< יחזקאל 20 >

ויהי בשנה השביעית בחמשי בעשור לחדש באו אנשים מזקני ישראל לדרש את יהוה וישבו לפני׃ 1
Na mokolo ya zomi, na sanza ya mitano ya mobu oyo ya sambo, ndambo ya bakambi ya Isalaele bayaki kotuna toli ya Yawe mpe bavandaki liboso na ngai.
ויהי דבר יהוה אלי לאמר׃ 2
Bongo, Yawe alobaki na ngai:
בן אדם דבר את זקני ישראל ואמרת אלהם כה אמר אדני יהוה הלדרש אתי אתם באים חי אני אם אדרש לכם נאם אדני יהוה׃ 3
« Mwana na moto, loba na bakambi ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, boyei solo kotuna toli epai na Ngai? Na Kombo na Ngai, nakomitika te ete botuna toli epai na Ngai, elobi Nkolo Yawe. ›
התשפט אתם התשפוט בן אדם את תועבת אבותם הודיעם׃ 4
Boni, mwana na moto, okosambisa bango? Okosambisa bango solo? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango
ואמרת אליהם כה אמר אדני יהוה ביום בחרי בישראל ואשא ידי לזרע בית יעקב ואודע להם בארץ מצרים ואשא ידי להם לאמר אני יהוה אלהיכם׃ 5
mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo oyo naponaki Isalaele, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, epai ya bakitani ya libota ya Jakobi ete nakomimonisa Ngai moko epai na bango kati na Ejipito, nalapaki ndayi mpe nayebisaki bango: ‘Nazali Yawe, Nzambe na bino.’
ביום ההוא נשאתי ידי להם להוציאם מארץ מצרים אל ארץ אשר תרתי להם זבת חלב ודבש צבי היא לכל הארצות׃ 6
Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko.
ואמר אלהם איש שקוצי עיניו השליכו ובגלולי מצרים אל תטמאו אני יהוה אלהיכם׃ 7
Nalobaki na bango: ‘Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito! Nazali Yawe, Nzambe na bino.’
וימרו בי ולא אבו לשמע אלי איש את שקוצי עיניהם לא השליכו ואת גלולי מצרים לא עזבו ואמר לשפך חמתי עליהם לכלות אפי בהם בתוך ארץ מצרים׃ 8
Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito.
ואעש למען שמי לבלתי החל לעיני הגוים אשר המה בתוכם אשר נודעתי אליהם לעיניהם להוציאם מארץ מצרים׃ 9
Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito.
ואוציאם מארץ מצרים ואבאם אל המדבר׃ 10
Yango wana nabimisaki bango na Ejipito mpe namemaki bango na esobe.
ואתן להם את חקותי ואת משפטי הודעתי אותם אשר יעשה אותם האדם וחי בהם׃ 11
Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango.
וגם את שבתותי נתתי להם להיות לאות ביני וביניהם לדעת כי אני יהוה מקדשם׃ 12
Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango.
וימרו בי בית ישראל במדבר בחקותי לא הלכו ואת משפטי מאסו אשר יעשה אתם האדם וחי בהם ואת שבתתי חללו מאד ואמר לשפך חמתי עליהם במדבר לכלותם׃ 13
Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.
ואעשה למען שמי לבלתי החל לעיני הגוים אשר הוצאתים לעיניהם׃ 14
Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.
וגם אני נשאתי ידי להם במדבר לבלתי הביא אותם אל הארץ אשר נתתי זבת חלב ודבש צבי היא לכל הארצות׃ 15
Kati na esobe, nalapaki lisusu ndayi, na kotombola loboko, ete nakokotisa bango lisusu te na mokili oyo nabongiselaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko;
יען במשפטי מאסו ואת חקותי לא הלכו בהם ואת שבתותי חללו כי אחרי גלוליהם לבם הלך׃ 16
pamba te babwakaki mibeko na Ngai, batosaki bikateli na Ngai te mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba: mitema na bango ekangamaki na banzambe na bango ya bikeko.
ותחס עיני עליהם משחתם ולא עשיתי אותם כלה במדבר׃ 17
Kasi lokola natalaki bango na liso ya mawa, yango wana nabebisaki bango te mpe nasilisaki koboma bango te kati na esobe.
ואמר אל בניהם במדבר בחוקי אבותיכם אל תלכו ואת משפטיהם אל תשמרו ובגלוליהם אל תטמאו׃ 18
Nalobaki na bana na bango kati na esobe: ‘Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko!
