< ישעה 5 >

אשירה נא לידידי שירת דודי לכרמו כרם היה לידידי בקרן בן שמן׃ 1
Nakoyemba loyembo mpo na molingami na ngai, loyembo ya molingami na ngai mpo na elanga na ye ya vino. Molingami na ngai azalaki na elanga moko ya vino kati na mabele kitoko oyo ezalaka na mopanzi ya ngomba;
ויעזקהו ויסקלהו ויטעהו שרק ויבן מגדל בתוכו וגם יקב חצב בו ויקו לעשות ענבים ויעש באשים׃ 2
abalolaki mabele, alongolaki mabanga, mpe alonaki vino ya kitoko koleka; atongaki kuna ndako molayi ya bakengeli mpe atimolaki ekamolelo ya vino. Akanisaki ete akobuka bambuma ya vino ya kitoko, kasi ebotelaki ye bambuma ya mabe!
ועתה יושב ירושלם ואיש יהודה שפטו נא ביני ובין כרמי׃ 3
Sik’oyo, bino bavandi ya Yelusalemi, bato ya Yuda, bokata makambo kati na ngai mpe elanga na ngai ya vino!
מה לעשות עוד לכרמי ולא עשיתי בו מדוע קויתי לעשות ענבים ויעש באשים׃ 4
Nasala penza eloko nini, mpo na elanga na ngai ya vino, oyo natikala nanu kosalela yango te? Mpo na nini eboteli ngai bambuma ya mabe, tango ngai nakanisaki ete ekobotela ngai bambuma ya malamu?
ועתה אודיעה נא אתכם את אשר אני עשה לכרמי הסר משוכתו והיה לבער פרץ גדרו והיה למרמס׃ 5
Sik’oyo, nakoloba na bino makambo oyo nakosala na elanga na ngai ya vino: Nakokweyisa lopango na yango, mpe ekobebisama; nakotobola madusu kati na bamir na yango, mpe baleki nzela bakokoma konyata-nyata yango.
ואשיתהו בתה לא יזמר ולא יעדר ועלה שמיר ושית ועל העבים אצוה מהמטיר עליו מטר׃ 6
Nakokomisa yango esobe: kati na yango, bakolongola lisusu te, ezala mabanga to matiti; bongo banzube mpe basende ekokola kuna. Nakopesa mitindo na mapata ete enokisela yango lisusu mvula te.
כי כרם יהוה צבאות בית ישראל ואיש יהודה נטע שעשועיו ויקו למשפט והנה משפח לצדקה והנה צעקה׃ 7
Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.
הוי מגיעי בית בבית שדה בשדה יקריבו עד אפס מקום והושבתם לבדכם בקרב הארץ׃ 8
Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako, elanga pembeni ya elanga, kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili!
באזני יהוה צבאות אם לא בתים רבים לשמה יהיו גדלים וטובים מאין יושב׃ 9
Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai: « Solo, bandako minene ekotikala pamba, bandako kitoko ekozanga bato ya kovanda kati na yango.
כי עשרת צמדי כרם יעשו בת אחת וזרע חמר יעשה איפה׃ 10
Pamba te elanga ya vino ya ba-ekitare mibale ekobimisa kaka bisangala minei ya vino, bakilo nkama mibale na tuku mibale ya milona ya ble ekobimisa kaka bakilo tuku mibale na mibale. »
הוי משכימי בבקר שכר ירדפו מאחרי בנשף יין ידליקם׃ 11
Mawa na bato oyo balamukaka na tongo-tongo mpo na kowumela liboso ya masanga ya vino kino na butu, kino tango bakolangwa masanga!
והיה כנור ונבל תף וחליל ויין משתיהם ואת פעל יהוה לא יביטו ומעשה ידיו לא ראו׃ 12
Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino, bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango, kasi bakanisaka te mosala na Yawe mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye.
לכן גלה עמי מבלי דעת וכבודו מתי רעב והמונו צחה צמא׃ 13
Yango wana, bato na Ngai bakokende na bowumbu mpo na kozanga boyebi; bato na bango ya lokumu bakokufa na nzala, mpe bato pamba bakokufa na posa ya mayi.
לכן הרחיבה שאול נפשה ופערה פיה לבלי חק וירד הדרה והמונה ושאונה ועלז בה׃ (Sheol h7585) 14
Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi mpe ekofungola monoko na yango makasi; bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela moko mpe na loyenge na bango. (Sheol h7585)
וישח אדם וישפל איש ועיני גבהים תשפלנה׃ 15
Moto akokitisama, bato ya mokili bakoyokisama soni, mpe bilongi ya bato ya lolendo ekotala na se.
