< יחזקאל 33 >

ויהי דבר יהוה אלי לאמר׃ 1
Yawe alobaki na ngai:
בן אדם דבר אל בני עמך ואמרת אליהם ארץ כי אביא עליה חרב ולקחו עם הארץ איש אחד מקציהם ונתנו אתו להם לצפה׃ 2
« Mwana na moto, loba na bandeko na yo mpe yebisa bango: ‹ Soki nabimisi bitumba na mokili moko, bongo bato ya mokili yango baponi moko kati na bango lokola mokengeli na bango;
וראה את החרב באה על הארץ ותקע בשופר והזהיר את העם׃ 3
soki mokengeli yango amoni banguna koya kobundisa mokili na bango mpe abeti kelelo mpo na kokebisa bato.
ושמע השמע את קול השופר ולא נזהר ותבוא חרב ותקחהו דמו בראשו יהיה׃ 4
Soki moto moko ayoki lolaka ya kelelo, kasi azwi yango na pamba mpe mopanga ebomi ye, makila na ye ekotangama na moto na ye moko.
את קול השופר שמע ולא נזהר דמו בו יהיה והוא נזהר נפשו מלט׃ 5
Lokola ayokaki lolaka ya kelelo, kasi azwaki likebisi wana na pamba, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. Kasi soki azwaki likebisi wana na pamba te, alingaki solo kobikisa bomoi na ye.
והצפה כי יראה את החרב באה ולא תקע בשופר והעם לא נזהר ותבוא חרב ותקח מהם נפש הוא בעונו נלקח ודמו מיד הצפה אדרש׃ 6
Nzokande, soki mokengeli amoni banguna koya mpe abeti kelelo te mpo na kokebisa bato, bongo mopanga ebomi moko kati na bandeko na ye, ndeko wana akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto ya mokengeli. ›
ואתה בן אדם צפה נתתיך לבית ישראל ושמעת מפי דבר והזהרת אתם ממני׃ 7
Mwana na moto, nakomisi yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele. Boye, yokaka maloba oyo nakobanda koloba mpo na kokebisa bango na Kombo na Ngai.
באמרי לרשע רשע מות תמות ולא דברת להזהיר רשע מדרכו הוא רשע בעונו ימות ודמו מידך אבקש׃ 8
Soki nalobi na moto mabe: ‹ Oh moto mabe, okokufa solo! › Mpe yo, olobi na ye eloko moko te mpo ete abongola bizaleli na ye, moto mabe wana akokufa solo mpo na masumu na ye; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
ואתה כי הזהרת רשע מדרכו לשוב ממנה ולא שב מדרכו הוא בעונו ימות ואתה נפשך הצלת׃ 9
Kasi soki okebisi moto mabe ete abongola bizaleli na ye, bongo asaleli yango te, akokufa solo mpo na masumu na ye; mpe yo, okobikisa bomoi na yo.
ואתה בן אדם אמר אל בית ישראל כן אמרתם לאמר כי פשעינו וחטאתינו עלינו ובם אנחנו נמקים ואיך נחיה׃ 10
Mwana na moto, loba na libota ya Isalaele: ‹ Tala maloba oyo bozali koloba: ‘Ndenge nini penza tokoki lisusu kobika mpo ete mabe mpe masumu na biso ekomi kilo makasi mpo na biso, mpe yango ekomi kobebisa biso?’ ›
אמר אליהם חי אני נאם אדני יהוה אם אחפץ במות הרשע כי אם בשוב רשע מדרכו וחיה שובו שובו מדרכיכם הרעים ולמה תמותו בית ישראל׃ 11
Loba na bango: ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa? ›
ואתה בן אדם אמר אל בני עמך צדקת הצדיק לא תצילנו ביום פשעו ורשעת הרשע לא יכשל בה ביום שובו מרשעו וצדיק לא יוכל לחיות בה ביום חטאתו׃ 12
Mwana na moto, loba na bandeko na yo: ‹ Boyengebene ya moto ya sembo ekobikisa ye te soki asali mabe, mpe mabe ya moto mabe ekokweyisa ye te soki atiki yango; moto ya sembo akobika te likolo ya boyengebene na ye ya kala soki asali masumu. ›
באמרי לצדיק חיה יחיה והוא בטה על צדקתו ועשה עול כל צדקתו לא תזכרנה ובעולו אשר עשה בו ימות׃ 13
Ata soki nalobi na moto ya sembo ete akowumela solo na bomoi, soki atie elikya na bosembo na ye mpe asali mabe, bosembo na ye nyonso ekotangama lisusu te mpe akokufa mpo na mabe oyo asali.
ובאמרי לרשע מות תמות ושב מחטאתו ועשה משפט וצדקה׃ 14
Soki nalobi na moto mabe: ‹ Okokufa solo; › kasi atiki masumu na ye mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima,
חבל ישיב רשע גזלה ישלם בחקות החיים הלך לבלתי עשות עול חיו יחיה לא ימות׃ 15
soki azongisi ndanga oyo asimbaki na niongo mpe biloko oyo ayibaki, soki atosi mitindo oyo epesaka bomoi mpe atiki kosala mabe, akobika penza, akokufa te.
כל חטאתו אשר חטא לא תזכרנה לו משפט וצדקה עשה חיו יחיה׃ 16
Mabe nyonso oyo asalaki ekotangama lisusu te, akobika solo; pamba te asali oyo ezali alima mpe sembo.
