< דניאל 4 >

נבוכדנצר מלכא לכל עממיא אמיא ולשניא די דארין בכל ארעא שלמכון ישגא׃ 1
Mokonzi Nabukodonozori alobaki na bato ya bikolo, ya bamboka mpe ya nkota nyonso, oyo bavandaka na mokili mobimba: Natombeli bino kimia monene!
אתיא ותמהיא די עבד עמי אלהא עליא שפר קדמי להחויה׃ 2
Nazali na esengo ya koyebisa bino bikamwa mpe makambo minene oyo Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo asali mpo na ngai!
אתוהי כמה רברבין ותמהוהי כמה תקיפין מלכותה מלכות עלם ושלטנה עם דר ודר׃ 3
Bikamwa na Ye ezali solo minene,
אנה נבוכדנצר שלה הוית בביתי ורענן בהיכלי׃ 4
Ngai, Nabukodonozori, nazalaki na kimia mpe nazalaki kosepela na bomengo kati na ndako na ngai.
חלם חזית וידחלנני והרהרין על משכבי וחזוי ראשי יבהלנני׃ 5
Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai.
ומני שים טעם להנעלה קדמי לכל חכימי בבל די פשר חלמא יהודענני׃ 6
Boye, napesaki mitindo epai ya bato ya bwanya nyonso ya Babiloni ete baya liboso na ngai mpo na kolimbolela ngai ndoto yango.
באדין עללין חרטמיא אשפיא כשדיא וגזריא וחלמא אמר אנה קדמיהון ופשרה לא מהודעין לי׃ 7
Bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe bayaki epai na ngai, mpe nayebisaki bango ndoto yango; kasi bakokaki te kopesa ngai ndimbola na yango.
ועד אחרין על קדמי דניאל די שמה בלטשאצר כשם אלהי ודי רוח אלהין קדישין בה וחלמא קדמוהי אמרת׃ 8
Sima, Daniele ayaki liboso na ngai, mpe nayebisaki ye ndoto yango. Bazalaki kobenga ye Belitsatsari, kombo ya nzambe na ngai. Molimo ya banzambe ya bule ezalaki kati na ye.
בלטשאצר רב חרטמיא די אנה ידעת די רוח אלהין קדישין בך וכל רז לא אנס לך חזוי חלמי די חזית ופשרה אמר׃ 9
Nalobaki: — Belitsatsari, mokonzi ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, nayebi ete molimo ya banzambe ya bule ezali kati na yo, mpe ete mabombami moko te ezali pasi na kolimbola mpo na yo. Yoka ndoto oyo nalotaki mpe pesa ngai ndimbola na yango.
וחזוי ראשי על משכבי חזה הוית ואלו אילן בגוא ארעא ורומה שגיא׃ 10
Tala bimoniseli oyo namonaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai:
רבה אילנא ותקף ורומה ימטא לשמיא וחזותה לסוף כל ארעא׃ 11
Nzete yango ekolaki, ekomaki monene mpe makasi;
עפיה שפיר ואנבה שגיא ומזון לכלא בה תחתוהי תטלל חיות ברא ובענפוהי ידרון צפרי שמיא ומנה יתזין כל בשרא׃ 12
ezalaki na makasa kitoko mpe na bambuma ebele,
חזה הוית בחזוי ראשי על משכבי ואלו עיר וקדיש מן שמיא נחת׃ 13
Na emoniseli oyo nazwaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, namonaki anjelu moko, ye mosantu, kokita wuta na Lola.
