< במדבר 29 >

ובחדש השביעי באחד לחדש מקרא קדש יהיה לכם כל מלאכת עבדה לא תעשו יום תרועה יהיה לכם׃ 1
« ‹ Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo, ekozala nde mokolo ya kobeta bakelelo.
ועשיתם עלה לריח ניחח ליהוה פר בן בקר אחד איל אחד כבשים בני שנה שבעה תמימם׃ 2
Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe: mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
ומנחתם סלת בלולה בשמן שלשה עשרנים לפר שני עשרנים לאיל׃ 3
Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba;
ועשרון אחד לכבש האחד לשבעת הכבשים׃ 4
mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
ושעיר עזים אחד חטאת לכפר עליכם׃ 5
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.
מלבד עלת החדש ומנחתה ועלת התמיד ומנחתה ונסכיהם כמשפטם לריח ניחח אשה ליהוה׃ 6
Bambeka oyo ekobakisama na mbeka ya kotumba ya sanza na sanza elongo na makabo na yango ya bambuma, na mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo elongo na makabo na yango ya bambuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda ndenge ekatama. Ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
ובעשור לחדש השביעי הזה מקרא קדש יהיה לכם ועניתם את נפשתיכם כל מלאכה לא תעשו׃ 7
Na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokokila bilei, bokosala mosala moko te oyo bokosalaka mokolo na mokolo.
והקרבתם עלה ליהוה ריח ניחח פר בן בקר אחד איל אחד כבשים בני שנה שבעה תמימם יהיו לכם׃ 8
Bokobonzela Yawe mbeka ya kotumba, lokola biloko ya solo kitoko: mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
ומנחתם סלת בלולה בשמן שלשה עשרנים לפר שני עשרנים לאיל האחד׃ 9
Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba;
עשרון עשרון לכבש האחד לשבעת הכבשים׃ 10
mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
שעיר עזים אחד חטאת מלבד חטאת הכפרים ועלת התמיד ומנחתה ונסכיהם׃ 11
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
ובחמשה עשר יום לחדש השביעי מקרא קדש יהיה לכם כל מלאכת עבדה לא תעשו וחגתם חג ליהוה שבעת ימים׃ 12
Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo mpe bokosala feti monene mpo na Yawe mikolo sambo.
והקרבתם עלה אשה ריח ניחח ליהוה פרים בני בקר שלשה עשר אילם שנים כבשים בני שנה ארבעה עשר תמימם יהיו׃ 13
Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mpe lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe: bangombe zomi na misato ya mibali, bameme mibale ya mibali, mpe bana meme zomi na minei ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
ומנחתם סלת בלולה בשמן שלשה עשרנים לפר האחד לשלשה עשר פרים שני עשרנים לאיל האחד לשני האילם׃ 14
Mpo na ngombe moko na moko ya mobali kati na bangombe yango zomi na misato ya mibali, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme moko na moko kati na bameme yango mibale ya mibali, bakilo motoba;
ועשרון עשרון לכבש האחד לארבעה עשר כבשים׃ 15
mpe mpo na mwana meme moko na moko kati na bana meme yango zomi na minei, bakilo misato.
ושעיר עזים אחד חטאת מלבד עלת התמיד מנחתה ונסכה׃ 16
Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, bakisa lisusu mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
וביום השני פרים בני בקר שנים עשר אילם שנים כבשים בני שנה ארבעה עשר תמימם׃ 17
Na mokolo ya mibale, bokobonza bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba;
ומנחתם ונסכיהם לפרים לאילם ולכבשים במספרם כמשפט׃ 18
elongo na makabo ya mbuma mpe likabo ya masanga mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, kolanda motango oyo ekatama.
ושעיר עזים אחד חטאת מלבד עלת התמיד ומנחתה ונסכיהם׃ 19
Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
וביום השלישי פרים עשתי עשר אילם שנים כבשים בני שנה ארבעה עשר תמימם׃ 20
Na mokolo ya misato, bokobonza bangombe ya mibali zomi na moko, meme mibale ya mibali mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
ומנחתם ונסכיהם לפרים לאילם ולכבשים במספרם כמשפט׃ 21
Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
ושעיר חטאת אחד מלבד עלת התמיד ומנחתה ונסכה׃ 22
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
וביום הרביעי פרים עשרה אילם שנים כבשים בני שנה ארבעה עשר תמימם׃ 23
Na mokolo ya minei, bokobonza bangombe ya mibali zomi, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
מנחתם ונסכיהם לפרים לאילם ולכבשים במספרם כמשפט׃ 24
Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
ושעיר עזים אחד חטאת מלבד עלת התמיד מנחתה ונסכה׃ 25
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
וביום החמישי פרים תשעה אילם שנים כבשים בני שנה ארבעה עשר תמימם׃ 26
Na mokolo ya mitano, bokobonza bangombe ya mibali libwa, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
ומנחתם ונסכיהם לפרים לאילם ולכבשים במספרם כמשפט׃ 27
Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
ושעיר חטאת אחד מלבד עלת התמיד ומנחתה ונסכה׃ 28
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
וביום הששי פרים שמנה אילם שנים כבשים בני שנה ארבעה עשר תמימם׃ 29
Na mokolo ya motoba, bokobonza bangombe ya mibali mwambe, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
ומנחתם ונסכיהם לפרים לאילם ולכבשים במספרם כמשפט׃ 30
Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
ושעיר חטאת אחד מלבד עלת התמיד מנחתה ונסכיה׃ 31
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
וביום השביעי פרים שבעה אילם שנים כבשים בני שנה ארבעה עשר תמימם׃ 32
Na mokolo ya sambo, bokobonza bangombe ya mibali sambo, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
ומנחתם ונסכהם לפרים לאילם ולכבשים במספרם כמשפטם׃ 33
Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
ושעיר חטאת אחד מלבד עלת התמיד מנחתה ונסכה׃ 34
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
ביום השמיני עצרת תהיה לכם כל מלאכת עבדה לא תעשו׃ 35
Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani monene mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
והקרבתם עלה אשה ריח ניחח ליהוה פר אחד איל אחד כבשים בני שנה שבעה תמימם׃ 36
Bokobonza lokola mbeka ya kotumba mpe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe: ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali; mpe bana mibali ya meme, sambo, ya mobu moko mpe ezanga mbeba.
מנחתם ונסכיהם לפר לאיל ולכבשים במספרם כמשפט׃ 37
Mpo na ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama.
ושעיר חטאת אחד מלבד עלת התמיד ומנחתה ונסכה׃ 38
Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga.
אלה תעשו ליהוה במועדיכם לבד מנדריכם ונדבתיכם לעלתיכם ולמנחתיכם ולנסכיכם ולשלמיכם׃ 39
Oyo nde makabo mpe bambeka oyo bokobonzela Yawe na mikolo ya bafeti na bino oyo ekatama; ekobakisama na likolo ya mbeka na bino ya kotumba, na likolo ya makabo na bino ya bambuma, mbeka na bino ya masanga, mbeka na bino ya boyokani mpo na kokokisa ndayi to mpe na likolo ya makabo oyo bopesaka wuta na mokano ya mitema na bino moko. › »
ויאמר משה אל בני ישראל ככל אשר צוה יהוה את משה׃ 40
Moyize ayebisaki bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye.

< במדבר 29 >