אני יהוה אלהיכם בחקותי לכו ואת משפטי שמרו ועשו אותם׃ 19
Nazali Yawe, Nzambe na bino. Bolanda bikateli na Ngai mpe bobatela na bokebi mibeko na Ngai.
ואת שבתותי קדשו והיו לאות ביני וביניכם לדעת כי אני יהוה אלהיכם׃ 20
Bobulisa mikolo na Ngai ya Saba mpo ete ezala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bino.’
וימרו בי הבנים בחקותי לא הלכו ואת משפטי לא שמרו לעשות אותם אשר יעשה אותם האדם וחי בהם את שבתותי חללו ואמר לשפך חמתי עליהם לכלות אפי בם במדבר׃ 21
Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.
והשבתי את ידי ואעש למען שמי לבלתי החל לעיני הגוים אשר הוצאתי אותם לעיניהם׃ 22
Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito.
גם אני נשאתי את ידי להם במדבר להפיץ אתם בגוים ולזרות אותם בארצות׃ 23
Nzokande, kati na esobe, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopanza bango kati na bikolo mpe kati na mikili ya bapaya;
יען משפטי לא עשו וחקותי מאסו ואת שבתותי חללו ואחרי גלולי אבותם היו עיניהם׃ 24
pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango.
וגם אני נתתי להם חקים לא טובים ומשפטים לא יחיו בהם׃ 25
Mpe lisusu, Ngai moko napesaki bango bikateli ya malamu te mpe mibeko oyo epesaka bomoi te,
ואטמא אותם במתנותם בהעביר כל פטר רחם למען אשמם למען אשר ידעו אשר אני יהוה׃ 26
natikaki ete bamikomisa mbindo na nzela ya makabo na bango, mbeka ya mwana ya liboso nyonso, mpo ete natondisa bango na somo mpe bayeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
לכן דבר אל בית ישראל בן אדם ואמרת אליהם כה אמר אדני יהוה עוד זאת גדפו אותי אבותיכם במעלם בי מעל׃ 27
Yango wana, mwana na moto, loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ezalaki mpe kaka boye nde batata na bino bafingaki Ngai, wana batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai.
ואביאם אל הארץ אשר נשאתי את ידי לתת אותה להם ויראו כל גבעה רמה וכל עץ עבת ויזבחו שם את זבחיהם ויתנו שם כעס קרבנם וישימו שם ריח ניחוחיהם ויסיכו שם את נסכיהם׃ 28
Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga.
ואמר אלהם מה הבמה אשר אתם הבאים שם ויקרא שמה במה עד היום הזה׃ 29
Boye, natunaki bango: Esambelo ya likolo ya ngomba epai wapi bozali kokende elakisi nini? › Mpe babengaki yango, kino na mokolo ya lelo: ‹ Esambelo ya likolo ya ngomba. ›
לכן אמר אל בית ישראל כה אמר אדני יהוה הבדרך אבותיכם אתם נטמאים ואחרי שקוציהם אתם זנים׃ 30
Yango wana, loba na libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Boni, bomikomisi solo mbindo mpo na kolanda nzela ya batata na bino mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko?
ובשאת מתנתיכם בהעביר בניכם באש אתם נטמאים לכל גלוליכם עד היום ואני אדרש לכם בית ישראל חי אני נאם אדני יהוה אם אדרש לכם׃ 31
Tango bozali kobonza makabo na bino, mbeka ya bana na bino ya mibali na moto, bozali kokoba komikomisa mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko kino na mokolo ya lelo. Oh libota ya Isalaele; boni, namitika ete botuna toli epai na Ngai? Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakotika te ete botuna Ngai.
והעלה על רוחכם היו לא תהיה אשר אתם אמרים נהיה כגוים כמשפחות הארצות לשרת עץ ואבן׃ 32
Bozali koloba: ‘Tolingi kozala lokola bato ya bikolo mosusu, lokola bituka ya mikili mosusu; tolingi na biso kosalaka mpo na banzete mpe mabanga.’ Kasi eloko oyo bozali kokanisa ekosalema te.
חי אני נאם אדני יהוה אם לא ביד חזקה ובזרוע נטויה ובחמה שפוכה אמלוך עליכם׃ 33
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakokonza bino, na nguya ya loboko na Ngai, oyo esembolama, mpe na kanda makasi;
והוצאתי אתכם מן העמים וקבצתי אתכם מן הארצות אשר נפוצתם בם ביד חזקה ובזרוע נטויה ובחמה שפוכה׃ 34
nakozongisa bino wuta na bikolo ya bapaya mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana, na nguya ya loboko na Ngai oyo esembolama mpe na kanda makasi.
