< ישעה 37 >

ויהי כשמע המלך חזקיהו ויקרע את בגדיו ויתכס בשק ויבא בית יהוה׃ 1
Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe.
וישלח את אליקים אשר על הבית ואת שבנא הסופר ואת זקני הכהנים מתכסים בשקים אל ישעיהו בן אמוץ הנביא׃ 2
Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo; bango nyonso balata bilamba ya basaki.
ויאמרו אליו כה אמר חזקיהו יום צרה ותוכחה ונאצה היום הזה כי באו בנים עד משבר וכח אין ללדה׃ 3
Balobaki na ye: « Tala makambo oyo Ezekiasi alobi: ‹ Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana.
אולי ישמע יהוה אלהיך את דברי רב שקה אשר שלחו מלך אשור אדניו לחרף אלהים חי והוכיח בדברים אשר שמע יהוה אלהיך ונשאת תפלה בעד השארית הנמצאה׃ 4
Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › »
ויבאו עבדי המלך חזקיהו אל ישעיהו׃ 5
Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi,
ויאמר אליהם ישעיהו כה תאמרון אל אדניכם כה אמר יהוה אל תירא מפני הדברים אשר שמעת אשר גדפו נערי מלך אשור אותי׃ 6
Ezayi alobaki na bango: « Boloba na nkolo na bino: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai.
הנני נותן בו רוח ושמע שמועה ושב אל ארצו והפלתיו בחרב בארצו׃ 7
Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »
וישב רב שקה וימצא את מלך אשור נלחם על לבנה כי שמע כי נסע מלכיש׃ 8
Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
וישמע על תרהקה מלך כוש לאמר יצא להלחם אתך וישמע וישלח מלאכים אל חזקיהו לאמר׃ 9
Sima na mokonzi ya Asiri koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo:
כה תאמרון אל חזקיהו מלך יהודה לאמר אל ישאך אלהיך אשר אתה בוטח בו לאמר לא תנתן ירושלם ביד מלך אשור׃ 10
« Boyebisa Ezekiasi, mokonzi ya Yuda: ‹ Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo: ‘Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri.’
הנה אתה שמעת אשר עשו מלכי אשור לכל הארצות להחרימם ואתה תנצל׃ 11
Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye; okanisi ete yo nde okobika?
ההצילו אותם אלהי הגוים אשר השחיתו אבותי את גוזן ואת חרן ורצף ובני עדן אשר בתלשר׃ 12
Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango, bakangolaki yango?
איה מלך חמת ומלך ארפד ומלך לעיר ספרוים הנע ועוה׃ 13
Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva? › »
ויקח חזקיהו את הספרים מיד המלאכים ויקראהו ויעל בית יהוה ויפרשהו חזקיהו לפני יהוה׃ 14
Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe.
ויתפלל חזקיהו אל יהוה לאמר׃ 15
Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe:
יהוה צבאות אלהי ישראל ישב הכרבים אתה הוא האלהים לבדך לכל ממלכות הארץ אתה עשית את השמים ואת הארץ׃ 16
« Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele! Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele; Yo nde osala Likolo mpe mabele.
הטה יהוה אזנך ושמע פקח יהוה עינך וראה ושמע את כל דברי סנחריב אשר שלח לחרף אלהים חי׃ 17
Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka; Yawe, fungola miso mpe mona! Yoka maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.
אמנם יהוה החריבו מלכי אשור את כל הארצות ואת ארצם׃ 18
Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo nyonso mpe mikili na bango.
ונתן את אלהיהם באש כי לא אלהים המה כי אם מעשה ידי אדם עץ ואבן ויאבדום׃ 19
Bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te, kasi banzete to mpe mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato.
ועתה יהוה אלהינו הושיענו מידו וידעו כל ממלכות הארץ כי אתה יהוה לבדך׃ 20
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »
וישלח ישעיהו בן אמוץ אל חזקיהו לאמר כה אמר יהוה אלהי ישראל אשר התפללת אלי אל סנחריב מלך אשור׃ 21
Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Mpo ete osambelaki Ngai na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri,
זה הדבר אשר דבר יהוה עליו בזה לך לעגה לך בתולת בת ציון אחריך ראש הניעה בת ירושלם׃ 22
tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye: Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo. Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.
