< מִשְׁלֵי 31 >

דברי למואל מלך משא אשר יסרתו אמו׃ 1
Maloba ya mokonzi Lemweli, mateya oyo mama na ye ateyaki ye:
מה ברי ומה בר בטני ומה בר נדרי׃ 2
Eh mwana na ngai ya mobali, mwana oyo abimi na libumu na ngai, mwana mobali oyo nalapelaka ndayi:
אל תתן לנשים חילך ודרכיך למחות מלכין׃ 3
Kosilisa makasi na yo na basi te, komitika te na basi oyo bapengwisaka bakonzi!
אל למלכים למואל אל למלכים שתו יין ולרוזנים או שכר׃ 4
Eh Lemweli, ebongi te mpo na bakonzi; te, ebongi te mpo na bato minene kotuna: « Wapi masanga ya makasi? »
פן ישתה וישכח מחקק וישנה דין כל בני עני׃ 5
Noki te soki bameli yango, bakobosana mibeko mpe bakokata na bosembo te makambo ya banyokolami.
תנו שכר לאובד ויין למרי נפש׃ 6
Pesa masanga ya makasi epai ya bato oyo balingi kokufa, mpe vino epai ya bato oyo bazali kotungisama na motema.
ישתה וישכח רישו ועמלו לא יזכר עוד׃ 7
Tika bango bamela mpo ete babosana pasi na bango mpe batika kokanisa lisusu minyoko na bango.
פתח פיך לאלם אל דין כל בני חלוף׃ 8
Fungola monoko na yo mpo na kolobela bato oyo bazali na makoki ya koloba te, mpe mpo na kolongisa bato oyo bazanga basungi.
פתח פיך שפט צדק ודין עני ואביון׃ 9
Fungola monoko na yo mpe sambisa na bosembo, bundela babola mpe bato oyo bakelela.
אשת חיל מי ימצא ורחק מפנינים מכרה׃ 10
Nani akoki komona mwasi ya lokumu? Azali na motuya koleka babiju ya talo.
בטח בה לב בעלה ושלל לא יחסר׃ 11
Mobali na ye atielaka ye motema mpe azangaka te biloko ya motuya.
גמלתהו טוב ולא רע כל ימי חייה׃ 12
Tango nyonso ya bomoi na ye, apesaka mobali na ye esengo, kasi mawa te;
דרשה צמר ופשתים ותעש בחפץ כפיה׃ 13
alukaka bapwale ya meme mpe basinga ya lino, bongo maboko na ye etongaka yango na esengo.
היתה כאניות סוחר ממרחק תביא לחמה׃ 14
Azali lokola masuwa ya bato ya mombongo, akendaka koluka bilei na ye mosika;
ותקם בעוד לילה ותתן טרף לביתה וחק לנערתיה׃ 15
alamukaka wana butu ezali nanu, abongisaka bilei mpo na ndako na ye mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.
זממה שדה ותקחהו מפרי כפיה נטע כרם׃ 16
Soki asepeli na elanga, asombaka yango; mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.
חגרה בעוז מתניה ותאמץ זרעותיה׃ 17
Akangaka loketo na ye makasi mpe akembisaka maboko na ye na mosala.
טעמה כי טוב סחרה לא יכבה בליל נרה׃ 18
Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu; mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.
ידיה שלחה בכישור וכפיה תמכו פלך׃ 19
Maboko na ye esimbaka mitonga oyo batongelaka, mpe misapi na ye etongaka bilamba.
כפה פרשה לעני וידיה שלחה לאביון׃ 20
Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola, mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.
לא תירא לביתה משלג כי כל ביתה לבש שנים׃ 21
Tango mvula ya pembe ekitaka, abangaka eloko moko te mpo na ndako na ye, pamba te bato nyonso kati na ndako na ye balataka bilamba ya malili.
מרבדים עשתה לה שש וארגמן לבושה׃ 22
Asalaka babulangeti mpo na mbeto na ye mpe alataka bilamba na ye ya lino ya kitoko mpe ya motane.
נודע בשערים בעלה בשבתו עם זקני ארץ׃ 23
Bapesaka mobali na ye lokumu, na ekuke ya engumba, tango avandaka elongo na bakambi ya mokili.
סדין עשתה ותמכר וחגור נתנה לכנעני׃ 24
Asalaka bilamba ya lino mpe atekaka yango, asalaka mombongo ya mikaba.
עז והדר לבושה ותשחק ליום אחרון׃ 25
Alataka lokola elamba: molende na mosala mpe lokumu; mikolo ya lobi ebangisaka ye te, asekaka nde yango.
פיה פתחה בחכמה ותורת חסד על לשונה׃ 26
Alobaka na bwanya, mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.
צופיה הליכות ביתה ולחם עצלות לא תאכל׃ 27
Azalaka na bokebi na makambo nyonso oyo elekaka na ndako na ye, mpe aliaka lipa na bogoyigoyi te.
קמו בניה ויאשרוה בעלה ויהללה׃ 28
Bana na ye bakotelema mpo na kokumisa ye, mpe tala ndenge mobali na ye mpe akumisaka ye:
רבות בנות עשו חיל ואת עלית על כלנה׃ 29
« Basi ebele basalaka makambo ya lokumu; kasi yo, oleki bango nyonso! »
שקר החן והבל היפי אשה יראת יהוה היא תתהלל׃ 30
Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.
תנו לה מפרי ידיה ויהללוה בשערים מעשיה׃ 31
Bopesa ye bambuma ya misala na ye! Tika ete bapesa ye lokumu, na bikuke ya engumba, mpo na misala nyonso oyo asalaka!

< מִשְׁלֵי 31 >