< מלכים ב 1 >

ויפשע מואב בישראל אחרי מות אחאב׃ 1
Sima na kufa ya mokonzi Akabi, bato ya Moabi batombokelaki Isalaele.
ויפל אחזיה בעד השבכה בעליתו אשר בשמרון ויחל וישלח מלאכים ויאמר אלהם לכו דרשו בבעל זבוב אלהי עקרון אם אחיה מחלי זה׃ 2
Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango: — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.
ומלאך יהוה דבר אל אליה התשבי קום עלה לקראת מלאכי מלך שמרון ודבר אלהם המבלי אין אלהים בישראל אתם הלכים לדרש בבעל זבוב אלהי עקרון׃ 3
Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe: — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango: « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni?
ולכן כה אמר יהוה המטה אשר עלית שם לא תרד ממנה כי מות תמות וילך אליה׃ 4
Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi: ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › » Boye Eliya akendeki.
וישובו המלאכים אליו ויאמר אליהם מה זה שבתם׃ 5
Tango bantoma bazongaki epai ya mokonzi, atunaki bango: — Mpo na nini bozongi?
ויאמרו אליו איש עלה לקראתנו ויאמר אלינו לכו שובו אל המלך אשר שלח אתכם ודברתם אליו כה אמר יהוה המבלי אין אלהים בישראל אתה שלח לדרש בבעל זבוב אלהי עקרון לכן המטה אשר עלית שם לא תרד ממנה כי מות תמות׃ 6
Bazongisaki: — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso: « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye: Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali; okokufa solo. »
וידבר אלהם מה משפט האיש אשר עלה לקראתכם וידבר אליכם את הדברים האלה׃ 7
Mokonzi atunaki bango: — Moto oyo ayaki kokutana na bino mpe ayebisaki bino makambo oyo azalaki ndenge nini?
ויאמרו אליו איש בעל שער ואזור עור אזור במתניו ויאמר אליה התשבי הוא׃ 8
Bazongisaki: — Azalaki mobali moko alata bilamba ya poso ya nyama na loketo na ye. Mokonzi alobaki: — Ezalaki kaka Eliya, moto ya Tishibe.
וישלח אליו שר חמשים וחמשיו ויעל אליו והנה ישב על ראש ההר וידבר אליו איש האלהים המלך דבר רדה׃ 9
Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye: — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.
ויענה אליהו וידבר אל שר החמשים ואם איש אלהים אני תרד אש מן השמים ותאכל אתך ואת חמשיך ותרד אש מן השמים ותאכל אתו ואת חמשיו׃ 10
Kasi Eliya azongiselaki mokonzi yango ya basoda: — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo mpe bato na yo tuku mitano. Bongo moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi yango ya basoda elongo na basoda na ye tuku mitano.
וישב וישלח אליו שר חמשים אחר וחמשיו ויען וידבר אליו איש האלהים כה אמר המלך מהרה רדה׃ 11
Mokonzi atindaki lisusu epai ya Eliya mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda alobaki na Eliya: — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende noki epai na ye.
ויען אליה וידבר אליהם אם איש האלהים אני תרד אש מן השמים ותאכל אתך ואת חמשיך ותרד אש אלהים מן השמים ותאכל אתו ואת חמשיו׃ 12
Kasi Eliya azongiselaki mokonzi ya basoda: — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo elongo na bato na yo tuku mitano. Mbala moko moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye.
וישב וישלח שר חמשים שלשים וחמשיו ויעל ויבא שר החמשים השלישי ויכרע על ברכיו לנגד אליהו ויתחנן אליו וידבר אליו איש האלהים תיקר נא נפשי ונפש עבדיך אלה חמשים בעיניך׃ 13
Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye: — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo!
הנה ירדה אש מן השמים ותאכל את שני שרי החמשים הראשנים ואת חמשיהם ועתה תיקר נפשי בעיניך׃ 14
Nayebi ete moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki bakonzi nyonso mibale ya basoda elongo na basoda na bango oyo bayaki liboso; kasi sik’oyo, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya bato na ngai tuku mitano ezala na motuya na miso na yo!
וידבר מלאך יהוה אל אליהו רד אותו אל תירא מפניו ויקם וירד אותו אל המלך׃ 15
Anjelu ya Yawe alobaki na Eliya: — Kende na ye nzela moko; kobanga ye te. Bongo Eliya atelemaki mpe akendeki na ye nzela moko kino epai ya mokonzi.
וידבר אליו כה אמר יהוה יען אשר שלחת מלאכים לדרש בבעל זבוב אלהי עקרון המבלי אין אלהים בישראל לדרש בדברו לכן המטה אשר עלית שם לא תרד ממנה כי מות תמות׃ 16
Alobaki na mokonzi: Tala liloba oyo Yawe alobi: « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. »
וימת כדבר יהוה אשר דבר אליהו וימלך יהורם תחתיו בשנת שתים ליהורם בן יהושפט מלך יהודה כי לא היה לו בן׃ 17
Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi.
ויתר דברי אחזיהו אשר עשה הלוא המה כתובים על ספר דברי הימים למלכי ישראל׃ 18
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akazia mpe misala oyo asalaki ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.

< מלכים ב 1 >