< יחזקאל 15 >
ויהי דבר יהוה אלי לאמר׃ | 1 |
Yawe alobaki na ngai:
בן אדם מה יהיה עץ הגפן מכל עץ הזמורה אשר היה בעצי היער׃ | 2 |
« Mwana na moto, nzete ya vino eleki banzete mosusu na nini? Bitape na yango eleki bitape ya banzete mosusu ya zamba na nini?
היקח ממנו עץ לעשות למלאכה אם יקחו ממנו יתד לתלות עליו כל כלי׃ | 3 |
Bakoki solo kobimisa libaya na nzete ya vino mpe kosalela yango eloko ya tina penza? Bakoki solo kosalela yango bisimbelo ya kotiela biloko likolo?
הנה לאש נתן לאכלה את שני קצותיו אכלה האש ותוכו נחר היצלח למלאכה׃ | 4 |
Sima na kobwaka yango na moto, moto ezikisaka basonge mpe kati na yango; boye ndenge nini bakoki kosalela yango penza eloko ya malonga?
הנה בהיותו תמים לא יעשה למלאכה אף כי אש אכלתהו ויחר ונעשה עוד למלאכה׃ | 5 |
Soki kutu bakoki kosalela yango eloko ya malonga te tango ezali nanu mobimba, bongo ndenge nini bakoki kosalela yango eloko ya malonga tango moto esili kozikisa mpe kotumba yango?
לכן כה אמר אדני יהוה כאשר עץ הגפן בעץ היער אשר נתתיו לאש לאכלה כן נתתי את ישבי ירושלם׃ | 6 |
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Ndenge nabwakaka na moto nzete ya vino kati na banzete mosusu ya zamba, ndenge wana mpe nakosala bavandi ya Yelusalemi.
ונתתי את פני בהם מהאש יצאו והאש תאכלם וידעתם כי אני יהוה בשומי את פני בהם׃ | 7 |
Nakotelemela bango penza; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu:
ונתתי את הארץ שממה יען מעלו מעל נאם אדני יהוה׃ | 8 |
Nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te mpo ete batambolaki na boyengebene te, basalaki makambo ya nkele elobi Nkolo Yawe. »