< ויקרא 18 >

וידבר יהוה אל משה לאמר׃ 1
Yawe alobaki na Moyize:
דבר אל בני ישראל ואמרת אלהם אני יהוה אלהיכם׃ 2
« Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
כמעשה ארץ מצרים אשר ישבתם בה לא תעשו וכמעשה ארץ כנען אשר אני מביא אתכם שמה לא תעשו ובחקתיהם לא תלכו׃ 3
Bokoki te kosala makambo ndenge esalemaka na Ejipito epai wapi bozalaki kovanda to na Kanana epai wapi nazali komema bino.
את משפטי תעשו ואת חקתי תשמרו ללכת בהם אני יהוה אלהיכם׃ 4
Bosengeli kotosa bobele mibeko mpe bikateli na Ngai. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
ושמרתם את חקתי ואת משפטי אשר יעשה אתם האדם וחי בהם אני יהוה׃ 5
Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe.
איש איש אל כל שאר בשרו לא תקרבו לגלות ערוה אני יהוה׃ 6
Mobali moko te akosangisa nzoto na mwasi ya libota na ye penza. Nazali Yawe.
ערות אביך וערות אמך לא תגלה אמך הוא לא תגלה ערותה׃ 7
Okosambwisa te tata na yo na kosangisa nzoto na mama na yo. Lokola azali mama na yo, kosambwisa ye te.
ערות אשת אביך לא תגלה ערות אביך הוא׃ 8
Okosangisa nzoto te na mwasi mosusu ya tata na yo, soki te okosambwisa tata na yo.
ערות אחותך בת אביך או בת אמך מולדת בית או מולדת חוץ לא תגלה ערותן׃ 9
Okosangisa nzoto te na ndeko na yo ya mwasi, ezala na mwana mwasi ya tata na yo to ya mama na yo, oyo abotami na ndako to na libanda ya ndako.
ערות בת בנך או בת בתך לא תגלה ערותן כי ערותך הנה׃ 10
Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwana na yo ya mobali to ya mwasi; kosambwisa ye te.
ערות בת אשת אביך מולדת אביך אחותך הוא לא תגלה ערותה׃ 11
Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, azali ndeko na yo ya mwasi.
ערות אחות אביך לא תגלה שאר אביך הוא׃ 12
Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata na yo, azali tata mwasi na yo.
ערות אחות אמך לא תגלה כי שאר אמך הוא׃ 13
Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mama na yo, azali mama leki to mama kulutu na yo.
ערות אחי אביך לא תגלה אל אשתו לא תקרב דדתך הוא׃ 14
Okosambwisa te ndeko mobali ya tata na yo na kosangisa nzoto na mwasi na ye. Azali mama na yo.
ערות כלתך לא תגלה אשת בנך הוא לא תגלה ערותה׃ 15
Okosangisa nzoto te na bokilo na yo. Azali mwasi ya mwana na yo, kosangisa na ye nzoto te.
ערות אשת אחיך לא תגלה ערות אחיך הוא׃ 16
Okosambwisa te ndeko na yo ya mobali na kosangisa nzoto na mwasi na ye.
ערות אשה ובתה לא תגלה את בת בנה ואת בת בתה לא תקח לגלות ערותה שארה הנה זמה הוא׃ 17
Okosangisa nzoto te na mama mpe na mwana na ye ya mwasi to na mwana mwasi ya mwana na ye ya mobali mpe ya mwasi; pamba te bazali makila moko mpe ekozala likambo ya nkele penza na miso ya Nzambe.
ואשה אל אחתה לא תקח לצרר לגלות ערותה עליה בחייה׃ 18
Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mwasi na yo, wana mwasi na yo azali nanu na bomoi, noki te ekoyeisa bombanda.
ואל אשה בנדת טמאתה לא תקרב לגלות ערותה׃ 19
Okosangisa nzoto te na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza, pamba te azali mbindo.
ואל אשת עמיתך לא תתן שכבתך לזרע לטמאה בה׃ 20
Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.
ומזרעך לא תתן להעביר למלך ולא תחלל את שם אלהיך אני יהוה׃ 21
Okopesa moko kati na bana na yo te lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, pamba te osengeli te kobebisa lokumu ya Kombo ya Nzambe na yo. Ngai nazali Yawe.
ואת זכר לא תשכב משכבי אשה תועבה הוא׃ 22
Okosangisa nzoto te na mwana mobali ndenge basangisaka nzoto na mwana mwasi; ezali likambo ya nkele.
ובכל בהמה לא תתן שכבתך לטמאה בה ואשה לא תעמד לפני בהמה לרבעה תבל הוא׃ 23
Okosangisa nzoto te na nyama, noki te okokoma mbindo elongo na yango. Ndenge moko mpe mwasi akosangisa nzoto te na nyama: ezali kotiola Nzambe.
אל תטמאו בכל אלה כי בכל אלה נטמאו הגוים אשר אני משלח מפניכם׃ 24
Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo.
ותטמא הארץ ואפקד עונה עליה ותקא הארץ את ישביה׃ 25
Lokola mboka yango moko mpe ekomaki mbindo, napesaki yango mpe etumbu mpo na lisumu na yango; bongo esanzaki bavandi na yango.
ושמרתם אתם את חקתי ואת משפטי ולא תעשו מכל התועבת האלה האזרח והגר הגר בתוככם׃ 26
Kasi, ezala mwana mboka to mopaya oyo bazali kati na bino, bosengeli kotosa malako mpe bikateli na Ngai; mpe bosengeli koboya kosala makambo nyonso oyo ya nkele na miso ya Nzambe.
כי את כל התועבת האל עשו אנשי הארץ אשר לפניכם ותטמא הארץ׃ 27
Pamba te bato oyo bazalaki kovanda na mboka oyo liboso na bino babandaki kosala makambo oyo nyonso, bongo mboka ekomaki mbindo.
ולא תקיא הארץ אתכם בטמאכם אתה כאשר קאה את הגוי אשר לפניכם׃ 28
Bino bokeba ete bokomisa mboka mbindo te, mpo ete yango esanza bino te ndenge esanzaki bato ya bikolo oyo bazalaki liboso na bino.
כי כל אשר יעשה מכל התועבות האלה ונכרתו הנפשות העשת מקרב עמם׃ 29
Moto nyonso oyo akosala moko ya makambo oyo ya nkele na miso ya Nzambe, esengeli balongola ye kati na bato na ye.
ושמרתם את משמרתי לבלתי עשות מחקות התועבת אשר נעשו לפניכם ולא תטמאו בהם אני יהוה אלהיכם׃ 30
Boye, bobatela malako na Ngai mpe bolanda ata likambo moko te kati na makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso ete bino boya, mpo ete bomikomisa mbindo te na nzela na yango. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »

< ויקרא 18 >