< ירמיה 36 >
ויהי בשנה הרביעת ליהויקים בן יאשיהו מלך יהודה היה הדבר הזה אל ירמיהו מאת יהוה לאמר׃ | 1 |
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda:
קח לך מגלת ספר וכתבת אליה את כל הדברים אשר דברתי אליך על ישראל ועל יהודה ועל כל הגוים מיום דברתי אליך מימי יאשיהו ועד היום הזה׃ | 2 |
« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.
אולי ישמעו בית יהודה את כל הרעה אשר אנכי חשב לעשות להם למען ישובו איש מדרכו הרעה וסלחתי לעונם ולחטאתם׃ | 3 |
Tango mosusu, soki bato ya Yuda bayoki sango ya pasi nyonso oyo nabongisi mpo na kotindela bango, moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe; mpe, na bongo, Ngai nakolimbisa mabe mpe masumu na bango. »
ויקרא ירמיהו את ברוך בן נריה ויכתב ברוך מפי ירמיהו את כל דברי יהוה אשר דבר אליו על מגלת ספר׃ | 4 |
Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda.
ויצוה ירמיהו את ברוך לאמר אני עצור לא אוכל לבוא בית יהוה׃ | 5 |
Jeremi alobaki na Baruki: « Ngai nakangami, nakolonga kokende na Tempelo ya Yawe te.
ובאת אתה וקראת במגלה אשר כתבת מפי את דברי יהוה באזני העם בית יהוה ביום צום וגם באזני כל יהודה הבאים מעריהם תקראם׃ | 6 |
Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango.
אולי תפל תחנתם לפני יהוה וישבו איש מדרכו הרעה כי גדול האף והחמה אשר דבר יהוה אל העם הזה׃ | 7 |
Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. »
ויעש ברוך בן נריה ככל אשר צוהו ירמיהו הנביא לקרא בספר דברי יהוה בית יהוה׃ | 8 |
Baruki, mwana mobali ya Neriya, asalaki makambo nyonso oyo mosakoli Jeremi atindaki ye kosala; atangaki na Tempelo ya Yawe maloba ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda.
ויהי בשנה החמשית ליהויקים בן יאשיהו מלך יהודה בחדש התשעי קראו צום לפני יהוה כל העם בירושלם וכל העם הבאים מערי יהודה בירושלם׃ | 9 |
Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda.
ויקרא ברוך בספר את דברי ירמיהו בית יהוה בלשכת גמריהו בן שפן הספר בחצר העליון פתח שער בית יהוה החדש באזני כל העם׃ | 10 |
Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.
וישמע מכיהו בן גמריהו בן שפן את כל דברי יהוה מעל הספר׃ | 11 |
Tango Mishe, mwana, mobali ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani, ayokaki maloba nyonso ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda,
וירד בית המלך על לשכת הספר והנה שם כל השרים יושבים אלישמע הספר ודליהו בן שמעיהו ואלנתן בן עכבור וגמריהו בן שפן וצדקיהו בן חנניהו וכל השרים׃ | 12 |
akendeki na ndako ya mokonzi, akotaki kati na ndako ya mosala ya mokomi mikanda epai wapi bakalaka nyonso bazalaki na mayangani: Elishama, mokomi mikanda; Delaya, mwana mobali ya Shemaya; Elinatani, mwana mobali ya Akibori; Gemaria, mwana mobali ya Shafani; Sedesiasi, mwana mobali ya Anania; mpe bakalaka nyonso mosusu.
ויגד להם מכיהו את כל הדברים אשר שמע בקרא ברוך בספר באזני העם׃ | 13 |
Sima na Mishe koyebisa bango makambo nyonso oyo ayokaki epai ya Baruki tango azalaki kotangela bato makomi oyo ezalaki kati na mokanda,
וישלחו כל השרים אל ברוך את יהודי בן נתניהו בן שלמיהו בן כושי לאמר המגלה אשר קראת בה באזני העם קחנה בידך ולך ויקח ברוך בן נריהו את המגלה בידו ויבא אליהם׃ | 14 |
bakambi nyonso batindaki Yewudi, mwana mobali ya Netania, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Kushi, epai ya Baruki mpo na koyebisa ye: « Yaka yo moko elongo na mokanda oyo atangelaki bato. » Baruki, mwana mobali ya Neriya, akendeki epai na bango mpe amemaki mokanda na maboko na ye.
ויאמרו אליו שב נא וקראנה באזנינו ויקרא ברוך באזניהם׃ | 15 |
Balobaki na ye: — Tobondeli yo, vanda, tangela biso mokanda oyo. Baruki atangelaki bango mokanda yango.
ויהי כשמעם את כל הדברים פחדו איש אל רעהו ויאמרו אל ברוך הגיד נגיד למלך את כל הדברים האלה׃ | 16 |
Tango bayokaki maloba wana nyonso, bakomaki kotalana bango na bango na somo mpe balobaki na Baruki: — Tosengeli penza koyebisa makambo oyo nyonso epai ya mokonzi.
