< שמות 3 >

ומשה היה רעה את צאן יתרו חתנו כהן מדין וינהג את הצאן אחר המדבר ויבא אל הר האלהים חרבה׃ 1
Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
וירא מלאך יהוה אליו בלבת אש מתוך הסנה וירא והנה הסנה בער באש והסנה איננו אכל׃ 2
Kuna, Anjelu ya Yawe abimelaki ye kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete. Moyize amonaki nzete moke yango kopela moto, kasi ezalaki kozika te.
ויאמר משה אסרה נא ואראה את המראה הגדל הזה מדוע לא יבער הסנה׃ 3
Moyize amilobelaki: « Tika ete nabaluka mpo ete natala emoniseli oyo ya kokamwa mpe nayeba mpo na nini nzete moke oyo ezali kozika te. »
וירא יהוה כי סר לראות ויקרא אליו אלהים מתוך הסנה ויאמר משה משה ויאמר הנני׃ 4
Tango Yawe amonaki ete Moyize azali kobaluka mpo na kotala, Nzambe abengaki ye wuta na nzete moke yango: — Moyize, Moyize! Moyize azongisaki: — Ngai oyo!
ויאמר אל תקרב הלם של נעליך מעל רגליך כי המקום אשר אתה עומד עליו אדמת קדש הוא׃ 5
Nzambe alobaki na ye: — Kopusana awa te, longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule.
ויאמר אנכי אלהי אביך אלהי אברהם אלהי יצחק ואלהי יעקב ויסתר משה פניו כי ירא מהביט אל האלהים׃ 6
Alobaki lisusu: — Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe.
ויאמר יהוה ראה ראיתי את עני עמי אשר במצרים ואת צעקתם שמעתי מפני נגשיו כי ידעתי את מכאביו׃ 7
Yawe alobaki: — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.
וארד להצילו מיד מצרים ולהעלתו מן הארץ ההוא אל ארץ טובה ורחבה אל ארץ זבת חלב ודבש אל מקום הכנעני והחתי והאמרי והפרזי והחוי והיבוסי׃ 8
Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
ועתה הנה צעקת בני ישראל באה אלי וגם ראיתי את הלחץ אשר מצרים לחצים אתם׃ 9
Sik’oyo, koganga ya bana ya Isalaele ekomi kino epai na Ngai mpe namoni ndenge nini bato ya Ejipito bazali konyokola bango.
ועתה לכה ואשלחך אל פרעה והוצא את עמי בני ישראל ממצרים׃ 10
Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito.
ויאמר משה אל האלהים מי אנכי כי אלך אל פרעה וכי אוציא את בני ישראל ממצרים׃ 11
Moyize alobaki na Nzambe: — Ngai nazali nani mpo ete nakende epai ya Faraon mpe mpo ete nabimisa bana ya Isalaele na Ejipito?
ויאמר כי אהיה עמך וזה לך האות כי אנכי שלחתיך בהוציאך את העם ממצרים תעבדון את האלהים על ההר הזה׃ 12
Nzambe alobaki: — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo: tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.
ויאמר משה אל האלהים הנה אנכי בא אל בני ישראל ואמרתי להם אלהי אבותיכם שלחני אליכם ואמרו לי מה שמו מה אמר אלהם׃ 13
Moyize alobaki na Nzambe: — Soki nakeyi epai ya bana ya Isalaele mpe nalobi na bango: « Nzambe ya bakoko na bino atindi ngai epai na bino, » bongo soki bango batuni ngai: « Kombo na Ye nani? » Nakoyebisa bango nini?
ויאמר אלהים אל משה אהיה אשר אהיה ויאמר כה תאמר לבני ישראל אהיה שלחני אליכם׃ 14
Nzambe alobaki na Moyize: — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele: « Nazali atindi ngai epai na bino. »
ויאמר עוד אלהים אל משה כה תאמר אל בני ישראל יהוה אלהי אבתיכם אלהי אברהם אלהי יצחק ואלהי יעקב שלחני אליכם זה שמי לעלם וזה זכרי לדר דר׃ 15
Nzambe alobaki lisusu na Moyize: — Loba na bana ya Isalaele: « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. »
לך ואספת את זקני ישראל ואמרת אלהם יהוה אלהי אבתיכם נראה אלי אלהי אברהם יצחק ויעקב לאמר פקד פקדתי אתכם ואת העשוי לכם במצרים׃ 16
Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango: « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi: ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › »
ואמר אעלה אתכם מעני מצרים אל ארץ הכנעני והחתי והאמרי והפרזי והחוי והיבוסי אל ארץ זבת חלב ודבש׃ 17
Mpe nalobi: « Nakolongola bino na minyoko ya Ejipito mpo na komema bino na mokili ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. »
ושמעו לקלך ובאת אתה וזקני ישראל אל מלך מצרים ואמרתם אליו יהוה אלהי העבריים נקרה עלינו ועתה נלכה נא דרך שלשת ימים במדבר ונזבחה ליהוה אלהינו׃ 18
Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye: « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. »
ואני ידעתי כי לא יתן אתכם מלך מצרים להלך ולא ביד חזקה׃ 19
Kasi nayebi ete mokonzi ya Ejipito akopesa bino te nzela ya kokende, ata soki amoni loboko na Ngai ya nguya.
ושלחתי את ידי והכיתי את מצרים בכל נפלאתי אשר אעשה בקרבו ואחרי כן ישלח אתכם׃ 20
Yango wana, nakosembola loboko na Ngai; nakobeta Ejipito na nzela ya bikamwa na Ngai nyonso oyo nakosala kati na yango. Sima na yango, mokonzi ya Ejipito akotika bino kokende.
ונתתי את חן העם הזה בעיני מצרים והיה כי תלכון לא תלכו ריקם׃ 21
Nakosala ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito mpo ete, tango bokolongwa, bokende maboko pamba te.
ושאלה אשה משכנתה ומגרת ביתה כלי כסף וכלי זהב ושמלת ושמתם על בניכם ועל בנתיכם ונצלתם את מצרים׃ 22
Mwasi nyonso akosenga epai ya moninga na ye mpe epai ya mwasi oyo avandi na ndako na ye: biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba. Bokopesa yango epai ya bana na bino ya mibali mpe ya basi mpo ete bamema. Na bongo nde bokosilisa biloko ya bato ya Ejipito.

< שמות 3 >