< שמות 39 >

ומן התכלת והארגמן ותולעת השני עשו בגדי שרד לשרת בקדש ויעשו את בגדי הקדש אשר לאהרן כאשר צוה יהוה את משה׃ 1
Batongaki na langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe kati na Mongombo; batongaki mpe bilamba ya bule mpo na Aron, ndenge kaka Yawe atindaki yango na Moyize.
ויעש את האפד זהב תכלת וארגמן ותולעת שני ושש משזר׃ 2
Betisaleyeli atongaki efode ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango; asalaki yango kitoko penza.
וירקעו את פחי הזהב וקצץ פתילם לעשות בתוך התכלת ובתוך הארגמן ובתוך תולעת השני ובתוך השש מעשה חשב׃ 3
Batandaki mabende mike-mike ya wolo, bakataki-kataki yango lokola basinga mpe bakotisaki kati na langi ya ble mpe ya motane ya pete, langi ya motane makasi mpe lino ya kitoko; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
כתפת עשו לו חברת על שני קצוותו חבר׃ 4
Atiaki bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango; bankamba elekaki likolo ya mapeka.
וחשב אפדתו אשר עליו ממנו הוא כמעשהו זהב תכלת וארגמן ותולעת שני ושש משזר כאשר צוה יהוה את משה׃ 5
Mokaba ya efode esalemaki lolenge moko na efode: ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
ויעשו את אבני השהם מסבת משבצת זהב מפתחת פתוחי חותם על שמות בני ישראל׃ 6
Abongisaki mabanga ya onikisi, mpe bakangaki yango na bikangelo ya wolo; akomaki likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele, ndenge basalaka bililingi na kashe.
וישם אתם על כתפת האפד אבני זכרון לבני ישראל כאשר צוה יהוה את משה׃ 7
Atiaki yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
ויעש את החשן מעשה חשב כמעשה אפד זהב תכלת וארגמן ותולעת שני ושש משזר׃ 8
Betisaleyeli asalaki elamba ya tolo; esalemaki kitoko penza. Atongaki yango ndenge moko na efode: ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
רבוע היה כפול עשו את החשן זרת ארכו וזרת רחבו כפול׃ 9
Agumbaki yango na biteni mibale; molayi mpe mokuse ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mibale na mitano.
וימלאו בו ארבעה טורי אבן טור אדם פטדה וברקת הטור האחד׃ 10
Atiaki milongo minei ya mabanga ya talo na likolo ya elamba ya tolo: na molongo ya liboso, libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode.
והטור השני נפך ספיר ויהלם׃ 11
Na molongo ya mibale, libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama.
והטור השלישי לשם שבו ואחלמה׃ 12
Na molongo ya misato, libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite;
והטור הרביעי תרשיש שהם וישפה מוסבת משבצות זהב במלאתם׃ 13
na molongo ya minei, libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Akangaki mabanga yango na bikangelo ya wolo.
והאבנים על שמת בני ישראל הנה שתים עשרה על שמתם פתוחי חתם איש על שמו לשנים עשר שבט׃ 14
Mabanga yango ezalaki zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakomaki kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale; bakomaki yango ndenge basalaka bililingi na kashe.
ויעשו על החשן שרשרת גבלת מעשה עבת זהב טהור׃ 15
Basalaki basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo; basalaki yango ndenge bakangaka suki ya maboko.
ויעשו שתי משבצת זהב ושתי טבעת זהב ויתנו את שתי הטבעת על שני קצות החשן׃ 16
Basalaki bikangelo mibale ya wolo mpe bapete mibale ya wolo mpe bakangisaki yango na basonge mibale ya elamba ya tolo.
ויתנו שתי העבתת הזהב על שתי הטבעת על קצות החשן׃ 17
Alekisaki basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo atiaki na basonge mibale ya elamba ya tolo.
ואת שתי קצות שתי העבתת נתנו על שתי המשבצת ויתנם על כתפת האפד אל מול פניו׃ 18
Akangisaki basonge mibale mosusu ya basheneti oyo mibale na bikangelo mibale oyo atiaki na bankamba ya efode; bankamba yango elekaki na liboso.
ויעשו שתי טבעת זהב וישימו על שני קצות החשן על שפתו אשר אל עבר האפד ביתה׃ 19
Asalaki lisusu bapete mibale ya wolo mpe atiaki yango na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode.
ויעשו שתי טבעת זהב ויתנם על שתי כתפת האפד מלמטה ממול פניו לעמת מחברתו ממעל לחשב האפד׃ 20
Asalaki bapete mosusu mibale ya wolo oyo atiaki na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode.