קרא בחיל וכן אמר גדו אילנא וקצצו ענפוהי אתרו עפיה ובדרו אנבה תנד חיותא מן תחתוהי וצפריא מן ענפוהי׃ 14
Agangaki na mongongo makasi:
ברם עקר שרשוהי בארעא שבקו ובאסור די פרזל ונחש בדתאא די ברא ובטל שמיא יצטבע ועם חיותא חלקה בעשב ארעא׃ 15
Kasi tika ete mobimbi mpe misisa na yango etikala elala na mabele;
לבבה מן אנושא ישנון ולבב חיוה יתיהב לה ושבעה עדנין יחלפון עלוהי׃ 16
Tika ete motema na ye ya bomoto elongwa
בגזרת עירין פתגמא ומאמר קדישין שאלתא עד דברת די ינדעון חייא די שליט עליא במלכות אנושא ולמן די יצבא יתננה ושפל אנשים יקים עליה׃ 17
Ba-anjelu nde bazwi mokano wana; basantu nde bakati yango mpo ete bato ya bomoi bayeba ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya mokili ya bato, apesaka bokonzi na yango na moto nyonso oyo Ye alingi mpe azali na makoki ya kotombola kati na yango moto ya suka kati na bato. ›
דנה חלמא חזית אנה מלכא נבוכדנצר ואנתה בלטשאצר פשרא אמר כל קבל די כל חכימי מלכותי לא יכלין פשרא להודעתני ואנתה כהל די רוח אלהין קדישין בך׃ 18
Yango nde ndoto oyo ngai, mokonzi Nabukodonozori, nalotaki. Sik’oyo yo, Belitsatsari, yebisa ngai ndimbola na yango, pamba te moto moko te kati na bato ya bwanya ya mokili na ngai azalaki na makoki ya kolimbolela ngai yango. Nzokande yo, okokoka mpo ete ozali na molimo ya banzambe ya bule kati na yo. »
אדין דניאל די שמה בלטשאצר אשתומם כשעה חדה ורעינהי יבהלנה ענה מלכא ואמר בלטשאצר חלמא ופשרא אל יבהלך ענה בלטשאצר ואמר מראי חלמא לשנאיך ופשרה לעריך׃ 19
Bongo Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari atungisamaki makasi na mwa tango, mpe makanisi na ye ekomaki kobangisa ye. Mokonzi alobaki na ye: — Belitsatsari, tika ete ndoto oyo mpe ndimbola na yango ebangisa yo te!
אילנא די חזית די רבה ותקף ורומה ימטא לשמיא וחזותה לכל ארעא׃ 20
Belitsatsari azongisaki: — Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo!
ועפיה שפיר ואנבה שגיא ומזון לכלא בה תחתוהי תדור חיות ברא ובענפוהי ישכנן צפרי שמיא׃ 21
Nzete oyo omonaki, oyo ezalaki na makasa ya kitoko mpe bambuma ebele, oyo ezalaki kopesa bato nyonso bilei, oyo ezalaki kopesa pio na banyama ya zamba, oyo ezalaki kotikela bandeke ya likolo esika ya kotonga bazala na yango;
אנתה הוא מלכא די רבית ותקפת ורבותך רבת ומטת לשמיא ושלטנך לסוף ארעא׃ 22
nzete yango ezali yo, mokonzi! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.
ודי חזה מלכא עיר וקדיש נחת מן שמיא ואמר גדו אילנא וחבלוהי ברם עקר שרשוהי בארעא שבקו ובאסור די פרזל ונחש בדתאא די ברא ובטל שמיא יצטבע ועם חיות ברא חלקה עד די שבעה עדנין יחלפון עלוהי׃ 23
Mokonzi, omonaki anjelu moko, ye mosantu, kokita wuta na Lola mpe koloba: « Kweyisa nzete wana mpe boma yango, kasi tika mobimbi na yango mpe kanga yango minyololo ya bibende mpe ya bronze kati na matiti ya zamba, mpe tika ete misisa na yango etikala na se ya mabele! Tika ete mamwe epolisa yango mpe ebika lokola banyama ya zamba, kino mibu sambo ekoleka mpo na ye. »
דנה פשרא מלכא וגזרת עליא היא די מטת על מראי מלכא׃ 24
Oh mokonzi, tala ndimbola na yango; mpe ezali mokano ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo atombokeli nkolo na ngai:
ולך טרדין מן אנשא ועם חיות ברא להוה מדרך ועשבא כתורין לך יטעמון ומטל שמיא לך מצבעין ושבעה עדנין יחלפון עליך עד די תנדע די שליט עליא במלכות אנשא ולמן די יצבא יתננה׃ 25
« Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.
