< שמואל ב 10 >

ויהי אחרי כן וימת מלך בני עמון וימלך חנון בנו תחתיו׃ 1
Sima na mwa tango, mokonzi ya bato ya Amoni akufaki, mpe mwana na ye ya mobali, Anuni, akitanaki na ye na bokonzi.
ויאמר דוד אעשה חסד עם חנון בן נחש כאשר עשה אביו עמדי חסד וישלח דוד לנחמו ביד עבדיו אל אביו ויבאו עבדי דוד ארץ בני עמון׃ 2
Davidi amilobelaki: « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, ndenge kaka tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. Tango basali ya Davidi bakomaki na mokili ya bato ya Amoni,
ויאמרו שרי בני עמון אל חנון אדניהם המכבד דוד את אביך בעיניך כי שלח לך מנחמים הלוא בעבור חקור את העיר ולרגלה ולהפכה שלח דוד את עבדיו אליך׃ 3
bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni, mokonzi na bango: « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo? Ezali mpo na kononga engumba mpe kobebisa yango nde Davidi atindi bango epai na yo? »
ויקח חנון את עבדי דוד ויגלח את חצי זקנם ויכרת את מדויהם בחצי עד שתותיהם וישלחם׃ 4
Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango kati-kati ya mandefu, akataki bango bilamba kino na loketo mpe abenganaki bango.
ויגדו לדוד וישלח לקראתם כי היו האנשים נכלמים מאד ויאמר המלך שבו בירחו עד יצמח זקנכם ושבתם׃ 5
Tango bayebisaki Davidi likambo yango, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bato wana, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo: « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota lisusu, sima nde bokozonga. »
ויראו בני עמון כי נבאשו בדוד וישלחו בני עמון וישכרו את ארם בית רחוב ואת ארם צובא עשרים אלף רגלי ואת מלך מעכה אלף איש ואיש טוב שנים עשר אלף איש׃ 6
Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo: epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.
וישמע דוד וישלח את יואב ואת כל הצבא הגברים׃ 7
Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko.
ויצאו בני עמון ויערכו מלחמה פתח השער וארם צובא ורחוב ואיש טוב ומעכה לבדם בשדה׃ 8
Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba mokonzi na bango. Na tango wana, bato ya Siri ya Tsoba mpe ya Reobi elongo na basoda ya Tobi mpe Maaka bazalaki na esika mosusu, kati na zamba.
וירא יואב כי היתה אליו פני המלחמה מפנים ומאחור ויבחר מכל בחורי בישראל ויערך לקראת ארם׃ 9
Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele oyo baleki na mpiko, mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri.
ואת יתר העם נתן ביד אבשי אחיו ויערך לקראת בני עמון׃ 10
Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni.
ויאמר אם תחזק ארם ממני והיתה לי לישועה ואם בני עמון יחזקו ממך והלכתי להושיע לך׃ 11
Joabi alobaki: « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakoya kosunga yo.
חזק ונתחזק בעד עמנו ובעד ערי אלהינו ויהוה יעשה הטוב בעיניו׃ 12
Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »
ויגש יואב והעם אשר עמו למלחמה בארם וינסו מפניו׃ 13
Bongo Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye.
ובני עמון ראו כי נס ארם וינסו מפני אבישי ויבאו העיר וישב יואב מעל בני עמון ויבא ירושלם׃ 14
Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi mpe bazongaki kati na engumba. Bongo, sima na Joabi kowuta kobundisa bato ya Amoni, azongaki na Yelusalemi.
וירא ארם כי נגף לפני ישראל ויאספו יחד׃ 15
Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basanganaki.
וישלח הדדעזר ויצא את ארם אשר מעבר הנהר ויבאו חילם ושובך שר צבא הדדעזר לפניהם׃ 16
Adadezeri atindaki bantoma kobenga bato ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale. Mpe bayaki na Elami. Tsobaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango.
ויגד לדוד ויאסף את כל ישראל ויעבר את הירדן ויבא חלאמה ויערכו ארם לקראת דוד וילחמו עמו׃ 17
Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele, akatisaki Yordani mpe akomaki na Elami. Bato ya Siri basalaki milongo liboso ya Davidi mpe babundisaki ye.
וינס ארם מפני ישראל ויהרג דוד מארם שבע מאות רכב וארבעים אלף פרשים ואת שובך שר צבאו הכה וימת שם׃ 18
Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki bampunda nkama sambo oyo ezalaki komema bashar mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda. Davidi abetaki mpe Tsobaki, mokonzi na bango ya mampinga, mpe akufaki wana.
ויראו כל המלכים עבדי הדדעזר כי נגפו לפני ישראל וישלמו את ישראל ויעבדום ויראו ארם להושיע עוד את בני עמון׃ 19
Tango bakonzi nyonso oyo bazalaki na se ya bokonzi ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na bato ya Isalaele mpe bakomaki kosalela Isalaele. Bongo bato ya Siri bakomaki kobanga kosunga bato ya Amoni.

< שמואל ב 10 >