ואמרו בני עמך לא יתכן דרך אדני והמה דרכם לא יתכן׃ 17
Bandeko na yo bazali koloba: ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te. › Nzokande, nzela na bango moko nde ezalaka mabe.
בשוב צדיק מצדקתו ועשה עול ומת בהם׃ 18
Soki moto ya sembo atiki boyengebene na ye mpe akomi kosala mabe, akokufa mpo na mabe yango.
ובשוב רשע מרשעתו ועשה משפט וצדקה עליהם הוא יחיה׃ 19
Soki moto mabe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, akobika solo mpo ete asali bongo.
ואמרתם לא יתכן דרך אדני איש כדרכיו אשפוט אתכם בית ישראל׃ 20
Oh bino, libota ya Isalaele, ndenge nini bokoki penza koloba: ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te! › Solo, nakosambisa moko na moko kati na bino kolanda etamboli na ye! »
ויהי בשתי עשרה שנה בעשרי בחמשה לחדש לגלותנו בא אלי הפליט מירושלם לאמר הכתה העיר׃ 21
Na mokolo ya mitano ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi na mibale ya bowumbu na biso, moko kati na bato oyo babikaki na Yelusalemi ayaki epai na ngai mpe alobaki: « Babebisi engumba! »
ויד יהוה היתה אלי בערב לפני בוא הפליט ויפתח את פי עד בוא אלי בבקר ויפתח פי ולא נאלמתי עוד׃ 22
Nzokande, na pokwa, liboso ete moto yango aya epai na ngai, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai mpe afungolaki monoko na ngai liboso ete moto yango akoma epai na ngai na tongo. Monoko na ngai efungwamaki mpe nakomaki koloba.
ויהי דבר יהוה אלי לאמר׃ 23
Bongo Yawe alobaki na ngai:
בן אדם ישבי החרבות האלה על אדמת ישראל אמרים לאמר אחד היה אברהם ויירש את הארץ ואנחנו רבים לנו נתנה הארץ למורשה׃ 24
« Mwana na moto, bavandi ya bisika oyo ebeba kati na mokili ya Isalaele bazali koloba: ‹ Abrayami azalaki kaka ye moko tango azwaki mokili lokola libula; nzokande biso, tozali ebele; boye, solo, mokili epesameli biso lokola libula! ›
לכן אמר אלהם כה אמר אדני יהוה על הדם תאכלו ועינכם תשאו אל גלוליכם ודם תשפכו והארץ תירשו׃ 25
Yango wana, loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula!
עמדתם על חרבכם עשיתן תועבה ואיש את אשת רעהו טמאתם והארץ תירשו׃ 26
Bozali kotia elikya na mopanga na bino, bozali kosala makambo ya mbindo, mpe moko na moko kati na bino azali kokomisa mbindo mwasi ya moninga na ye, mpe bozwa penza mokili lokola libula! ›
כה תאמר אלהם כה אמר אדני יהוה חי אני אם לא אשר בחרבות בחרב יפלו ואשר על פני השדה לחיה נתתיו לאכלו ואשר במצדות ובמערות בדבר ימותו׃ 27
Loba na bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na Kombo na Ngai, bato oyo batikali na bisika oyo ebeba bakokufa na mopanga! Ba-oyo bazali na mboka, nakokaba bango epai ya banyama ya zamba mpo ete eboma bango! Mpe ba-oyo babombami kati na bandako batonga makasi mpe kati na madusu ya mabanga bakokufa na bokono oyo ebomaka;
ונתתי את הארץ שממה ומשמה ונשבת גאון עזה ושממו הרי ישראל מאין עובר׃ 28
nakokomisa mokili libebi mpe nakosala ete etikala lisusu na bato te: nakosukisa lolendo na yango, bangomba ya Isalaele ekotikala lisusu na bato te, mpe bato bakotika kolekela wana.
וידעו כי אני יהוה בתתי את הארץ שממה ומשמה על כל תועבתם אשר עשו׃ 29
Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokomisa mokili libebi mpe esobe, likolo ya makambo na bango nyonso ya mbindo oyo bazali kosala. ›
ואתה בן אדם בני עמך הנדברים בך אצל הקירות ובפתחי הבתים ודבר חד את אחד איש את אחיו לאמר באו נא ושמעו מה הדבר היוצא מאת יהוה׃ 30
Mpo na yo, mwana na moto, bandeko na yo bazali kolobana bango na bango na bamir mpe na bikuke ya bandako na bango na tina na kombo na yo: ‹ Boya koyoka maloba oyo ewuti epai na Yawe! ›
ויבואו אליך כמבוא עם וישבו לפניך עמי ושמעו את דבריך ואותם לא יעשו כי עגבים בפיהם המה עשים אחרי בצעם לבם הלך׃ 31
Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko.
והנך להם כשיר עגבים יפה קול ומטב נגן ושמעו את דבריך ועשים אינם אותם׃ 32
Mpo na bango, ozalaka na yo kaka lokola moto oyo ayembaka malamu banzembo ya kitoko, na mongongo ya kitoko, mpe abetaka mindule kitoko; pamba te bayokaka na bango maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te.
ובבאה הנה באה וידעו כי נביא היה בתוכם׃ 33
Tango makambo oyo nyonso ekokokisama —mpe ekokokisama solo— bakososola penza ete mosakoli moko azalaki kati na bango. »

< יחזקאל 33 >