< מארק 11 >
ויהי כאשר קרבו לירושלים אל בית פגי ובית היני בהר הזיתים וישלח שנים מתלמידיו׃ | 1 |
Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi, bakomaki na Betifaje mpe Betani oyo ezalaki pene ya ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na Ye mibale,
ויאמר אליהם לכו אל הכפר אשר ממולכם והיה כבאכם שמה תמצאו עיר אסור אשר לא ישב עליו אדם אותו התירו והביאו׃ | 2 |
alobaki na bango: — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela; bofungola yango mpe bomema yango awa.
וכי יאמר אליכם איש למה תעשו זאת ואמרתם האדון צריך לו וברגע ישלחנו הנה׃ | 3 |
Soki moto moko atuni bino: « Mpo na nini bozali kofungola yango? » Bozongisela ye: « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe na mbala moko, akotinda yango awa.
וילכו וימצאו העיר אסור אל השער בחוץ על אם הדרך ויתירוהו׃ | 4 |
Bakendeki mpe bakutaki mwana ya ane ekangama na libanda, pembeni ya ekuke; mpe bafungolaki yango.
ואנשים מן העמדים שם אמרו אליהם מה זאת תעשו להתיר את העיר׃ | 5 |
Ndambo ya bato oyo bazalaki wana batunaki: — Nini ezwi bino mpo ete bofungola mwana oyo ya ane?
ויאמרו אליהם כאשר צום ישוע ויניחו להם׃ | 6 |
Bayekoli bazongiselaki bango ndenge kaka Yesu alobaki na bango, mpe bato yango batikaki bayekoli kokende elongo na yango.
ויביאו את העיר אל ישוע וישליכו עליו את בגדיהם וישב עליו׃ | 7 |
Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango; mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
ורבים פרשו את בגדיהם על הדרך ואחרים כרתו ענפים מן העצים וישטחו על הדרך׃ | 8 |
Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela; bamosusu batandaki bitape ya mobesu, oyo bawutaki kokata na likolo ya banzete kati na bilanga.
וההלכים לפניו ואחריו צעקים לאמר הושע נא ברוך הבא בשם יהוה׃ | 9 |
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga: « Ozana! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo!
ברוכה מלכות דוד אבינו הבאה בשם יהוה הושע נא במרומים׃ | 10 |
Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama, bokonzi ya Davidi, tata na biso! Ozana na bisika oyo eleki Likolo! »
ויבא ישוע ירושלים ואל בית המקדש וירא ויתבונן על הכל והיום רפה לערוב ויצא אל בית היני עם שנים העשר׃ | 11 |
Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale.
ויהי ממחרת בצאתם מבית היני וירעב׃ | 12 |
Mokolo oyo elandaki, wana bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala.
וירא תאנה מרחוק ולא עלים ויבא לראות הימצא בה פרי ויקרב אליה ולא מצא בה כי אם עלים לבד כי לא היתה עת תאנים׃ | 13 |
Na mosika, amonaki nzete moko ya figi etonda na makasa; apusanaki pene na yango mpo na kotala soki ezali na mbuma. Kasi tango akomaki pene, amonaki kaka makasa mpo ete ezalaki eleko ya bambuma ya figi te.
ויען ויאמר אליה מעתה איש אל יאכל פרי ממך עד עולם וישמעו תלמידיו׃ (aiōn ) | 14 |
Yesu alobaki na nzete yango: « Tika ete, mpo na libela, moto moko te alia lisusu mbuma kowuta na yo! » Bayekoli na Ye bayokaki Ye koloba maloba yango. (aiōn )
ויבאו ירושלים ויבא ישוע אל המקדש ויחל לגרש משם את המוכרים ואת הקונים ויהפך את שלחנות השלחנים ואת מושבות מכרי היונים׃ | 15 |
Tango bakomaki na Yelusalemi, Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe akomaki kobengana bato oyo bazalaki koteka mpe kosomba kati na Tempelo; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga;
ולא הניח לאיש לשאת כלי דרך המקדש׃ | 16 |
mpe apesaki nzela te na bato oyo bazalaki kotambola kati na lopango ya tempelo ete bamema biloko.
