃ 16
Tika ete moto oyo azangi mayele aya awa! Atindi maloba epai ya bato oyo bazanga bososoli:
מים גנובים ימתקו ולחם סתרים ינעם׃ 17
« Mayi oyo bayibi ezalaka elengi, mpe lipa oyo baliaka na kobombama ezalaka kitoko. »
ולא ידע כי רפאים שם בעמקי שאול קראיה׃ (Sheol h7585) 18
Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi. (Sheol h7585)

< מִשְׁלֵי 9 >