והבאתי אתכם אל מדבר העמים ונשפטתי אתכם שם פנים אל פנים׃ 35
Nakomema bino na esobe ya bikolo, mpe kuna, tokotalana na miso mpe nakopesa bino etumbu.
כאשר נשפטתי את אבותיכם במדבר ארץ מצרים כן אשפט אתכם נאם אדני יהוה׃ 36
Nakopesa bino etumbu ndenge napesaki batata na bino etumbu na esobe ya mokili ya Ejipito, elobi Nkolo Yawe.
והעברתי אתכם תחת השבט והבאתי אתכם במסרת הברית׃ 37
Nakobatela bino na se ya lingenda na Ngai mpe nakomema bino na mokili na Ngai ya boyokani.
וברותי מכם המרדים והפושעים בי מארץ מגוריהם אוציא אותם ואל אדמת ישראל לא יבוא וידעתם כי אני יהוה׃ 38
Nakolongola kati na bino bato oyo batombokelaka Ngai mpe bato oyo batelemelaka Ngai. Bongo nakobimisa bango na mokili oyo bazali kovanda lokola bapaya; kasi bakokota na mokili ya Isalaele te. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
ואתם בית ישראל כה אמר אדני יהוה איש גלוליו לכו עבדו ואחר אם אינכם שמעים אלי ואת שם קדשי לא תחללו עוד במתנותיכם ובגלוליכם׃ 39
Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko.
כי בהר קדשי בהר מרום ישראל נאם אדני יהוה שם יעבדני כל בית ישראל כלה בארץ שם ארצם ושם אדרוש את תרומתיכם ואת ראשית משאותיכם בכל קדשיכם׃ 40
Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule.
בריח ניחח ארצה אתכם בהוציאי אתכם מן העמים וקבצתי אתכם מן הארצות אשר נפצתם בם ונקדשתי בכם לעיני הגוים׃ 41
Nakoyamba bino malamu, lokola makabo ya solo kitoko, tango nakobimisa bino longwa na bikolo mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana. Mpe Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai kati na bino na miso ya bikolo.
וידעתם כי אני יהוה בהביאי אתכם אל אדמת ישראל אל הארץ אשר נשאתי את ידי לתת אותה לאבותיכם׃ 42
Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakokotisa bino na mokili ya Isalaele, mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa epai ya batata na bino.
וזכרתם שם את דרכיכם ואת כל עלילותיכם אשר נטמאתם בם ונקטתם בפניכם בכל רעותיכם אשר עשיתם׃ 43
Mpe kuna, bokokanisa lisusu bizaleli na bino mpe misala na bino nyonso oyo na nzela na yango, bomikosaki mbindo mpe bokokoma komiyokela nkele likolo ya mabe nyonso oyo bosalaki.
וידעתם כי אני יהוה בעשותי אתכם למען שמי לא כדרכיכם הרעים וכעלילותיכם הנשחתות בית ישראל נאם אדני יהוה׃ 44
Bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakosalela bino makambo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, kasi kolanda te nzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mbindo, oh libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. › »
ויהי דבר יהוה אלי לאמר׃ 45
Yawe alobaki na ngai:
בן אדם שים פניך דרך תימנה והטף אל דרום והנבא אל יער השדה נגב׃ 46
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya sude, loba mpo na kotelemela etuka ya sude mpe sakola mpo na kotelemela zamba ya mokili ya sude.
ואמרת ליער הנגב שמע דבר יהוה כה אמר אדני יהוה הנני מצית בך אש ואכלה בך כל עץ לח וכל עץ יבש לא תכבה להבת שלהבת ונצרבו בה כל פנים מנגב צפונה׃ 47
Loba na zamba ya mokili ya sude: ‹ Yoka Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakopelisa moto kati na yo, mpe ekotumba banzete na yo nyonso, ezala banzete ya mobesu to ya kokawuka. Moto yango ya makasi ekotikala kokufa te mpe ekotumba bilongi nyonso, wuta na nor kino na sude.
וראו כל בשר כי אני יהוה בערתיה לא תכבה׃ 48
Bato nyonso bakomona ete ezali Ngai Yawe nde napelisi yango; mpe ekotikala kokufa te. › »
ואמר אהה אדני יהוה המה אמרים לי הלא ממשל משלים הוא׃ 49
Bongo nalobaki: « Ah! Nkolo Yawe, bazali kotonga ngai: ‹ Ezali ye te oyo alobaka na masese? › »

< יחזקאל 20 >