< ישעה 46 >
כרע בל קרס נבו היו עצביהם לחיה ולבהמה נשאתיכם עמוסות משא לעיפה׃ | 1 |
Tala banzambe ya Babiloni: Beli esili ngala, Nebo ekweyi; bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele! Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, ezali mokumba oyo elembisaka banyama.
קרסו כרעו יחדו לא יכלו מלט משא ונפשם בשבי הלכה׃ | 2 |
Banzambe yango ya bikeko egumbami mpe ekweyi nzela moko, ezali na makoki te ya kobikisa mokumba na yango, pamba te ekeyi na bowumbu.
שמעו אלי בית יעקב וכל שארית בית ישראל העמסים מני בטן הנשאים מני רחם׃ | 3 |
Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai, mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele, bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama mpe nandima komema mokumba wuta mbotama na bino.
ועד זקנה אני הוא ועד שיבה אני אסבל אני עשיתי ואני אשא ואני אסבל ואמלט׃ | 4 |
Ezala tango bokotonda na suki ya pembe mpe bokokoma mibange, Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka; Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino, nakosunga bino mpe nakobikisa bino.
למי תדמיוני ותשוו ותמשלוני ונדמה׃ | 5 |
Bolingi kokokanisa Ngai to kotia Ngai esika moko na nani? Bolingi solo kokokanisa Ngai na nani mpo ete amekana na Ngai?
הזלים זהב מכיס וכסף בקנה ישקלו ישכרו צורף ויעשהו אל יסגדו אף ישתחוו׃ | 6 |
Bazali bato oyo babimisaka wolo na mabenga na bango mpe bamekaka kilo ya palata na emekelo; bafutaka mosolo epai ya mosali bikeko na bibende mpo ete asalela bango nzambe ya ekeko ya wolo mpe ya palata, mpo ete bafukamela mpe bagumbamela yango.
ישאהו על כתף יסבלהו ויניחהו תחתיו ויעמד ממקומו לא ימיש אף יצעק אליו ולא יענה מצרתו לא יושיענו׃ | 7 |
Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, batelemisaka yango na esika na yango mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. Wuta na esika na yango, ekoningana te. Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, ekobikisa ye te na tango ya pasi.
זכרו זאת והתאששו השיבו פושעים על לב׃ | 8 |
Bokanisa yango lisusu, mpo bososola malamu; bino batomboki, bozongisa yango lisusu na mitema na bino!
זכרו ראשנות מעולם כי אנכי אל ואין עוד אלהים ואפס כמוני׃ | 9 |
Bokanisa lisusu makambo ya liboso, makambo oyo ya kala penza; solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te, nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai.
מגיד מראשית אחרית ומקדם אשר לא נעשו אמר עצתי תקום וכל חפצי אעשה׃ | 10 |
Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki: « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »
קרא ממזרח עיט מארץ מרחק איש עצתו אף דברתי אף אביאנה יצרתי אף אעשנה׃ | 11 |
Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni; longwa na mokili ya mosika, moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai. Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama; oyo nabongisaki, yango nde ekosalema.
שמעו אלי אבירי לב הרחוקים מצדקה׃ | 12 |
Boyoka Ngai, bino bato ya mitema makasi, bino bato oyo bozali mosika ya bosembo!
קרבתי צדקתי לא תרחק ותשועתי לא תאחר ונתתי בציון תשועה לישראל תפארתי׃ | 13 |
Bosembo na Ngai ekomi pene, ezali lisusu mosika te; mpe lobiko na Ngai ekowumela te. Nakopesa lobiko epai na Siona, mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele.