< עמוס 8 >

כה הראני אדני יהוה והנה כלוב קיץ׃ 1
Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai: kitunga etonda na bambuma etela.
ויאמר מה אתה ראה עמוס ואמר כלוב קיץ ויאמר יהוה אלי בא הקץ אל עמי ישראל לא אוסיף עוד עבור לו׃ 2
Atunaki ngai: — Amosi, ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai: — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.
והילילו שירות היכל ביום ההוא נאם אדני יהוה רב הפגר בכל מקום השליך הס׃ 3
Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe. Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai mpe bakosalela bango matanga te.
שמעו זאת השאפים אביון ולשבית ענוי ארץ׃ 4
Boyoka makambo oyo, bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela mpe bonyataka babola kati na mokili.
לאמר מתי יעבר החדש ונשבירה שבר והשבת ונפתחה בר להקטין איפה ולהגדיל שקל ולעות מאזני מרמה׃ 5
Bozali koloba: « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.
לקנות בכסף דלים ואביון בעבור נעלים ומפל בר נשביר׃ 6
Tokosomba mobola na palata mpe moto akelela na motuya ya mapapa mibale, bongo tokoteka ata basalite ya ble.
נשבע יהוה בגאון יעקב אם אשכח לנצח כל מעשיהם׃ 7
Mpo na lolendo ya Jakobi, Yawe alapi ndayi na maloba oyo: « Nakobosana misala na bango ata moko te.
העל זאת לא תרגז הארץ ואבל כל יושב בה ועלתה כאר כלה ונגרשה ונשקה כיאור מצרים׃ 8
Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.
והיה ביום ההוא נאם אדני יהוה והבאתי השמש בצהרים והחשכתי לארץ ביום אור׃ 9
Na mokolo wana, » elobi Nkolo Yawe, « nakosala ete moyi elala na midi, mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.
והפכתי חגיכם לאבל וכל שיריכם לקינה והעליתי על כל מתנים שק ועל כל ראש קרחה ושמתיה כאבל יחיד ואחריתה כיום מר׃ 10
Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.
הנה ימים באים נאם אדני יהוה והשלחתי רעב בארץ לא רעב ללחם ולא צמא למים כי אם לשמע את דברי יהוה׃ 11
Na mikolo ekoya, » elobi Nkolo Yawe, « nakotinda nzala makasi kati na mokili; ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi, kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.
ונעו מים עד ים ומצפון ועד מזרח ישוטטו לבקש את דבר יהוה ולא ימצאו׃ 12
Bato bakotelengana na bibale nyonso, bakoyengayenga longwa na nor kino na este mpo na koluka Liloba na Yawe, kasi bakotikala komona yango te.
ביום ההוא תתעלפנה הבתולת היפות והבחורים בצמא׃ 13
Na mokolo wana, bilenge basi ya kitoko mpe mibali ya makasi bakokufa na posa ya mayi.
הנשבעים באשמת שמרון ואמרו חי אלהיך דן וחי דרך באר שבע ונפלו ולא יקומו עוד׃ 14
Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka: ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »

< עמוס 8 >