< שמות 27 >

ועשית את המזבח עצי שטים חמש אמות ארך וחמש אמות רחב רבוע יהיה המזבח ושלש אמות קמתו׃ 1
Okosala na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo: ekozala ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano; bongo bosanda na yango ekozala ya metele moko na basantimetele tuku mitano.
ועשית קרנתיו על ארבע פנתיו ממנו תהיין קרנתיו וצפית אתו נחשת׃ 2
Okosala maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko; mpe okobamba bronze na etumbelo.
ועשית סירתיו לדשנו ויעיו ומזרקתיו ומזלגתיו ומחתתיו לכל כליו תעשה נחשת׃ 3
Okosala na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto.
ועשית לו מכבר מעשה רשת נחשת ועשית על הרשת ארבע טבעת נחשת על ארבע קצותיו׃ 4
Okosala motalaka ya bronze mpo na etumbelo; okokangisa bapete minei ya bronze, na basonge nyonso minei ya motalaka.
ונתתה אתה תחת כרכב המזבח מלמטה והיתה הרשת עד חצי המזבח׃ 5
Okotia motalaka na se ya etumbelo, na bandelo na yango, mpo ete ekoma na kati-kati ya etumbelo.
ועשית בדים למזבח בדי עצי שטים וצפית אתם נחשת׃ 6
Okosala na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe okobamba yango bronze.
והובא את בדיו בטבעת והיו הבדים על שתי צלעת המזבח בשאת אתו׃ 7
Boye, mpo na komema etumbelo, bakokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo.
נבוב לחת תעשה אתו כאשר הראה אתך בהר כן יעשו׃ 8
Okosala etumbelo na mabaya; ekozala polele kati na yango. Okosala yango ndenge kaka balakisaki yo na ngomba.
ועשית את חצר המשכן לפאת נגב תימנה קלעים לחצר שש משזר מאה באמה ארך לפאה האחת׃ 9
Tala ndenge okotonga lopango ya Mongombo: ngambo ya sude oyo ekozala ya bametele pene tuku mitano na molayi, ekozipama na rido ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
ועמדיו עשרים ואדניהם עשרים נחשת ווי העמדים וחשקיהם כסף׃ 10
Makonzi na yango tuku mibale elongo na makolo na yango tuku mibale ekosalema na bronze; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ekozala ya palata.
וכן לפאת צפון בארך קלעים מאה ארך ועמדו עשרים ואדניהם עשרים נחשת ווי העמדים וחשקיהם כסף׃ 11
Ngambo ya nor ekozala na bametele pene tuku mitano na molayi. Ekozala mpe na barido, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ekozala na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ekozala ya palata.
ורחב החצר לפאת ים קלעים חמשים אמה עמדיהם עשרה ואדניהם עשרה׃ 12
Ngambo ya weste ya lopango ya Mongombo ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. Ekozala mpe na barido, makonzi zomi mpe makolo zomi.
ורחב החצר לפאת קדמה מזרחה חמשים אמה׃ 13
Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse.
וחמש עשרה אמה קלעים לכתף עמדיהם שלשה ואדניהם שלשה׃ 14
Ngambo moko ya ekuke ekozala na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
ולכתף השנית חמש עשרה קלעים עמדיהם שלשה ואדניהם שלשה׃ 15
Ngambo mosusu ya ekuke ekozala mpe na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
ולשער החצר מסך עשרים אמה תכלת וארגמן ותולעת שני ושש משזר מעשה רקם עמדיהם ארבעה ואדניהם ארבעה׃ 16
Mpo na ekuke ya lopango ya Mongombo, bongisa rido ya bametele pene zomi na molayi, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi; mpe ekosalema na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na makonzi minei mpe makolo minei; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.
כל עמודי החצר סביב מחשקים כסף וויהם כסף ואדניהם נחשת׃ 17
Makonzi nyonso oyo ekozala zingazinga ya lopango esengeli kozala na biloko na yango ya kosimbela, bibende na yango egumbama lokola ndobo, ya palata; mpe makolo na yango ya bronze.
ארך החצר מאה באמה ורחב חמשים בחמשים וקמה חמש אמות שש משזר ואדניהם נחשת׃ 18
Lopango ya Mongombo ekozala ya bametele tuku mitano na molayi, bametele tuku mibale na mitano na mokuse na ngambo moko na moko, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Barido na yango ekozala ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, mpe makolo na yango ekozala ya bronze.
לכל כלי המשכן בכל עבדתו וכל יתדתיו וכל יתדת החצר נחשת׃ 19
Biloko nyonso oyo bakosalela misala ya Mongombo, bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ekozala ya bronze.
ואתה תצוה את בני ישראל ויקחו אליך שמן זית זך כתית למאור להעלת נר תמיד׃ 20
Okopesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso.
באהל מועד מחוץ לפרכת אשר על העדת יערך אתו אהרן ובניו מערב עד בקר לפני יהוה חקת עולם לדרתם מאת בני ישראל׃ 21
Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele.

< שמות 27 >