< יחזקאל 22 >
ויהי דבר יהוה אלי לאמר׃ | 1 |
Yawe alobaki na ngai:
ואתה בן אדם התשפט התשפט את עיר הדמים והודעתה את כל תועבותיה׃ | 2 |
« Mwana na moto, okosambisa yango solo? Okosambisa solo engumba oyo esopaka makila? Lakisa yango misala na yango nyonso ya mbindo
ואמרת כה אמר אדני יהוה עיר שפכת דם בתוכה לבוא עתה ועשתה גלולים עליה לטמאה׃ | 3 |
mpe loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh engumba oyo emibendelaka bololo na nzela ya kosopa makila na kati-kati na yango mpe emikomisaka mbindo na nzela ya komisalela bikeko,
בדמך אשר שפכת אשמת ובגלוליך אשר עשית טמאת ותקריבי ימיך ותבוא עד שנותיך על כן נתתיך חרפה לגוים וקלסה לכל הארצות׃ | 4 |
ozali na ngambo mpo na makila oyo osopaki mpe okomi mbindo mpo na bikeko oyo osalaki! Okomisi bomoi na yo mokuse mpe okomi na suka ya mibu ya bomoi na yo! Yango wana, nakokomisa yo eloko ya kotiola liboso ya bikolo mpe eloko ya maseki liboso ya mikili nyonso.
הקרבות והרחקות ממך יתקלסו בך טמאת השם רבת המהומה׃ | 5 |
Yo, engumba ya mbindo, etonda na mobulu, bato oyo bazali pene mpe ba-oyo bazali mosika bakoseka yo!
הנה נשיאי ישראל איש לזרעו היו בך למען שפך דם׃ | 6 |
Tala ndenge bakambi ya Isalaele basalelaka bokonzi na bango mpo na kosopa makila.
אב ואם הקלו בך לגר עשו בעשק בתוכך יתום ואלמנה הונו בך׃ | 7 |
Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.
קדשי בזית ואת שבתתי חללת׃ | 8 |
Otiolaka biloko na Ngai ya bule mpe obebisaka bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
אנשי רכיל היו בך למען שפך דם ואל ההרים אכלו בך זמה עשו בתוכך׃ | 9 |
Na mboka na yo, bakoselaka bato makambo mpo na kobomisa bango. Na mboka na yo, baliaka biloko na bisika ya bule oyo ezalaka na likolo ya bangomba mpe basalaka makambo ya nkele.
ערות אב גלה בך טמאת הנדה ענו בך׃ | 10 |
Na mboka na yo, mibali basangisaka nzoto na basi ya batata na bango mpe bazwaka na makasi basi oyo bazali komona sanza na bango, na tango oyo bazali mbindo.
ואיש את אשת רעהו עשה תועבה ואיש את כלתו טמא בזמה ואיש את אחתו בת אביו ענה בך׃ | 11 |
Na mboka na yo, moko na moko azali kosala makambo ya mbindo elongo na mwasi ya moninga na ye, mosusu azali kokomisa mwasi ya mwana na ye mbindo, mpe mosusu lisusu azali kosangisa nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye.
שחד לקחו בך למען שפך דם נשך ותרבית לקחת ותבצעי רעיך בעשק ואתי שכחת נאם אדני יהוה׃ | 12 |
Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe.
והנה הכיתי כפי אל בצעך אשר עשית ועל דמך אשר היו בתוכך׃ | 13 |
Solo, nakobeta maboko na Ngai mpo na litomba oyo bozwaki na nzela ya mabe mpe mpo na makila oyo botangisaki kati na bino.
היעמד לבך אם תחזקנה ידיך לימים אשר אני עשה אותך אני יהוה דברתי ועשיתי׃ | 14 |
Boni, bokoyika kaka mpiko to maboko na bino ekozala kaka makasi na mokolo oyo nakokitisela bino kanda na Ngai? Ngai Yawe, nalobaki mpe nakokokisa yango.
והפיצותי אותך בגוים וזריתיך בארצות והתמתי טמאתך ממך׃ | 15 |
Nakopanza bino kati na bikolo, nakopalanganisa bino bipai na bipai kati na mokili mpe nakosukisa mbindo na bino.
