< שמואל ב 9 >

ויאמר דוד הכי יש עוד אשר נותר לבית שאול ואעשה עמו חסד בעבור יהונתן׃ 1
Davidi atunaki: « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. »
ולבית שאול עבד ושמו ציבא ויקראו לו אל דוד ויאמר המלך אליו האתה ציבא ויאמר עבדך׃ 2
Nzokande, ezalaki na mosali moko ya ndako ya Saulo; kombo na ye « Tsiba. » Babengisaki ye mpo ete aya komimonisa liboso ya Davidi. Mpe mokonzi alobaki na ye: — Ezali yo Tsiba? Azongisaki: — Iyo, ezali ngai, mosali na yo.
ויאמר המלך האפס עוד איש לבית שאול ואעשה עמו חסד אלהים ויאמר ציבא אל המלך עוד בן ליהונתן נכה רגלים׃ 3
Mokonzi atunaki ye: — Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe? Tsiba azongiselaki mokonzi: — Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale.
ויאמר לו המלך איפה הוא ויאמר ציבא אל המלך הנה הוא בית מכיר בן עמיאל בלו דבר׃ 4
Mokonzi atunaki ye: — Azali wapi? Tsiba azongisaki: — Azali na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli, na mboka Lo-Debari.
וישלח המלך דוד ויקחהו מבית מכיר בן עמיאל מלו דבר׃ 5
Boye, mokonzi Davidi abengisaki ye wuta na Lo-Debari, na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli.
ויבא מפיבשת בן יהונתן בן שאול אל דוד ויפל על פניו וישתחו ויאמר דוד מפיבשת ויאמר הנה עבדך׃ 6
Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki: — Mefibosheti! Ye azongisaki: — Ngai oyo, mosali na yo.
ויאמר לו דוד אל תירא כי עשה אעשה עמך חסד בעבור יהונתן אביך והשבתי לך את כל שדה שאול אביך ואתה תאכל לחם על שלחני תמיד׃ 7
Davidi alobaki na ye: — Kobanga te! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.
וישתחו ויאמר מה עבדך כי פנית אל הכלב המת אשר כמוני׃ 8
Mefibosheti agumbamaki mpe alobaki: — Mosali na yo azali nani mpo ete otala mbwa ya kokufa lokola ngai?
ויקרא המלך אל ציבא נער שאול ויאמר אליו כל אשר היה לשאול ולכל ביתו נתתי לבן אדניך׃ 9
Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye: — Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye.
ועבדת לו את האדמה אתה ובניך ועבדיך והבאת והיה לבן אדניך לחם ואכלו ומפיבשת בן אדניך יאכל תמיד לחם על שלחני ולציבא חמשה עשר בנים ועשרים עבדים׃ 10
Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale.
ויאמר ציבא אל המלך ככל אשר יצוה אדני המלך את עבדו כן יעשה עבדך ומפיבשת אכל על שלחני כאחד מבני המלך׃ 11
Tsiba alobaki na mokonzi: — Mosali na yo akosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akotinda ye. Boye Mefibosheti aliaki na mesa ya Davidi lokola moko kati na bana mibali ya mokonzi.
ולמפיבשת בן קטן ושמו מיכא וכל מושב בית ציבא עבדים למפיבשת׃ 12
Mefibosheti azalaki na mwana mobali moko ya elenge; kombo na ye ezalaki « Mika. » Mpe bato nyonso ya libota ya Tsiba bazalaki basali ya Mefibosheti.
ומפיבשת ישב בירושלם כי על שלחן המלך תמיד הוא אכל והוא פסח שתי רגליו׃ 13
Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.

< שמואל ב 9 >