וילמד ויאמר להם הלא כתוב כי ביתי בית תפלה יקרא לכל העמים ואתם עשיתם אתו מערת פריאים׃ | 17 |
Bongo akomaki koteya bango: « Boni, ekomama te: ‹ Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso? › Kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi! »
וישמעו הסופרים וראשי הכהנים ויתנכלו אתו להשמידו כי יראו מפניו יען אשר כל העם משתוממים על תורתו׃ | 18 |
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bayokaki makambo yango mpe bakomaki koluka nzela ya koboma Ye; bazalaki kobanga Ye, pamba te ebele ya bato bazalaki kokamwa malakisi na Ye.
ויהי בערב ויצא אל מחוץ לעיר׃ | 19 |
Tango pokwa ekomaki, Yesu mpe bayekoli na Ye babimaki na engumba.
ויהי הם עברים בבקר ויראו את התאנה כי יבשה עם שרשיה׃ | 20 |
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, wana bazalaki koleka, bamonaki ete nzete ya figi ekawuki kino na misisa.
ויזכר פטרוס ויאמר אליו רבי הנה התאנה אשר אררתה יבשה׃ | 21 |
Petelo akanisaki likambo oyo esalemaki mpe alobaki na Yesu: — Moteyi, tala! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekawuki!
ויען ישוע ויאמר אליהם תהי נא בכם אמונת אלהים׃ | 22 |
Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Bozala na kondima kati na Nzambe.
כי אמן אמר אני לכם כל אשר יאמר אל ההר הזה הנשא והעתק אל תוך הים ואין ספק בלבבו כי אם יאמין כי יהיה כאשר אמר כן גם יהיה לו׃ | 23 |
Nazali koloba na bino penza ya solo: soki moto alobi na ngomba wana: « Longwa wana mpe mibwaka na ebale; » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama.
על כן אני אמר לכם כל אשר תשאלו בהתפללכם האמינו כי תקחו ויהי לכם׃ | 24 |
Yango wana nazali koloba na bino: eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.
וכי תעמדו להתפלל תסלחו לכל איש את אשר בלבבכם עליו למען יסלח לכם אביכם שבשמים אף הוא את פשעיכם׃ | 25 |
Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino. [
ואתם אם לא תסלחו אף אביכם שבשמים לא יסלח לכם את פשעיכם׃ | 26 |
Kasi soki bolimbisi te, Tata na bino oyo azali kati na Likolo mpe akolimbisa masumu na bino te.]
וישובו ויבאו ירושלים ויהי הוא מתהלך במקדש ויבאו אליו הכהנים הגדולים והסופרים והזקנים׃ | 27 |
Bakendeki lisusu na Yelusalemi. Wana Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye:
ויאמרו אליו באי זו רשות אתה עשה אלה ומי נתן לך את הרשות הזאת לעשות את אלה׃ | 28 |
— Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo? Mpe nani apesi Yo bokonzi ya kosala yango?
ויאמר ישוע אליהם גם אני אשאלה אתכם דבר אחד ואתם השיבוני ואמר לכם באי זו רשות אני עשה אלה׃ | 29 |
Yesu azongiselaki bango: — Nazali kotuna bino motuna moko kaka. Bopesa Ngai nanu eyano, bongo Ngai nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
טבילת יוחנן המן השמים היתה אם מבני אדם השיבוני׃ | 30 |
Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato? Boyebisa Ngai!
ויחשבו כה וכה בקרבם לאמר אם נאמר מן השמים יאמר מדוע אפוא לא האמנתם לו׃ | 31 |
Bakomaki kokabola makanisi bango na bango: « Soki tolobi ete ewutaki na Nzambe, akotuna biso lisusu: bongo mpo na nini bondimaki ye te?
או הנאמר מבני אדם וייראו את העם כי כלם חשבו את יוחנן לנביא באמת׃ | 32 |
Soki mpe tolobi ete ewutaki na bato, wana… » Solo, bazalaki kobanga bato, pamba te bato nyonso bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli.
ויענו ויאמרו אל ישוע לא ידענו ויען ישוע ויאמר אליהם אם כן גם אני לא אמר לכם באי זו רשות אני עשה אלה׃ | 33 |
Boye, bazongiselaki Yesu: — Toyebi te! Yesu mpe alobaki na bango: — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.