את מי חרפת וגדפת ועל מי הרימותה קול ותשא מרום עיניך אל קדוש ישראל׃ 23
Nani oyo ofingaki mpe otiolaki? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo? Mosantu ya Isalaele!
ביד עבדיך חרפת אדני ותאמר ברב רכבי אני עליתי מרום הרים ירכתי לבנון ואכרת קומת ארזיו מבחר ברשיו ואבוא מרום קצו יער כרמלו׃ 24
Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki: ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko;
אני קרתי ושתיתי מים ואחרב בכף פעמי כל יארי מצור׃ 25
natimolaki mabulu ya mayi mpe namelaki mayi; na matambe ya makolo na ngai, nakawusaki miluka nyonso ya Ejipito. ›
הלוא שמעת למרחוק אותה עשיתי מימי קדם ויצרתיה עתה הבאתיה ותהי להשאות גלים נצים ערים בצרות׃ 26
Oyoka nanu yango te? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala; sik’oyo nde nakokisi yango. Esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.
וישביהן קצרי יד חתו ובשו היו עשב שדה וירק דשא חציר גגות ושדמה לפני קמה׃ 27
Bato na yango bazangi makasi, balengi na somo mpe bakomi na soni, bakomi lokola matiti ya bilanga, lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu, lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako, ekawuka liboso ete ekola.
ושבתך וצאתך ובואך ידעתי ואת התרגזך אלי׃ 28
Nayebi esika nini ozalaka, tango nini obimaka, tango nini ozongaka, mpe tango nini otombokelaka Ngai.
יען התרגזך אלי ושאננך עלה באזני ושמתי חחי באפך ומתגי בשפתיך והשיבתיך בדרך אשר באת בה׃ 29
Lokola otombokelaka Ngai, mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, nakokanga yo singa na bibebu ndenge bakangaka mpunda monoko, mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki.
וזה לך האות אכול השנה ספיח ובשנה השנית שחיס ובשנה השלישית זרעו וקצרו ונטעו כרמים ואכול פרים׃ 30
Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo: Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele; na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, bokolona banzete ya vino mpe bokolia bambuma na yango.
ויספה פליטת בית יהודה הנשארה שרש למטה ועשה פרי למעלה׃ 31
Bato ya Yuda oyo bakobika, oyo bakotikala, bakozala lokola nzete oyo ekotisi misisa na yango ya sika kati na mabele mpe eboti bambuma.
כי מירושלם תצא שארית ופליטה מהר ציון קנאת יהוה צבאות תעשה זאת׃ 32
Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala; mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. Bolingo makasi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango.
לכן כה אמר יהוה אל מלך אשור לא יבוא אל העיר הזאת ולא יורה שם חץ ולא יקדמנה מגן ולא ישפך עליה סללה׃ 33
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi ya Asiri: ‹ Akokota na engumba oyo te, akobeta kuna ata mbanzi moko te, akobundisa yango na banguba te mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango mpo na komibomba.
בדרך אשר בא בה ישוב ואל העיר הזאת לא יבוא נאם יהוה׃ 34
Akozongela na nzela oyo ayelaki mpe akokota na engumba oyo te, › elobi Yawe.
וגנותי על העיר הזאת להושיעה למעני ולמען דוד עבדי׃ 35
‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »
ויצא מלאך יהוה ויכה במחנה אשור מאה ושמנים וחמשה אלף וישכימו בבקר והנה כלם פגרים מתים׃ 36
Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.
ויסע וילך וישב סנחריב מלך אשור וישב בנינוה׃ 37
Boye, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna.
ויהי הוא משתחוה בית נסרך אלהיו ואדרמלך ושראצר בניו הכהו בחרב והמה נמלטו ארץ אררט וימלך אסר חדן בנו תחתיו׃ 38
Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo, mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.

< ישעה 37 >