וירכסו את החשן מטבעתיו אל טבעת האפד בפתיל תכלת להית על חשב האפד ולא יזח החשן מעל האפד כאשר צוה יהוה את משה׃ 21
Akangisaki na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango. Asalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
ויעש את מעיל האפד מעשה ארג כליל תכלת׃ 22
Basalaki nzambala oyo ezalaki na se ya efode: ezalaki ya langi ya ble na mobimba na yango, mpe ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bilamba na maboko.
ופי המעיל בתוכו כפי תחרא שפה לפיו סביב לא יקרע׃ 23
Nzambala ezalaki na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto; batongaki pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te.
ויעשו על שולי המעיל רמוני תכלת וארגמן ותולעת שני משזר׃ 24
Na se mpe zingazinga ya nzambala, batiaki bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na singa ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
ויעשו פעמני זהב טהור ויתנו את הפעמנים בתוך הרמנים על שולי המעיל סביב בתוך הרמנים׃ 25
Basalaki na wolo ya peto bangonga ya mike-mike mpe batiaki yango kati na bagrenade, na se ya nzambala.
פעמן ורמן פעמן ורמן על שולי המעיל סביב לשרת כאשר צוה יהוה את משה׃ 26
Balandisaki yango boye: ngonga moko ya moke, grenade moko, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala mpo na mosala, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
ויעשו את הכתנת שש מעשה ארג לאהרן ולבניו׃ 27
Batongaki na lino ya kitoko, mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali, banzambala,
ואת המצנפת שש ואת פארי המגבעת שש ואת מכנסי הבד שש משזר׃ 28
bitendi ya lino ya kitoko mpo na moto, bikoti, bakaputula
ואת האבנט שש משזר ותכלת וארגמן ותולעת שני מעשה רקם כאשר צוה יהוה את משה׃ 29
mpe mikaba oyo batonga bililingi na likolo na yango na basinga ya lino ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
ויעשו את ציץ נזר הקדש זהב טהור ויכתבו עליו מכתב פתוחי חותם קדש ליהוה׃ 30
Basalaki na wolo ya peto medaye lokola elembo ya libulisi na ye epai na Yawe mpe bakomaki na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe: abulisama mpo na Yawe.
ויתנו עליו פתיל תכלת לתת על המצנפת מלמעלה כאשר צוה יהוה את משה׃ 31
Batiaki yango singa ya ble mpo na kokangisa yango na likolo ya kitendi ya moto, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
ותכל כל עבדת משכן אהל מועד ויעשו בני ישראל ככל אשר צוה יהוה את משה כן עשו׃ 32
Boye misala nyonso ya Mongombo, ya Ndako ya kapo ya Bokutani, esilaki. Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
ויביאו את המשכן אל משה את האהל ואת כל כליו קרסיו קרשיו בריחו ועמדיו ואדניו׃ 33
Bamemaki Mongombo epai ya Moyize, elongo na biloko na yango nyonso: ndako ya kapo mpe bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi mpe bivandelo na yango,
ואת מכסה עורת האילם המאדמים ואת מכסה ערת התחשים ואת פרכת המסך׃ 34
ezipelo ya poso ya meme oyo bapakola langi ya motane, ezipelo ya poso ya nyama ya ebale mpe barido,
את ארן העדת ואת בדיו ואת הכפרת׃ 35
Sanduku ya Litatoli, mabaya ya komemela yango mpe mofinuku na yango,
את השלחן את כל כליו ואת לחם הפנים׃ 36
mesa, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe;
את המנרה הטהרה את נרתיה נרת המערכה ואת כל כליה ואת שמן המאור׃ 37
etelemiselo ya minda, oyo basala na wolo ya peto, minda na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mafuta mpo na kopelisa minda yango,
ואת מזבח הזהב ואת שמן המשחה ואת קטרת הסמים ואת מסך פתח האהל׃ 38
etumbelo oyo esalema na wolo, mafuta ya epakolami, malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo,
את מזבח הנחשת ואת מכבר הנחשת אשר לו את בדיו ואת כל כליו את הכיר ואת כנו׃ 39
etumbelo esalema na bronze, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango,
את קלעי החצר את עמדיה ואת אדניה ואת המסך לשער החצר את מיתריו ויתדתיה ואת כל כלי עבדת המשכן לאהל מועד׃ 40
batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango, rido mpo na ekotelo ya lopango, basinga na yango, bapike na yango, bisalelo nyonso mpo na mosala ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,
את בגדי השרד לשרת בקדש את בגדי הקדש לאהרן הכהן ואת בגדי בניו לכהן׃ 41
bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali.
ככל אשר צוה יהוה את משה כן עשו בני ישראל את כל העבדה׃ 42
Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
וירא משה את כל המלאכה והנה עשו אתה כאשר צוה יהוה כן עשו ויברך אתם משה׃ 43
Moyize atalaki malamu misala yango mpe amonaki ete basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki. Boye Moyize apambolaki bango.

< שמות 39 >