< איוב 13 >

הן כל ראתה עיני שמעה אזני ותבן לה׃ 1
Miso na ngai emonaki makambo oyo nyonso, matoyi na ngai eyokaki yango, mpe nasosoli yango malamu.
כדעתכם ידעתי גם אני לא נפל אנכי מכם׃ 2
Nayebi makambo nyonso oyo bino boyebi, boleki ngai na eloko moko te.
אולם אני אל שדי אדבר והוכח אל אל אחפץ׃ 3
Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe.
ואולם אתם טפלי שקר רפאי אלל כלכם׃ 4
Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta, bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te.
מי יתן החרש תחרישון ותהי לכם לחכמה׃ 5
Soki bovandaki ata kimia, bolingaki ata komonana bato ya bwanya.
שמעו נא תוכחתי ורבות שפתי הקשיבו׃ 6
Yoka sik’oyo maloba na ngai, yoka kosamba ya bibebu na ngai.
הלאל תדברו עולה ולו תדברו רמיה׃ 7
Boni, bozali kokotela Nzambe na nzela ya lokuta mpe ya maloba ya solo te?
הפניו תשאון אם לאל תריבון׃ 8
Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye? Bolingi kobundela Nzambe?
הטוב כי יחקר אתכם אם כהתל באנוש תהתלו בו׃ 9
Bokosepela soki aluki koyeba makanisi ya mitema na bino? Bokanisi ete bokoki kokosa Ye ndenge bakosaka bato?
הוכח יוכיח אתכם אם בסתר פנים תשאון׃ 10
Akopamela bino solo soki amoni ete, na se ya mitema na bino, boponaka-ponaka bilongi.
הלא שאתו תבעת אתכם ופחדו יפל עליכם׃ 11
Boni, bokozala ata na somo ya lokumu na Ye te? Kolenga ekokweyela bino te?
זכרניכם משלי אפר לגבי חמר גביכם׃ 12
Pamba te maloba na bino ekokani na putulu, mpe makanisi na bino ezali lokola mabele ya bikeko.
החרישו ממני ואדברה אני ויעבר עלי מה׃ 13
Botika makelele mpe botika ngai naloba! Oyo ekoya eya!
על מה אשא בשרי בשני ונפשי אשים בכפי׃ 14
Mpo na nini nandima kokufa mpe nasakanela bomoi na ngai?
הן יקטלני לא איחל אך דרכי אל פניו אוכיח׃ 15
Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.
גם הוא לי לישועה כי לא לפניו חנף יבוא׃ 16
Yango kutu nde ekozala lobiko na ngai, pamba te moto moko te oyo azangi koyeba Nzambe akoki koya liboso na Ye.
שמעו שמוע מלתי ואחותי באזניכם׃ 17
Boyoka maloba na ngai malamu; tika ete matoyi na bino eyoka malamu makambo oyo nazali koloba!
הנה נא ערכתי משפט ידעתי כי אני אצדק׃ 18
Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.
מי הוא יריב עמדי כי עתה אחריש ואגוע׃ 19
Nani akoki kofunda ngai? Soki te, nakokanga monoko mpe nakokufa.
אך שתים אל תעש עמדי אז מפניך לא אסתר׃ 20
Oh Nzambe, pesa ngai kaka biloko mibale, mpe nakobombama te liboso na Yo:
כפך מעלי הרחק ואמתך אל תבעתני׃ 21
longola loboko na Yo likolo na ngai, mpe tika kobangisa ngai na somo na Yo.
וקרא ואנכי אענה או אדבר והשיבני׃ 22
Bongo benga ngai, mpe nakoyanola; to tika ngai naloba, mpe Yo okoyanola ngai.
כמה לי עונות וחטאות פשעי וחטאתי הדיעני׃ 23
Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo? Talisa ngai mbeba mpe masumu na ngai.
למה פניך תסתיר ותחשבני לאויב לך׃ 24
Mpo na nini obombi elongi na Yo mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo?
העלה נדף תערוץ ואת קש יבש תרדף׃ 25
Olingi kaka kotungisa lokasa oyo mopepe ezali komema? Olingi kaka kolandela lititi oyo ekawuka?
כי תכתב עלי מררות ותורישני עונות נעורי׃ 26
Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai.
ותשם בסד רגלי ותשמור כל ארחותי על שרשי רגלי תתחקה׃ 27
Okangi makolo na ngai na minyololo ya bibende, ozali kokengela malamu lolenge na ngai ya kotambola mpe kolandela bisika nyonso oyo natiaka bilembo ya matambe na ngai.
והוא כרקב יבלה כבגד אכלו עש׃ 28
Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola, lokola elamba oyo balie na banselele!

< איוב 13 >