< עמוס 7 >

כה הראני אדני יהוה והנה יוצר גבי בתחלת עלות הלקש והנה לקש אחר גזי המלך׃ 1
Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai: Tango matiti ebandaki kobota, ebimisaki mabanki ebele. Esalemaki sima na kobuka milona ya mokonzi.
והיה אם כלה לאכול את עשב הארץ ואמר אדני יהוה סלח נא מי יקום יעקב כי קטן הוא׃ 2
Tango mabanki yango esilisaki kolia matiti nyonso ya mokili, nagangaki: — Oh Nkolo Yawe, limbisa bato na Yo! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika?
נחם יהוה על זאת לא תהיה אמר יהוה׃ 3
Boye, Yawe abongolaki makanisi na Ye mpe alobaki: — Makambo yango ekosalema te.
כה הראני אדני יהוה והנה קרא לרב באש אדני יהוה ותאכל את תהום רבה ואכלה את החלק׃ 4
Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai. Nkolo Yawe asalelaki moto mpo na kopesa etumbu, bongo moto yango ekawusaki mayi minene mpe ezikisaki mokili.
ואמר אדני יהוה חדל נא מי יקום יעקב כי קטן הוא׃ 5
Boye, nagangaki: — Oh Nkolo Yawe, nabondeli Yo, kosala boye te! Ndenge nini Jakobi oyo azali penza moke akoki solo kobika?
נחם יהוה על זאת גם היא לא תהיה אמר אדני יהוה׃ 6
Boye Yawe abongolaki makanisi na Ye. Mpe Nkolo Yawe alobaki: — Makambo yango ekosalema lisusu te.
כה הראני והנה אדני נצב על חומת אנך ובידו אנך׃ 7
Tala makambo oyo alakisaki ngai: Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka.
ויאמר יהוה אלי מה אתה ראה עמוס ואמר אנך ויאמר אדני הנני שם אנך בקרב עמי ישראל לא אוסיף עוד עבור לו׃ 8
Yawe atunaki ngai: — Amosi, ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona nivo oyo batongi ndako basalelaka. Nkolo alobaki na ngai: — Tala, nakotia nivo oyo batongi ndako basalelaka na likolo ya Isalaele, bato na Ngai. Nakolimbisa bango lisusu te.
ונשמו במות ישחק ומקדשי ישראל יחרבו וקמתי על בית ירבעם בחרב׃ 9
Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.
וישלח אמציה כהן בית אל אל ירבעם מלך ישראל לאמר קשר עליך עמוס בקרב בית ישראל לא תוכל הארץ להכיל את כל דבריו׃ 10
Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo: « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.
כי כה אמר עמוס בחרב ימות ירבעם וישראל גלה יגלה מעל אדמתו׃ 11
Pamba te, tala maloba oyo Amosi azali koloba: ‹ Jeroboami akokufa na mopanga, mpe Isalaele akokende na bowumbu, mosika ya mabele na ye. › »
ויאמר אמציה אל עמוס חזה לך ברח לך אל ארץ יהודה ואכל שם לחם ושם תנבא׃ 12
Amatsia alobaki na Amosi: — Yo, momoni makambo, bima na mokili na biso! Zonga na mokili ya Yuda. Kuna, okosala mbongo na masakoli na yo.
ובית אל לא תוסיף עוד להנבא כי מקדש מלך הוא ובית ממלכה הוא׃ 13
Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.
ויען עמוס ויאמר אל אמציה לא נביא אנכי ולא בן נביא אנכי כי בוקר אנכי ובולס שקמים׃ 14
Amosi azongiselaki Amatsia: — Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori.
ויקחני יהוה מאחרי הצאן ויאמר אלי יהוה לך הנבא אל עמי ישראל׃ 15
Kasi Yawe alongolaki ngai na mosala ya kobatela bibwele mpe alobaki na ngai: « Kende kosakola epai ya bato na Ngai, Isalaele. »
ועתה שמע דבר יהוה אתה אמר לא תנבא על ישראל ולא תטיף על בית ישחק׃ 16
Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai: « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki! »
לכן כה אמר יהוה אשתך בעיר תזנה ובניך ובנתיך בחרב יפלו ואדמתך בחבל תחלק ואתה על אדמה טמאה תמות וישראל גלה יגלה מעל אדמתו׃ 17
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi: « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »

< עמוס 7 >