ונחלת בך לעיני גוים וידעת כי אני יהוה׃ | 16 |
Omikomisaki mbindo na miso ya bikolo, kasi okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »
ויהי דבר יהוה אלי לאמר׃ | 17 |
Yawe alobaki na ngai:
בן אדם היו לי בית ישראל לסוג כלם נחשת ובדיל וברזל ועופרת בתוך כור סגים כסף היו׃ | 18 |
« Mwana na moto, libota ya Isalaele ekomi lokola fulu na miso na Ngai; bango nyonso bakomi lokola ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, ebende mpe mbodi oyo babwaka na etumbelo ya bibende. Solo, bakomi kaka lokola bosoto ya palata.
לכן כה אמר אדני יהוה יען היות כלכם לסגים לכן הנני קבץ אתכם אל תוך ירושלם׃ | 19 |
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Lokola bino nyonso bokomi kaka lokola bosoto, nakosangisa bino na Yelusalemi.
קבצת כסף ונחשת וברזל ועופרת ובדיל אל תוך כור לפחת עליו אש להנתיך כן אקבץ באפי ובחמתי והנחתי והתכתי אתכם׃ | 20 |
Ndenge bato basangisaka palata, ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, mbodi mpe ebende kati na etumbelo ya bibende mpo na kolamba yango, ndenge wana mpe Ngai nakosangisa bino na kanda mpe na kotomboka na Ngai, mpe nakobwaka bino kati na engumba mpo na kozikisa bino.
וכנסתי אתכם ונפחתי עליכם באש עברתי ונתכתם בתוכה׃ | 21 |
Nakosangisa bino mpe nakofula bino mopepe ya moto ya kanda na Ngai; bongo nakozikisa bino kati na Yelusalemi.
כהתוך כסף בתוך כור כן תתכו בתוכה וידעתם כי אני יהוה שפכתי חמתי עליכם׃ | 22 |
Ndenge bazikisaka palata kati na etumbelo ya bibende, ndenge wana mpe nakozikisa bino kati na engumba. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe, nasopeli bino kanda na Ngai ya makasi. › »
ויהי דבר יהוה אלי לאמר׃ | 23 |
Yawe alobaki na ngai lisusu:
בן אדם אמר לה את ארץ לא מטהרה היא לא גשמה ביום זעם׃ | 24 |
« Mwana na moto, loba na Yelusalemi: ‹ Ozali mabele oyo epetolamaki te mpe enokelaki mvula te na mokolo ya kanda na Ngai ya makasi. ›
קשר נביאיה בתוכה כארי שואג טרף טרף נפש אכלו חסן ויקר יקחו אלמנותיה הרבו בתוכה׃ | 25 |
Basakoli na yo bazali kosala likita; lokola nkosi oyo ezali koganga tango ezali kopasola nyama na yango, bazali koboma bato, kobotola bomengo mpe biloko ya motuya ya bato mpe kokomisa ebele kati na yango, basi bakufisa mibali.
כהניה חמסו תורתי ויחללו קדשי בין קדש לחל לא הבדילו ובין הטמא לטהור לא הודיעו ומשבתותי העלימו עיניהם ואחל בתוכם׃ | 26 |
Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango.
שריה בקרבה כזאבים טרפי טרף לשפך דם לאבד נפשות למען בצע בצע׃ | 27 |
Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe.
ונביאיה טחו להם תפל חזים שוא וקסמים להם כזב אמרים כה אמר אדני יהוה ויהוה לא דבר׃ | 28 |
Basakoli na yango bazali kopakola misala na bango ya mabe potopoto ya pembe na nzela ya bimoniseli mpe masakoli ya lokuta; bazali koloba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi, › na tango Yawe alobi na Ye eloko moko te.
עם הארץ עשקו עשק וגזלו גזל ועני ואביון הונו ואת הגר עשקו בלא משפט׃ | 29 |
Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.
ואבקש מהם איש גדר גדר ועמד בפרץ לפני בעד הארץ לבלתי שחתה ולא מצאתי׃ | 30 |
Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te.
ואשפך עליהם זעמי באש עברתי כליתים דרכם בראשם נתתי נאם אדני יהוה׃ | 31 |
Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. »