< שמות 31 >

וידבר יהוה אל משה לאמר׃ 1
Yawe alobaki na Moyize:
ראה קראתי בשם בצלאל בן אורי בן חור למטה יהודה׃ 2
— Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda;
ואמלא אתו רוח אלהים בחכמה ובתבונה ובדעת ובכל מלאכה׃ 3
natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso;
לחשב מחשבת לעשות בזהב ובכסף ובנחשת׃ 4
mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze;
ובחרשת אבן למלאת ובחרשת עץ לעשות בכל מלאכה׃ 5
mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso.
ואני הנה נתתי אתו את אהליאב בן אחיסמך למטה דן ובלב כל חכם לב נתתי חכמה ועשו את כל אשר צויתך׃ 6
Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani. Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo:
את אהל מועד ואת הארן לעדת ואת הכפרת אשר עליו ואת כל כלי האהל׃ 7
Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku, mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo;
ואת השלחן ואת כליו ואת המנרה הטהרה ואת כל כליה ואת מזבח הקטרת׃ 8
mesa elongo na biloko na yango; etelemiselo ya minda, basala na wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, elongo na biloko na yango nyonso; etumbelo ya malasi,
ואת מזבח העלה ואת כל כליו ואת הכיור ואת כנו׃ 9
etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso; sani mpo na komipetola elongo na evandelo na yango;
ואת בגדי השרד ואת בגדי הקדש לאהרן הכהן ואת בגדי בניו לכהן׃ 10
bilamba ya mosala, bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron, bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe,
ואת שמן המשחה ואת קטרת הסמים לקדש ככל אשר צויתך יעשו׃ 11
mafuta ya epakolami mpe ansa ya solo kitoko mpo na Esika ya bule. Basengeli kosala yango ndenge kaka natindaki yo.
ויאמר יהוה אל משה לאמר׃ 12
Yawe alobaki na Moyize:
ואתה דבר אל בני ישראל לאמר אך את שבתתי תשמרו כי אות הוא ביני וביניכם לדרתיכם לדעת כי אני יהוה מקדשכם׃ 13
— Loba na bana ya Isalaele: « Bosengeli kobatela mikolo na Ngai ya Saba; ekozala elembo ya libela na libela kati na Ngai mpe bino, mpo ete boyeba ete ezali Ngai Yawe nde nabulisi bino.
ושמרתם את השבת כי קדש הוא לכם מחלליה מות יומת כי כל העשה בה מלאכה ונכרתה הנפש ההוא מקרב עמיה׃ 14
Lisusu, bokobatela mokolo ya Saba, pamba te ekozala mpo na bino mokolo ya bule. Moto nyonso oyo akobuka mobeko yango, basengeli koboma ye; mpe moto nyonso oyo akosala mosala ata ya lolenge nini na mokolo yango, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.
ששת ימים יעשה מלאכה וביום השביעי שבת שבתון קדש ליהוה כל העשה מלאכה ביום השבת מות יומת׃ 15
Bokosala mosala mikolo motoba, mpe mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya kopema, mokolo oyo ebulisami mpo na Yawe. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo ya Saba, basengeli koboma ye.
ושמרו בני ישראל את השבת לעשות את השבת לדרתם ברית עולם׃ 16
Bana ya Isalaele bakobatela mokolo ya Saba; bango mpe bakitani na bango bakotosa yango lokola boyokani ya libela na libela.
ביני ובין בני ישראל אות הוא לעלם כי ששת ימים עשה יהוה את השמים ואת הארץ וביום השביעי שבת וינפש׃ 17
Ekozala elembo kati na Ngai mpe bana ya Isalaele mpo na libela na libela, pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki likolo mpe mokili; bongo na mokolo ya sambo, akataki mosala mpe apemaki. »
ויתן אל משה ככלתו לדבר אתו בהר סיני שני לחת העדת לחת אבן כתבים באצבע אלהים׃ 18
Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.

< שמות 31 >