< בראשית 49 >

ויקרא יעקב אל בניו ויאמר האספו ואגידה לכם את אשר יקרא אתכם באחרית הימים׃ 1
Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki: — Bosangana mpo ete nakoka koyebisa bino makambo oyo ekokomela bino na mikolo oyo ekoya.
הקבצו ושמעו בני יעקב ושמעו אל ישראל אביכם׃ 2
Bosangana mpe boyoka, bana mibali ya Jakobi! Boyoka oyo tata na bino Isalaele akoloba:
ראובן בכרי אתה כחי וראשית אוני יתר שאת ויתר עז׃ 3
« Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso, makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai; oleki na lokumu mpe na nguya.
פחז כמים אל תותר כי עלית משכבי אביך אז חללת יצועי עלה׃ 4
Mobulu lokola mayi, okokende liboso te, pamba te omataki na mbeto ya tata na yo, esika oyo ngai nalalaka, mpe okomisi yango mbindo.
שמעון ולוי אחים כלי חמס מכרתיהם׃ 5
Simeoni mpe Levi bazali bandeko, mipanga na bango ezali bibundeli mpo na kotia mobulu.
בסדם אל תבא נפשי בקהלם אל תחד כבדי כי באפם הרגו איש וברצנם עקרו שור׃ 6
Molimo na ngai, kosangana te na mabongisi na bango ya kosala mabe! Lokumu na ngai, kokota te na lisanga na bango! Pamba te na kanda na bango, babomaki bato; mpe na esengo na bango, basepelaki kokata misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.
ארור אפם כי עז ועברתם כי קשתה אחלקם ביעקב ואפיצם בישראל׃ 7
Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.
יהודה אתה יודוך אחיך ידך בערף איביך ישתחוו לך בני אביך׃ 8
Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo, loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo; bana mibali ya tata na yo bakogumbama liboso na yo.
גור אריה יהודה מטרף בני עלית כרע רבץ כאריה וכלביא מי יקימנו׃ 9
Yuda, ozali mwana ya nkosi; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye?
לא יסור שבט מיהודה ומחקק מבין רגליו עד כי יבא שילה ולו יקהת עמים׃ 10
Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.
אסרי לגפן עירה ולשרקה בני אתנו כבס ביין לבשו ובדם ענבים סותה׃ 11
Akokanga ane na ye na nzete ya vino, mpe mwana ya ane na etape oyo ye akopona; akosukola bilamba na ye na vino; mpe kazaka na ye, na masanga ya vino ya motane.
חכלילי עינים מיין ולבן שנים מחלב׃ 12
Miso na ye ekozala motane koleka vino, mpe minu na ye ekozala pembe koleka miliki.
זבולן לחוף ימים ישכן והוא לחוף אניות וירכתו על צידן׃ 13
Zabuloni akowumela pene ya ebale monene, eteni ya mabele na ye ekozala libongo ya masuwa, mpe mabele na ye ekokende kino na Sidoni.
יששכר חמר גרם רבץ בין המשפתים׃ 14
Isakari azali ane ya makasi oyo elali kati na mapango mibale.
וירא מנחה כי טוב ואת הארץ כי נעמה ויט שכמו לסבל ויהי למס עבד׃ 15
Amonaki ete bopemi ezali malamu, mpe mokili na ye ezali kitoko; boye mapeka na ye ekomema mikumba mpe abongi mpo na misala ya bowumbu.
דן ידין עמו כאחד שבטי ישראל׃ 16
Dani akokamba bato na ye lokola moko kati na bikolo ya Isalaele.
יהי דן נחש עלי דרך שפיפן עלי ארח הנשך עקבי סוס ויפל רכבו אחור׃ 17
Dani akozala lokola nyoka na balabala to lokola etupa na nzela, oyo eswaka litindi ya mpunda mpo ete motambolisi na yango akweya.
לישועתך קויתי יהוה׃ 18
Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai!
גד גדוד יגודנו והוא יגד עקב׃ 19
Gadi, banguna ebele bakobundisa ye, kasi ye mpe akobundisa bango kino kobengana bango.
מאשר שמנה לחמו והוא יתן מעדני מלך׃ 20
Bilei oyo ekobima na mokili ya Aseri ekozala ebele penza; mabele na ye ekobota biloko oyo ebongi mpo na bakonzi.
נפתלי אילה שלחה הנתן אמרי שפר׃ 21
Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi, oyo ebotaka bana kitoko.
בן פרת יוסף בן פרת עלי עין בנות צעדה עלי שור׃ 22
Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi, nzete oyo ezalaka pembeni ya etima, mpe oyo bitape na yango elekaka bosanda ya mir.
וימררהו ורבו וישטמהו בעלי חצים׃ 23
Banguna batumbolaki ye, babwakelaki ye makonga mpe babundisaki ye;
ותשב באיתן קשתו ויפזו זרעי ידיו מידי אביר יעקב משם רעה אבן ישראל׃ 24
kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye, mpe maboko na ye etikalaki kolenga te mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi, oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele.
מאל אביך ויעזרך ואת שדי ויברכך ברכת שמים מעל ברכת תהום רבצת תחת ברכת שדים ורחם׃ 25
Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo! mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo; na mapamboli ya bozindo, na se; na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.
ברכת אביך גברו על ברכת הורי עד תאות גבעת עולם תהיין לראש יוסף ולקדקד נזיר אחיו׃ 26
Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya koleka mapamboli ya bangomba ya kala, koleka bomengo ya bangomba mike ya kala; tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi, ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye!
בנימין זאב יטרף בבקר יאכל עד ולערב יחלק שלל׃ 27
Benjame azali lokola mbwa ya zamba; na tongo, apasolaka mosuni na ye; na pokwa, akabolaka bomengo ya bitumba. »
כל אלה שבטי ישראל שנים עשר וזאת אשר דבר להם אביהם ויברך אותם איש אשר כברכתו ברך אתם׃ 28
Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.
ויצו אותם ויאמר אלהם אני נאסף אל עמי קברו אתי אל אבתי אל המערה אשר בשדה עפרון החתי׃ 29
Jakobi apesaki bango malako oyo: « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti,
במערה אשר בשדה המכפלה אשר על פני ממרא בארץ כנען אשר קנה אברהם את השדה מאת עפרן החתי לאחזת קבר׃ 30
kati na lidusu ya mabanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, na mokili ya Kanana, elanga oyo Abrayami asombaki na Efroni, moto ya Iti, lokola lilita.
שמה קברו את אברהם ואת שרה אשתו שמה קברו את יצחק ואת רבקה אשתו ושמה קברתי את לאה׃ 31
Ezalaki kuna nde bakundaki Abrayami mpe Sara, mwasi na ye; Izaki mpe Rebeka, mwasi na ye. Ezali kuna nde ngai nakundaki Lea.
מקנה השדה והמערה אשר בו מאת בני חת׃ 32
Elanga mpe lidusu ya mabanga oyo ezali kati na yango esombamaki epai ya bato ya Iti. »
ויכל יעקב לצות את בניו ויאסף רגליו אל המטה ויגוע ויאסף אל עמיו׃ 33
Tango Jakobi asilisaki kopesa malako epai ya bana na ye, asembolaki makolo na ye na mbeto, akataki motema mpe akendeki kokutana na batata na ye.

< בראשית 49 >