ואת ברוך שאלו לאמר הגד נא לנו איך כתבת את כל הדברים האלה מפיו׃ | 17 |
Batunaki Baruki: — Yebisa biso ndenge nini osalaki mpo na kokoma makambo oyo nyonso. Ezali Jeremi te moto ayebisi yo makambo oyo?
ויאמר להם ברוך מפיו יקרא אלי את כל הדברים האלה ואני כתב על הספר בדיו׃ | 18 |
Baruki azongisaki: — Solo, ezali ye moto ayebisaki ngai makambo oyo nyonso, mpe ngai nasalelaki kaka ekomeli mpo na kotia yango na mokanda.
ויאמרו השרים אל ברוך לך הסתר אתה וירמיהו ואיש אל ידע איפה אתם׃ | 19 |
Bakambi bayebisaki Baruki: — Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala.
ויבאו אל המלך חצרה ואת המגלה הפקדו בלשכת אלישמע הספר ויגידו באזני המלך את כל הדברים׃ | 20 |
Sima na bango kotia mokanda yango kati na ndako ya mosala ya Elishama, mokomi mikanda, bakendeki epai ya mokonzi kati na lopango mpe bayebisaki ye makambo nyonso.
וישלח המלך את יהודי לקחת את המגלה ויקחה מלשכת אלישמע הספר ויקראה יהודי באזני המלך ובאזני כל השרים העמדים מעל המלך׃ | 21 |
Mokonzi atindaki Yewudi mpo ete akende kozwa mokanda yango, mpe Yewudi akendeki kozwa yango na ndako ya mosala ya mokomi mikanda Elishama mpe atangaki yango liboso ya mokonzi mpe ya bakalaka nyonso oyo batelemaki pene na ye.
והמלך יושב בית החרף בחדש התשיעי ואת האח לפניו מבערת׃ | 22 |
Ezalaki na sanza ya libwa; mokonzi avandaki kati na shambre oyo bakimelaka na tango ya malili mpe azalaki koyetola moto oyo ezalaki kopela liboso na ye.
ויהי כקרוא יהודי שלש דלתות וארבעה יקרעה בתער הספר והשלך אל האש אשר אל האח עד תם כל המגלה על האש אשר על האח׃ | 23 |
Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto.
ולא פחדו ולא קרעו את בגדיהם המלך וכל עבדיו השמעים את כל הדברים האלה׃ | 24 |
Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te.
וגם אלנתן ודליהו וגמריהו הפגעו במלך לבלתי שרף את המגלה ולא שמע אליהם׃ | 25 |
Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te.
ויצוה המלך את ירחמאל בן המלך ואת שריהו בן עזריאל ואת שלמיהו בן עבדאל לקחת את ברוך הספר ואת ירמיהו הנביא ויסתרם יהוה׃ | 26 |
Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.
ויהי דבר יהוה אל ירמיהו אחרי שרף המלך את המגלה ואת הדברים אשר כתב ברוך מפי ירמיהו לאמר׃ | 27 |
Tango mokonzi asilisaki kotumba mokanda oyo ezalaki na maloba oyo Baruki akomaki na etinda ya Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi:
שוב קח לך מגלה אחרת וכתב עליה את כל הדברים הראשנים אשר היו על המגלה הראשנה אשר שרף יהויקים מלך יהודה׃ | 28 |
— Kamata mokanda mosusu mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo ezalaki na mokanda ya liboso oyo mokonzi Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki.
ועל יהויקים מלך יהודה תאמר כה אמר יהוה אתה שרפת את המגלה הזאת לאמר מדוע כתבת עליה לאמר בא יבוא מלך בבל והשחית את הארץ הזאת והשבית ממנה אדם ובהמה׃ | 29 |
Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki: ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama? ›
לכן כה אמר יהוה על יהויקים מלך יהודה לא יהיה לו יושב על כסא דוד ונבלתו תהיה משלכת לחרב ביום ולקרח בלילה׃ | 30 |
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda: Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu.
ופקדתי עליו ועל זרעו ועל עבדיו את עונם והבאתי עליהם ועל ישבי ירושלם ואל איש יהודה את כל הרעה אשר דברתי אליהם ולא שמעו׃ | 31 |
Nakopesa ye, bana na ye mpe basali na ye nyonso etumbu mpo na mabe na bango; nakotindela bango elongo na bavandi ya Yelusalemi mpe ya Yuda, pasi nyonso oyo nalakaki bango, mpo ete bayokaki Ngai te. »
וירמיהו לקח מגלה אחרת ויתנה אל ברוך בן נריהו הספר ויכתב עליה מפי ירמיהו את כל דברי הספר אשר שרף יהויקים מלך יהודה באש ועוד נוסף עליהם דברים רבים כהמה׃ | 32 |
Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.