ודי אמרו למשבק עקר שרשוהי די אילנא מלכותך לך קימה מן די תנדע די שלטן שמיא׃ 26
Etinda ya kotika mobimbi ya nzete mpe misisa na yango elingi koloba ete bokonzi na yo ekozongela yo lisusu tango okondima ete Nzambe ya likolo azali Mokonzi ya bakonzi.
להן מלכא מלכי ישפר עליך וחטיך בצדקה פרק ועויתך במחן ענין הן תהוא ארכה לשלותך׃ 27
Yango wana, oh mokonzi, yamba na esengo toli oyo nakopesa yo: ‹ Tika masumu na yo mpe sala makambo oyo ezali sembo! Tika motema mabe mpe yokela babola mawa! Na bongo nde kimia mpe bomengo na yo ekowumela. › »
כלא מטא על נבוכדנצר מלכא׃ 28
Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori.
לקצת ירחין תרי עשר על היכל מלכותא די בבל מהלך הוה׃ 29
Sima na basanza zomi na mibale, wana mokonzi azalaki kotambola na veranda ya ndako ya bokonzi, na Babiloni,
ענה מלכא ואמר הלא דא היא בבל רבתא די אנה בניתה לבית מלכו בתקף חסני וליקר הדרי׃ 30
amilobelaki: « Boni! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai? »
עוד מלתא בפם מלכא קל מן שמיא נפל לך אמרין נבוכדנצר מלכא מלכותה עדת מנך׃ 31
Wana azalaki nanu komilobela, mongongo moko ewutaki na likolo, elobaki: — Tala makambo oyo ekatami mpo na yo, mokonzi Nabukodonozori: « Nguya ya bokonzi elongwe na maboko na yo.
ומן אנשא לך טרדין ועם חיות ברא מדרך עשבא כתורין לך יטעמון ושבעה עדנין יחלפון עליך עד די תנדע די שליט עליא במלכות אנשא ולמן די יצבא יתננה׃ 32
Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba; okokoma kolia matiti lokola ngombe. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala oyo Ye alingi, na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. »
בה שעתא מלתא ספת על נבוכדנצר ומן אנשא טריד ועשבא כתורין יאכל ומטל שמיא גשמה יצטבע עד די שערה כנשרין רבה וטפרוהי כצפרין׃ 33
Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.
ולקצת יומיה אנה נבוכדנצר עיני לשמיא נטלת ומנדעי עלי יתוב ולעליא ברכת ולחי עלמא שבחת והדרת די שלטנה שלטן עלם ומלכותה עם דר ודר׃ 34
Na suka ya tango oyo esakolamaki, ngai Nabukodonozori, natombolaki miso na ngai na likolo, mpe mayele na ngai ezongelaki ngai. Nasanzolaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo, napesaki lokumu mpe nkembo epai na Ye oyo azali na bomoi tango nyonso:
וכל דארי ארעא כלה חשיבין וכמצביה עבד בחיל שמיא ודארי ארעא ולא איתי די ימחא בידה ויאמר לה מה עבדת׃ 35
Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye;
בה זמנא מנדעי יתוב עלי וליקר מלכותי הדרי וזוי יתוב עלי ולי הדברי ורברבני יבעון ועל מלכותי התקנת ורבו יתירה הוספת לי׃ 36
Kaka tango mayele na ngai ezongelaki ngai, lokumu mpe nkembo na ngai ezongelaki ngai mpo na nkembo ya bokonzi na ngai; bapesi toli na ngai mpe bato na ngai ya lokumu bakomaki koluka ngai mpe bazongiselaki ngai kiti na ngai ya bokonzi. Nakomaki lisusu na lokumu makasi koleka oyo nazalaki na yango liboso.
כען אנה נבוכדנצר משבח ומרומם ומהדר למלך שמיא די כל מעבדוהי קשט וארחתה דין ודי מהלכין בגוה יכל להשפלה׃ 37
Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.

< דניאל 4 >