< שמות 13 >

וידבר יהוה אל משה לאמר׃ 1
Yawe alobaki na Moyize:
קדש לי כל בכור פטר כל רחם בבני ישראל באדם ובבהמה לי הוא׃ 2
« Bulisela Ngai mwana mobali nyonso ya liboso kati na bana ya Isalaele; ezala moto to nyama, azali ya Ngai. »
ויאמר משה אל העם זכור את היום הזה אשר יצאתם ממצרים מבית עבדים כי בחזק יד הוציא יהוה אתכם מזה ולא יאכל חמץ׃ 3
Moyize alobaki na bato: « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire.
היום אתם יצאים בחדש האביב׃ 4
Bozali kobima nde lelo oyo, na sanza ya abibi.
והיה כי יביאך יהוה אל ארץ הכנעני והחתי והאמרי והחוי והיבוסי אשר נשבע לאבתיך לתת לך ארץ זבת חלב ודבש ועבדת את העבדה הזאת בחדש הזה׃ 5
Tango Yawe akokotisa yo na mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi, mokili oyo alakaki na batata na bino, na nzela ya ndayi, ete akopesa bino yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, okosala feti oyo na sanza oyo.
שבעת ימים תאכל מצת וביום השביעי חג ליהוה׃ 6
Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire; na mokolo ya sambo, bokosala feti mpo na Yawe.
מצות יאכל את שבעת הימים ולא יראה לך חמץ ולא יראה לך שאר בכל גבלך׃ 7
Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo, mpe eloko moko te oyo ezali na levire ekomonana kati na mokili na bino mobimba.
והגדת לבנך ביום ההוא לאמר בעבור זה עשה יהוה לי בצאתי ממצרים׃ 8
Na mokolo wana, bokoyebisa na bana na bino ya mibali: ‹ Nazali kosala molulu oyo mpo na kokanisa makambo oyo Yawe asalelaki ngai tango abimisaki ngai na Ejipito. ›
והיה לך לאות על ידך ולזכרון בין עיניך למען תהיה תורת יהוה בפיך כי ביד חזקה הוצאך יהוה ממצרים׃ 9
Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya.
ושמרת את החקה הזאת למועדה מימים ימימה׃ 10
Bokobatela mobu na mobu mibeko oyo na eleko na yango.
והיה כי יבאך יהוה אל ארץ הכנעני כאשר נשבע לך ולאבתיך ונתנה לך׃ 11
Tango Yawe akokotisa bino na mokili ya Kanana mpe akopesa bino yango ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai na bino,
והעברת כל פטר רחם ליהוה וכל פטר שגר בהמה אשר יהיה לך הזכרים ליהוה׃ 12
bokobonzela Ye bana mibali nyonso ya liboso: bana nyonso ya liboso ya banyama ekozala ya Yawe.
וכל פטר חמר תפדה בשה ואם לא תפדה וערפתו וכל בכור אדם בבניך תפדה׃ 13
Kasi soki mwana yango ya liboso ya nyama ezali mwana ya ane, bosengeli kobonza na esika na yango mwana meme; soki te, bokobuka yango kingo. Kasi bokosikola na mbongo mwana nyonso ya liboso kati na bana na bino ya mibali.
והיה כי ישאלך בנך מחר לאמר מה זאת ואמרת אליו בחזק יד הוציאנו יהוה ממצרים מבית עבדים׃ 14
Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino: ‹ Molulu oyo elakisi nini? › Bokoloba na bango: ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu.
ויהי כי הקשה פרעה לשלחנו ויהרג יהוה כל בכור בארץ מצרים מבכר אדם ועד בכור בהמה על כן אני זבח ליהוה כל פטר רחם הזכרים וכל בכור בני אפדה׃ 15
Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. ›
והיה לאות על ידכה ולטוטפת בין עיניך כי בחזק יד הוציאנו יהוה ממצרים׃ 16
Mpe yango ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino, pamba te Yawe abimisaki bino na Ejipito na nzela ya loboko na Ye ya nguya. »
ויהי בשלח פרעה את העם ולא נחם אלהים דרך ארץ פלשתים כי קרוב הוא כי אמר אלהים פן ינחם העם בראתם מלחמה ושבו מצרימה׃ 17
Tango Faraon atikaki bana ya Isalaele kokende, Nzambe amemaki bango te na nzela ya mboka ya Filisitia atako yango nde ezalaki mokuse, pamba te Nzambe amilobelaki: « Soki bakutani na bitumba, bakoyoka mawa na ndenge babimaki na Ejipito mpe bakoluka kozonga kuna. »
ויסב אלהים את העם דרך המדבר ים סוף וחמשים עלו בני ישראל מארץ מצרים׃ 18
Boye, Nzambe amemaki bato na nzela ya molayi, na nzela oyo ekenda na esobe, na ngambo ya ebale monene ya barozo. Bato ya Isalaele babimaki libanda ya Ejipito na molongo lokola mampinga ya basoda.
ויקח משה את עצמות יוסף עמו כי השבע השביע את בני ישראל לאמר פקד יפקד אלהים אתכם והעליתם את עצמתי מזה אתכם׃ 19
Moyize azwaki mikuwa ya Jozefi, pamba te Jozefi alapisaki bana ya Isalaele ndayi; alobaki: « Solo, Nzambe akozanga te kosunga bino, boye bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo mpe bokomema yango elongo na bino. »
ויסעו מסכת ויחנו באתם בקצה המדבר׃ 20
Tango balongwaki na Sukoti mpe batongaki molako na Etami, na mondelo ya esobe,
ויהוה הלך לפניהם יומם בעמוד ענן לנחתם הדרך ולילה בעמוד אש להאיר להם ללכת יומם ולילה׃ 21
Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi.
לא ימיש עמוד הענן יומם ועמוד האש לילה לפני העם׃ 22
Likonzi ya lipata na moyi to likonzi ya moto na butu elongwaki na esika na yango te liboso ya bana ya Isalaele.

< שמות 13 >