< מַעֲשֵׂי הַשְּׁלִיחִים 8 >

ושאול גם הוא היה רצה בהרגתו ותהי ביום ההוא רדיפה גדולה על הקהלה אשר בירושלים ויפצו כלם בערי יהודה ושמרון לבד מן השליחים׃ 1
Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.
וישאו אנשים חסידים את אסטפנוס ויקברהו ויספדו עליו מספד גדול׃ 2
Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi.
ושאול החריב את הקהלה וישוטט בבתים ויסחב משם אנשים ונשים ויסגירם לכלא׃ 3
Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
והנפוצים עברו בארץ ויבשרו את הדבר׃ 4
Bandimi oyo bapalanganaki bazalaki koteya Liloba na Nzambe bisika nyonso bazalaki kokende.
ופילפוס ירד אל עיר שמרון ויכרז להם את המשיח׃ 5
Filipo akendeki na engumba moko ya Samari mpe, kuna, ateyaki Klisto.
ויקשב המון העם בלב אחד אל אמרי פילפוס בשמעם ובראותם את האתות אשר עשה׃ 6
Bongo tango ebele ya bato bayokaki mpe bamonaki bikamwa oyo asalaki, bakangamaki na makambo oyo Filipo azalaki koloba.
כי רבים היו אחוזי רוחות הטמאה והרוחות יצאו מהם צעקות בקול גדול ורבים נכי אברים ופסחים וירפאו׃ 7
Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki.
ותהי שמחה גדולה בעיר ההיא׃ 8
Boye, bato ya engumba yango batondisamaki na esengo makasi.
ואיש אחד ושמו שמעון היה מלפנים בעיר מכשף ומשמים את עם שמרון באמרו על נפשו כי גדול הוא׃ 9
Nzokande, wuta kala, kati na engumba yango, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona. » Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato ya Samari mpe komimona moto monene.
ויקשיבו אליו מקטנם ועד גדולם לאמר זה הוא גבורת האלהים הגדולה׃ 10
Bato nyonso, kobanda na bana mike kino na mikolo, bayokaki ye na bokebi mpe balobaki: « Moto oyo, azali penza nguya ya Nzambe, nguya oyo babengaka: Nguya monene. »
ויקשיבו אליו על היותו משמים אותם בכשפיו ימים רבים׃ 11
Bazalaki kolanda ye mpo ete, wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji.
ויהי כאשר האמינו לפילפוס בבשרו את מלכות האלהים ואת שם ישוע המשיח ויטבלו אנשים ונשים׃ 12
Kasi tango bandimaki Sango Malamu oyo Filipo ateyaki na tina na Bokonzi ya Nzambe mpe na tina na Kombo na Yesu-Klisto, mibali mpe basi bazwaki libatisi.
ויאמן שמעון גם הוא ויטבל וידבק בפילפוס וירא את האתות והמפתים הגדלים אשר נעשו וישתומם׃ 13
Simona mpe andimaki mpe azwaki libatisi; azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalema na miso na ye.
וישמעו השליחים אשר בירושלים כי קבלה שמרון את דבר האלהים וישלחו אליהם את פטרוס ואת יוחנן׃ 14
Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane.
וירדו שמה ויתפללו בעדם אשר יקבלו את רוח הקדש׃ 15
Tango bakomaki kuna, basambelaki mpo na bandimi ya sika mpo ete bazwa Molimo Mosantu,
כי הרוח לא צלחה עד עתה על אחד מהם והם רק נטבלים בשם האדון ישוע׃ 16
pamba te Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.
ויסמכו את ידיהם עליהם ויקבלו את רוח הקדש׃ 17
Bongo, Petelo mpe Yoane batielaki bango maboko, mpe bazwaki Molimo Mosantu.
ויהי בראות שמעון כי בסמיכות ידי השליחים נתן רוח הקדש ויבא לפניהם כסף׃ 18
Tango Simona amonaki ete bato oyo bandimaki bazwaki Molimo Mosantu, wana bantoma batielaki bango maboko, apesaki Petelo mpe Yoane mbongo;
ויאמר תנו נא גם לי את היכלת הזאת אשר יקבל את רוח הקדש כל אשר אשים עליו את ידי׃ 19
mpe alobaki: — Bopesa ngai mpe nguya oyo, mpo ete moto nyonso oyo nakotiela maboko akoka kozwa Molimo Mosantu.
ויאמר אליו פטרוס כספך יהי אתך לאבדון יען חשבת לקנות במחיר את מתת האלהים׃ 20
Kasi Petelo azongiselaki ye: — Mpo ete okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na nzela ya mbongo, tika ete yo mpe mbongo na yo bokufa!
