< ישעה 64 >
לוא קרעת שמים ירדת מפניך הרים נזלו׃ | 1 |
Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita, bangomba ekoningana liboso na Yo!
כקדח אש המסים מים תבעה אש להודיע שמך לצריך מפניך גוים ירגזו׃ | 2 |
Ndenge moto etumbaka matiti mpe etokisaka mayi na nzungu, kita mpo na kosala ete banguna na Yo bayeba Kombo na Yo mpe bikolo eningana liboso na Yo!
בעשותך נוראות לא נקוה ירדת מפניך הרים נזלו׃ | 3 |
Pamba te tango osalaki makambo ya somo oyo biso tozalaki kozela te, okitaki mpe bangomba eninganaki liboso na Yo.
ומעולם לא שמעו לא האזינו עין לא ראתה אלהים זולתך יעשה למחכה לו׃ | 4 |
Wuta na tango ya kala penza, moto moko te atikala kososola, litoyi moko te etikala koyoka, liso moko te etikala komona, ete nzambe moko, longola kaka Yo, asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye.
פגעת את שש ועשה צדק בדרכיך יזכרוך הן אתה קצפת ונחטא בהם עולם ונושע׃ | 5 |
Osungaka bato oyo bazalaka na esengo ya kosala makambo ya sembo, ba-oyo babosanaka nzela na Yo te. Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu; bongo ndenge nini tokoki solo kobika?
ונהי כטמא כלנו וכבגד עדים כל צדקתינו ונבל כעלה כלנו ועוננו כרוח ישאנו׃ | 6 |
Biso nyonso, tokomi lokola eloko ya mbindo, misala na biso nyonso ya bosembo ezali lokola elamba ya mbindo; biso nyonso tokawuki lokola likasa mpe masumu na biso ememi biso lokola mopepe!
ואין קורא בשמך מתעורר להחזיק בך כי הסתרת פניך ממנו ותמוגנו ביד עוננו׃ | 7 |
Moko te azali kobelela Kombo na Yo to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, pamba te obombeli biso elongi na Yo mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.
ועתה יהוה אבינו אתה אנחנו החמר ואתה יצרנו ומעשה ידך כלנו׃ | 8 |
Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso; biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko, bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki; biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo.
אל תקצף יהוה עד מאד ואל לעד תזכר עון הן הבט נא עמך כלנו׃ | 9 |
Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
ערי קדשך היו מדבר ציון מדבר היתה ירושלם שממה׃ | 10 |
Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe; ezala Siona, yango mpe ekomi esobe; Yelusalemi etikali lisusu na bato te!
בית קדשנו ותפארתנו אשר הללוך אבתינו היה לשרפת אש וכל מחמדינו היה לחרבה׃ | 11 |
Tempelo na biso ya bule mpe ya lokumu epai wapi batata na biso bazalaki koyemba masanzoli mpo na lokumu na Yo, esili kozika na moto; mpe nyonso oyo tozalaki na yango ya motuya esili kobebisama!
העל אלה תתאפק יהוה תחשה ותעננו עד מאד׃ | 12 |
Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso, okozongisa kaka motema na Yo sima te? Okokanga kaka monoko mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo?