< איוב 28 >

כי יש לכסף מוצא ומקום לזהב יזקו׃ 1
Ezali na esika oyo batimolaka palata, mpe na esika oyo bapetolaka wolo.
ברזל מעפר יקח ואבן יצוק נחושה׃ 2
Ebende ewutaka na mabele, mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako.
קץ שם לחשך ולכל תכלית הוא חוקר אבן אפל וצלמות׃ 3
Moto asilisaka molili, alukaka kino na se, na bisika ya se penza, libanga kati na molili oyo eleki makasi,
פרץ נחל מעם גר הנשכחים מני רגל דלו מאנוש נעו׃ 4
atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka, na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato, adiembelaka mosika ya bato nyonso.
ארץ ממנה יצא לחם ותחתיה נהפך כמו אש׃ 5
Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango lokola nde moto ezikisi yango.
מקום ספיר אבניה ועפרת זהב לו׃ 6
Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele, mpe putulu ya wolo ezalaka kati na mabele.
נתיב לא ידעו עיט ולא שזפתו עין איה׃ 7
Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango, miso ya mpongo moko te emoni yango,
לא הדריכהו בני שחץ לא עדה עליו שחל׃ 8
nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te, mpe nkosi etambola nanu kuna te.
בחלמיש שלח ידו הפך משרש הרים׃ 9
Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi mpe apikolaka ngomba longwa na misisa,
בצורות יארים בקע וכל יקר ראתה עינו׃ 10
atimolaka nzela kati na mabanga, mpe miso na ye emonaka bomengo na yango nyonso,
מבכי נהרות חבש ותעלמה יצא אור׃ 11
akawusaka mayi ya bibale mpe abimisaka na pole biloko oyo ebombama.
והחכמה מאין תמצא ואי זה מקום בינה׃ 12
Kasi bakoki komona bwanya wapi? Mayele evandaka wapi?
לא ידע אנוש ערכה ולא תמצא בארץ החיים׃ 13
Moto ayebaka motuya na yango te, pamba te bakoki komona yango te kati na mokili ya bato ya bomoi.
תהום אמר לא בי היא וים אמר אין עמדי׃ 14
Libulu ya mozindo elobi: « Ezali kati na ngai te; » mpe ebale monene elobi: « Ezali epai na ngai te. »
לא יתן סגור תחתיה ולא ישקל כסף מחירה׃ 15
Bakoki kosomba yango te na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata;
לא תסלה בכתם אופיר בשהם יקר וספיר׃ 16
bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri;
לא יערכנה זהב וזכוכית ותמורתה כלי פז׃ 17
wolo to diama ekoki te kokokana na yango, bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.
ראמות וגביש לא יזכר ומשך חכמה מפנינים׃ 18
Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te liboso na yango. Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.
לא יערכנה פטדת כוש בכתם טהור לא תסלה׃ 19
Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te, mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto.
והחכמה מאין תבוא ואי זה מקום בינה׃ 20
Boye, bwanya ewutaka wapi? Mayele evandaka wapi?
ונעלמה מעיני כל חי ומעוף השמים נסתרה׃ 21
Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi, ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo.
אבדון ומות אמרו באזנינו שמענו שמעה׃ 22
Libebi mpe kufa elobi: « Kaka sango na yango nde ekomaki na matoyi na biso. »
אלהים הבין דרכה והוא ידע את מקומה׃ 23
Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango, Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka.
כי הוא לקצות הארץ יביט תחת כל השמים יראה׃ 24
Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili, mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola.
לעשות לרוח משקל ומים תכן במדה׃ 25
Tango apesaki makasi na mopepe mpe atiaki mondelo na mayi,
בעשתו למטר חק ודרך לחזיז קלות׃ 26
tango atiaki mobeko mpo na mvula mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali,
אז ראה ויספרה הכינה וגם חקרה׃ 27
amonaki bwanya mpe akumisaki yango, andimaki yango mpe amekaki yango.
ויאמר לאדם הן יראת אדני היא חכמה וסור מרע בינה׃ 28
Bongo alobaki na moto: « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya! Koboya mabe, yango nde mayele! »

< איוב 28 >