אין לך חלק וגורל בדבר הזה כי לבבך איננו ישר לפני האלהים׃ 21
Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe.
ועתה שוב מרעתך זאת והתחנן אל האלהים אולי תסלח לך מזמת לבבך׃ 22
Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo.
כי ראה אנכי כי באת לידי מרורת רוש וחרצבות רשע׃ 23
Pamba te namoni ete motema na yo etondi na zuwa mpe ozali mowumbu ya masumu.
ויען שמעון ויאמר העתירו אתם בעדי אל יהוה לבלתי בוא עלי דבר מכל אשר אמריתם׃ 24
Simona azongisaki: — Bobondela Nkolo mpo na ngai mpo ete, kati na oyo bowuti koloba, eloko moko te ekomela ngai.
והמה אחרי אשר העידה ודברו את דבר יהוה שבו ירושלים ויבשרו את הבשורה בכפרים רבים אשר לשמרונים׃ 25
Sima na bango kotatola mpe kosakola Liloba na Nkolo, Petelo mpe Yoane bazongaki na Yelusalemi; na nzela, bazalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka ebele ya Samari.
וידבר מלאך יהוה אל פילפוס לאמר קום לך הנגבה על הדרך הירדת מירושלים עזתה והיא חרבה׃ 26
Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo: — Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza.
ויקם וילך והנה איש כושי והוא סריס ושליט לקנדק מלכת כוש וממנה על כל גנזיה אשר עלה אל ירושלים להשתחות׃ 27
Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki; na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, moto ya mboka Etiopi; azalaki kalaka moko ya lokumu mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mwasi mokonzi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kogumbamela;
ויהי בשובו והוא ישב על מרכבתו וקרא בספר ישעיה הנביא׃ 28
bongo wana azalaki kozonga na mboka na ye, azalaki ya kovanda kati na shar na ye mpe azalaki kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi.
ויאמר הרוח אל פילפוס גשה והלוה על המרכבה הזאת׃ 29
Molimo alobaki na Filipo: — Kende mpe pusana pene ya shar wana.
וירץ פילפוס אליה וישמע אתו קרא בספר ישעיה הנביא ויאמר הגם תבין את אשר אתה קורא׃ 30
Filipo akendeki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Filipo atunaki ye: — Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga?
ויאמר ואיככה אוכל אם אין איש אשר יורני ויבקש מאת פילפוס לעלות ולשבת אצלו׃ 31
Azongisaki: — Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te? Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.
וענין הכתוב אשר קרא זה הוא כשה לטבח יובל וכרחל לפני גוזזיה נאלמה ולא יפתח פיו׃ 32
Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga: « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.
בעצר משפטו לקח ואת דורו מי ישוחח כי נגזרו מארץ חייו׃ 33
Basambwisaki ye mpe baboyaki kolongisa ye. Nani akoyebisa bakitani na ye? Pamba te balongoli bomoi na ye na mokili. »
ויען הסריס ויאמר אל פילפוס אשאלה ממך על מי הנביא מדבר את זאת על נפשו או על איש אחר׃ 34
Bongo, soda oyo baboma nzoto ya mibali atunaki Filipo: — Nabondeli yo, yebisa ngai: mosakoli azali koloba makambo oyo na tina na nani? Azali koloba yango na tina na ye moko to na tina na moto mosusu?
ויפתח פילפוס את פיו ויחל מן הכתוב הזה ויבשר אותו את ישוע׃ 35
Filipo azwaki maloba mpe, na nzela ya eteni yango ya Makomi, ateyaki ye Sango Malamu ya Yesu.
ויהי בעברם בדרך ויבאו אל מקום מים ויאמר הסריס הנה מים מה ימנעני מהטבל׃ 36
Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki: — Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi? [
ויאמר פילפוס אם מאמין אתה בכל לבבך מתר לך ויען ויאמר אני מאמין כי ישוע המשיח בן האלהים הוא׃ 37
Filipo alobaki: — Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi. Moto yango azongisaki: — Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe!]
ויצו להעמיד את המרכבה וירדו שניהם אל תוך המים פילפוס והסריס ויטבל אותו׃ 38
Mbala moko, apesaki mitindo ete batelemisa shar. Bongo bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo, bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye.
ויהי כי עלו מן המים וישא רוח יהוה את פילפוס ולא יסף הסריס לראותו כי הלך לדרכו שמח׃ 39
Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te, kasi akobaki mobembo na ye na esengo.
ופילפוס נמצא באשדוד ויעבר ויבשר בכל הערים עד באו לקסרין׃ 40
Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.

< מַעֲשֵׂי הַשְּׁלִיחִים 8 >