< יונה 2 >

ויתפלל יונה אל יהוה אלהיו ממעי הדגה׃ 1
Wuta na libumu ya mbisi, Yona asambelaki Yawe, Nzambe na ye.
ויאמר קראתי מצרה לי אל יהוה ויענני מבטן שאול שועתי שמעת קולי׃ (Sheol h7585) 2
Alobaki: « Kati na mawa na ngai, nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai. Wuta kati na mboka ya bakufi, nasengaka lisungi, mpe ayokaka ngai. (Sheol h7585)
ותשליכני מצולה בלבב ימים ונהר יסבבני כל משבריך וגליך עלי עברו׃ 3
Obwakaki ngai kati na libulu ya molili makasi, kati na mozindo ya ebale monene epai wapi mayi ezingeli ngai mpe bambonge na yo nyonso ekweyeli ngai.
ואני אמרתי נגרשתי מנגד עיניך אך אוסיף להביט אל היכל קדשך׃ 4
Nazali komilobela: ‹ Obengani ngai mosika na miso na Yo; nzokande ngai nazali kokoba kotalela Tempelo na Yo ya bule. ›
אפפוני מים עד נפש תהום יסבבני סוף חבוש לראשי׃ 5
Nazindi kino na kingo, mayi ya libulu ya molili makasi ezingeli ngai, matiti ya ebale ekangani-kangani zingazinga ya moto na ngai.
לקצבי הרים ירדתי הארץ ברחיה בעדי לעולם ותעל משחת חיי יהוה אלהי׃ 6
Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka, mabele esili kokanga bikangelo na yango sima na ngai mpo na libela. Kasi Yo Yawe, Nzambe na ngai, obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo.
בהתעטף עלי נפשי את יהוה זכרתי ותבוא אליך תפלתי אל היכל קדשך׃ 7
Wana nakomi pene ya kobungisa elikya, nakanisi Yo, Yawe, mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo, kino na Tempelo na Yo ya bule.
משמרים הבלי שוא חסדם יעזבו׃ 8
Bato oyo bakangamaka na banzambe ya bikeko ezanga tina babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.
ואני בקול תודה אזבחה לך אשר נדרתי אשלמה ישועתה ליהוה׃ 9
Kasi ngai, na koyembaka nzembo ya matondi, nalingi kobanda kobonzelaka Yo bambeka mpe kokokisaka bilaka oyo nazali kopesa, pamba te lobiko ezali ya Yawe. »
ויאמר יהוה לדג ויקא את יונה אל היבשה׃ 10
Mpe Yawe apesaki mitindo na mbisi, mpe mbala moko, mbisi esanzaki Yona na mokili.

< יונה 2 >