< דברים 6 >

וזאת המצוה החקים והמשפטים אשר צוה יהוה אלהיכם ללמד אתכם לעשות בארץ אשר אתם עברים שמה לרשתה׃ 1
Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango,
למען תירא את יהוה אלהיך לשמר את כל חקתיו ומצותיו אשר אנכי מצוך אתה ובנך ובן בנך כל ימי חייך ולמען יארכן ימיך׃ 2
mpo ete yo, bana na yo mpe bakitani na yo, botosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokozala na bomoi na kobatelaka bikateli na Ye nyonso mpe mibeko oyo napesi bino mpo ete bozala na bomoi molayi.
ושמעת ישראל ושמרת לעשות אשר ייטב לך ואשר תרבון מאד כאשר דבר יהוה אלהי אבתיך לך ארץ זבת חלב ודבש׃ 3
Oh Isalaele, yoka malamu! Senzela ete otosa yango mpo ete ozala malamu mpe bokoma ebele na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge Yawe Nzambe ya bakoko na bino alakaki bino.
שמע ישראל יהוה אלהינו יהוה אחד׃ 4
Isalaele, yoka malamu! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.
ואהבת את יהוה אלהיך בכל לבבך ובכל נפשך ובכל מאדך׃ 5
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso.
והיו הדברים האלה אשר אנכי מצוך היום על לבבך׃ 6
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo.
ושננתם לבניך ודברת בם בשבתך בביתך ובלכתך בדרך ובשכבך ובקומך׃ 7
Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
וקשרתם לאות על ידך והיו לטטפת בין עיניך׃ 8
Kanga yango na maboko na yo lokola bilembo mpe tia yango na elongi na yo lokola elembo.
וכתבתם על מזוזת ביתך ובשעריך׃ 9
Koma yango na makonzi ya ndako na yo mpe na bikuke na yo.
והיה כי יביאך יהוה אלהיך אל הארץ אשר נשבע לאבתיך לאברהם ליצחק וליעקב לתת לך ערים גדלת וטבת אשר לא בנית׃ 10
Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo alapelaki ndayi epai ya bakoko na yo, epai ya Abrayami, Izaki, mpe Jakobi mpo na kopesa yo bingumba ya minene mpe ya malamu oyo yo otongaki te,
ובתים מלאים כל טוב אשר לא מלאת וברת חצובים אשר לא חצבת כרמים וזיתים אשר לא נטעת ואכלת ושבעת׃ 11
bandako etonda na biloko ya malamu ya ndenge na ndenge oyo yo otiaki te, mabulu ya mayi oyo yo otimolaki te, bilanga ya vino mpe ya olive oyo yo olonaki te; boye tango okolia mpe okotonda;
השמר לך פן תשכח את יהוה אשר הוציאך מארץ מצרים מבית עבדים׃ 12
keba ete obosana Yawe te oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu.
את יהוה אלהיך תירא ואתו תעבד ובשמו תשבע׃ 13
Tosa Yawe, Nzambe na yo; salela kaka Ye mpe lapa ndayi na yo na Kombo na Ye.
לא תלכון אחרי אלהים אחרים מאלהי העמים אשר סביבותיכם׃ 14
Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo;
כי אל קנא יהוה אלהיך בקרבך פן יחרה אף יהוה אלהיך בך והשמידך מעל פני האדמה׃ 15
pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe ya zuwa, mpo ete asilikela yo te mpe abebisa yo te na mokili.
לא תנסו את יהוה אלהיכם כאשר נסיתם במסה׃ 16
Komeka te Yawe, Nzambe na yo, ndenge osalaki na Masa.
שמור תשמרון את מצות יהוה אלהיכם ועדתיו וחקיו אשר צוך׃ 17
Batela malamu mibeko, mitindo mpe bikateli ya Yawe, Nzambe na yo, oyo apesi yo.
ועשית הישר והטוב בעיני יהוה למען ייטב לך ובאת וירשת את הארץ הטבה אשר נשבע יהוה לאבתיך׃ 18
Sala oyo ezali alima mpe malamu na miso ya Yawe, mpo ete ozala moto ya esengo, mpo ete okota, mpe mpo ete okamata mokili ya malamu oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na yo na nzela ya ndayi,
להדף את כל איביך מפניך כאשר דבר יהוה׃ 19
na kobengana banguna na yo nyonso liboso na yo, ndenge Yawe alobaki.
כי ישאלך בנך מחר לאמר מה העדת והחקים והמשפטים אשר צוה יהוה אלהינו אתכם׃ 20
Na mikolo ekoya, soki mwana na yo ya mobali atuni yo: Mitindo, bikateli mpe mibeko oyo Yawe, Nzambe na biso, atinda yo, elingi kolakisa nini?
ואמרת לבנך עבדים היינו לפרעה במצרים ויוציאנו יהוה ממצרים ביד חזקה׃ 21
Okoloba na ye: Tozalaki bawumbu ya Faraon na Ejipito, kasi Yawe abimisaki biso na Ejipito na loboko na ye ya nguya.
ויתן יהוה אותת ומפתים גדלים ורעים במצרים בפרעה ובכל ביתו לעינינו׃ 22
Yawe asalaki na miso na biso bilembo minene mpe bikamwa, ya minene mpe ya somo na Ejipito, na Faraon mpe na ndako na ye mobimba.
ואותנו הוציא משם למען הביא אתנו לתת לנו את הארץ אשר נשבע לאבתינו׃ 23
Kasi abimisaki biso kuna mpo na kokotisa biso mpe kopesa biso mokili oyo alakaki na bakoko na biso na ndayi oyo alapaki.
ויצונו יהוה לעשות את כל החקים האלה ליראה את יהוה אלהינו לטוב לנו כל הימים לחיתנו כהיום הזה׃ 24
Yawe atindaki biso kotosa mibeko oyo nyonso mpe kobanga Yawe, Nzambe na biso, mpo ete tozala tango nyonso malamu mpe tozala na bomoi ndenge ezali lelo.
וצדקה תהיה לנו כי נשמר לעשות את כל המצוה הזאת לפני יהוה אלהינו כאשר צונו׃ 25
Mpe soki totosi malamu mibeko nyonso oyo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge atindaki biso, wana tokozala bato ya sembo.

< דברים 6 >