ויגבה יהוה צבאות במשפט והאל הקדוש נקדש בצדקה׃ 16
Kasi Yawe, Mokonzi ya mampinga, akonetolama na nzela ya bosembo na Ye, mpe Nzambe Mosantu akolakisa bosantu na Ye na nzela ya boyengebene na Ye.
ורעו כבשים כדברם וחרבות מחים גרים יאכלו׃ 17
Bameme ekokoma kolia matiti lokola nde ezali kati na elanga na yango moko, bapaya bakozwa bomengo oyo bazwi bakotika.
הוי משכי העון בחבלי השוא וכעבות העגלה חטאה׃ 18
Mawa na bato oyo babendaka masumu na basinga ya makambo ya lokuta, mpe mabe lokola nde bazali kobenda shario na basheni!
האמרים ימהר יחישה מעשהו למען נראה ותקרב ותבואה עצת קדוש ישראל ונדעה׃ 19
Mawa na bato oyo balobaka: « Tika ete Nzambe asala noki, tika ete asala na lombangu mosala na Ye mpo ete tomona yango! Tika ete mabongisi ya Mosantu ya Isalaele ebelema mpe ekokisama mpo ete tokoka koyeba yango! »
הוי האמרים לרע טוב ולטוב רע שמים חשך לאור ואור לחשך שמים מר למתוק ומתוק למר׃ 20
Mawa na bato oyo babengaka mabe malamu mpe malamu mabe, oyo bamonaka molili lokola pole mpe pole lokola molili, oyo bamonaka bololo lokola elengi mpe elengi lokola bololo!
הוי חכמים בעיניהם ונגד פניהם נבנים׃ 21
Mawa na bato oyo bamimonaka lokola bato ya bwanya na miso na bango moko, mpe na bato oyo bamimonaka lokola bato ya mayele na miso na bango moko!
הוי גבורים לשתות יין ואנשי חיל למסך שכר׃ 22
Mawa na bato oyo bakenda sango ya komela vino mpe ya kosangisa masanga ya makasi:
מצדיקי רשע עקב שחד וצדקת צדיקים יסירו ממנו׃ 23
bazwaka kanyaka mpo na kolongisa moto mabe mpe bazangisaka na moto ya sembo bosembo na ye!
לכן כאכל קש לשון אש וחשש להבה ירפה שרשם כמק יהיה ופרחם כאבק יעלה כי מאסו את תורת יהוה צבאות ואת אמרת קדוש ישראל נאצו׃ 24
Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.
על כן חרה אף יהוה בעמו ויט ידו עליו ויכהו וירגזו ההרים ותהי נבלתם כסוחה בקרב חוצות בכל זאת לא שב אפו ועוד ידו נטויה׃ 25
Yango wana, Yawe atombokeli bato na Ye, asemboli loboko na Ye mpe abeti bango; bangomba eningani, bibembe na bango etondi lokola bafulu na balabala. Kasi ata bongo, kanda na Ye ekiti kaka te, loboko na Ye etikali kaka ya kosembolama.
ונשא נס לגוים מרחוק ושרק לו מקצה הארץ והנה מהרה קל יבוא׃ 26
Yawe atomboli bendele mpo na bikolo oyo ezali mosika, azali kobeta piololo mpo na kobenga bato oyo bazali na suka ya mokili: tala bango wana, bazali koya na lombangu mpe noki!
אין עיף ואין כושל בו לא ינום ולא יישן ולא נפתח אזור חלציו ולא נתק שרוך נעליו׃ 27
Moko te kati na bango asili kolemba nzoto to abeti libaku, moko te azali konimba to kolala pongi. Moko te alongoli mokaba na ye na loketo, singa moko te ya basapato na bango etikali kokatana.
אשר חציו שנונים וכל קשתתיו דרכות פרסות סוסיו כצר נחשבו וגלגליו כסופה׃ 28
Bambanzi na bango ezali songe, batolotolo na bango nyonso ebendana makasi; makolo ya bampunda na bango ezali lokola mabanga, bapine ya bashar na bango ezali lokola mopepe makasi.
שאגה לו כלביא ושאג ככפירים וינהם ויאחז טרף ויפליט ואין מציל׃ 29
Koganga na bango ezali lokola koganga ya bankosi: bagangaka lokola bana nkosi, bagangaka soki bakangi nyama na bango, bamemaka yango na esika ya kimia, mpe moto moko te akokaka kobotola bango yango.
וינהם עליו ביום ההוא כנהמת ים ונבט לארץ והנה חשך צר ואור חשך בעריפיה׃ 30
Na mokolo wana, bakoganga likolo na bango lokola makelele ya ebale monene. Mpe soki moto atali kati na mokili, akomona molili mpe minyoko: pole ekozipama na se ya mapata.

< ישעה 5 >