< אֶל־הָעִבְרִים 13 >

אהבת האחים תעמד׃ 1
Tika ete bondeko ewumela kati na bino!
הכנסת ארחים אל תשכחו כי יש אשר הכניסו בה מלאכים ולא ידעו׃ 2
Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.
זכרו את האסורים כאלו אתם אסורים עמהם ואת הנלחצים באשר גם אתם בבשר׃ 3
Bokanisaka bato oyo bazali kati na boloko lokola nde bino mpe bozali kati na boloko elongo na bango. Bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, mpo ete bino mpe bozali na nzoto oyo emonaka pasi.
האישות תיקר בכל וערש יצועכם אל יחלל את הזנים ואת המנאפים ידין אלהים׃ 4
Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.
רחקו מאהבת כסף ושמחו בחלקכם כי הוא אמר לא ארפך ולא אעזבך׃ 5
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki: « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
על כן נבטח ונאמר יהוה לי בעזרי לא אירא מה יעשה לי אדם׃ 6
Boye tokoki koloba na elikya nyonso: « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini? »
זכרו את מנהיגיכם אשר הגידו לכם את דבר האלהים בינו לאחרית דרכם ולכו באמונתם׃ 7
Bokanisaka bakambi na bino, oyo bateyaki bino Liloba na Nzambe; botala ndenge nini suka ya bomoi na bango ezalaki, mpe bomekola kondima na bango.
ישוע המשיח גם תמול גם היום הוא הוא וגם לעולמים׃ (aiōn g165) 8
Yesu-Klisto azali ndenge moko: lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela. (aiōn g165)
אל תנועו בתורות שנות וזרות כי טוב לכונן לבנו בחסד ולא בעניני מאכל אשר לא הועילו למתהלכים בהם׃ 9
Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.
יש לנו מזבח אשר אינם רשאים לאכל מעליו משרתי המשכן׃ 10
Tozali na etumbelo, kasi Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Mongombo bazali na bokonzi te ya kolia mbeka oyo babonzi na likolo ya etumbelo yango,
כי הבהמות אשר הובא דמן בקדש לכפרת החטא על ידי הכהן הגדול גויתיהן נשרפו מחוץ למחנה׃ 11
pamba te banzoto ya banyama oyo mokonzi ya Banganga-Nzambe amemaka makila na yango kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule lokola mbeka mpo na bolimbisi ya masumu, etumbamaka na libanda ya molako.
בעבור זאת גם ישוע למען קדש בדמו את העם ענה מחוץ לשער׃ 12
Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka mpo na kobulisa bato na nzela ya makila na Ye moko.
לכן נצאה נא אליו אל מחוץ למחנה ונשא את חרפתו׃ 13
Boye, biso mpe tokende epai ya Yesu na libanda ya molako, na kondima koyoka soni oyo Ye ayokaki;
כי פה אין לנו עיר עמדת כי את העתידה אנחנו מבקשים׃ 14
pamba te, kati na mokili oyo, tozali na engumba moko te oyo ekowumela libela na libela, kasi tozali nde koluka engumba oyo ezali koya.
לכן נקריב על ידו בכל עת זבח תודה לאלהים היא פרי שפתים המודות לשמו׃ 15
Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba: mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye.
ואל תשכחו לגמל חסד ולתת לאביונים כי זבחים כאלה יערבו לאלהים׃ 16
Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.
שמעו אל מנהיגיכם והכנעו מפניהם כי שקדים הם על נפשתיכם כעתידים לתת חשבון למען יעשו זאת בשמחה ולא באנחה כי זאת לא להועיל לכם׃ 17
Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.
התפללו בעדנו כי ידענו אשר שלמה מחשבתנו ונחפץ ללכת דרך ישרה בכל׃ 18
Bosambelaka mpo na biso! Pamba te tondimisami penza ete tozali na mitema ya peto mpe tozwi mokano ya kotambola na bomoi ya lokumu kati na makambo nyonso.
ובחזקה אבקש מכם לעשות זאת למען אושב אליכם במהרה׃ 19
Nazali penza kosenga na bino ete bobondela Nzambe mpo ete bazongisa ngai na lombangu epai na bino.
ואלהי השלום אשר בדם ברית עולם העלה מן המתים את רעה הצאן הגדול את ישוע אדנינו׃ (aiōnios g166) 20
Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko, (aiōnios g166)
הוא ישלימכם בכל מעשה טוב לעשות רצונו בפעלו בכם את הרצוי לפניו ביד ישוע המשיח אשר לו הכבוד לעולמי עולמים אמן׃ (aiōn g165) 21
apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela! Amen! (aiōn g165)
ואבקש מכם אחי שאו נא דבר התוכחה כי כתבתי אליכם בקצרה׃ 22
Nazali kosenga na bino bandeko na ngai ete bokanga motema na koyamba malendisi oyo nakomeli bino na mokuse penza.
ודעו כי טימותיוס אחינו יצא מבית האסורים והיה אם יבא במהרה אראה אתו את פניכם׃ 23
Boyeba ete ndeko na biso, Timote, asilaki kobima na boloko. Soki akoya noki, nakoya nzela moko na ye mpo na komona bino.
שאלו לשלום כל מנהיגיכם ולשלום כל הקדשים בני ארץ איטליא שאלים לשלומכם׃ 24
Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso. Bandeko ya Itali batindeli bino mbote.
החסד עם כלכם אמן׃ 25
Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na bino nyonso!

< אֶל־הָעִבְרִים 13 >