< דברי הימים ב 21 >

וישכב יהושפט עם אבתיו ויקבר עם אבתיו בעיר דויד וימלך יהורם בנו תחתיו׃ 1
Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
ולו אחים בני יהושפט עזריה ויחיאל וזכריהו ועזריהו ומיכאל ושפטיהו כל אלה בני יהושפט מלך ישראל׃ 2
Tala bandeko mibali ya Yorami: Azaria, Yeyeli, Zakari, Azaria, Mikaeli mpe Shefatia. Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Jozafati, mokonzi ya Isalaele.
ויתן להם אביהם מתנות רבות לכסף ולזהב ולמגדנות עם ערי מצרות ביהודה ואת הממלכה נתן ליהורם כי הוא הבכור׃ 3
Tata na bango apesaki bango bakado ebele ya palata, ya wolo, ya biloko ya talo; apesaki bango lisusu bingumba batonga makasi kati na Yuda, kasi apesaki bokonzi epai ya Yorami mpo ete azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali.
ויקם יהורם על ממלכת אביו ויתחזק ויהרג את כל אחיו בחרב וגם משרי ישראל׃ 4
Tango Yorami azwaki bokonzi ya tata na ye mpe alendaki na bokonzi yango, abomaki na mopanga bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na ndambo ya bakambi ya Isalaele.
בן שלשים ושתים שנה יהורם במלכו ושמונה שנים מלך בירושלם׃ 5
Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi.
וילך בדרך מלכי ישראל כאשר עשו בית אחאב כי בת אחאב היתה לו אשה ויעש הרע בעיני יהוה׃ 6
Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana mwasi ya Akabi.
ולא אבה יהוה להשחית את בית דויד למען הברית אשר כרת לדויד וכאשר אמר לתת לו ניר ולבניו כל הימים׃ 7
Nzokande, Yawe alingaki te kobebisa libota ya Davidi, mpo na boyokani oyo Ye moko Yawe asalaki elongo na Davidi, mpe mpo ete alakaki kopesa mpo na libela bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye.
בימיו פשע אדום מתחת יד יהודה וימליכו עליהם מלך׃ 8
Na tango oyo Yorami azalaki na bokonzi, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi.
ויעבר יהורם עם שריו וכל הרכב עמו ויהי קם לילה ויך את אדום הסובב אליו ואת שרי הרכב׃ 9
Yorami akendeki kuna elongo na bakonzi na ye ya basoda mpe bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar.
ויפשע אדום מתחת יד יהודה עד היום הזה אז תפשע לבנה בעת ההיא מתחת ידו כי עזב את יהוה אלהי אבתיו׃ 10
Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokelaki Yorami, pamba te Yorami asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye.
גם הוא עשה במות בהרי יהודה ויזן את ישבי ירושלם וידח את יהודה׃ 11
Yorami atongaki kutu bisambelo ya likolo ya bangomba ya Yuda; atindikaki bato ya Yelusalemi na kosambela bikeko mpe apengwisaki Yuda.
ויבא אליו מכתב מאליהו הנביא לאמר כה אמר יהוה אלהי דויד אביך תחת אשר לא הלכת בדרכי יהושפט אביך ובדרכי אסא מלך יהודה׃ 12
Yorami azwaki mokanda kowuta na mosakoli Eliya; ezalaki koloba: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya mokonzi na yo Davidi, alobi: ‹ Lokola olandi te ndakisa ya Jozafati, tata na yo, mpe ya Asa, mokonzi ya Yuda,
ותלך בדרך מלכי ישראל ותזנה את יהודה ואת ישבי ירושלם כהזנות בית אחאב וגם את אחיך בית אביך הטובים ממך הרגת׃ 13
kasi olandi banzela ya bakonzi ya Isalaele, mpe otindiki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi na kosambela banzambe ya bikeko ndenge libota ya Akabi esalaki; lokola obomaki lisusu bandeko na yo ya mibali, bato ya ndako ya tata na yo, bato oyo bazalaki malamu koleka yo,
הנה יהוה נגף מגפה גדולה בעמך ובבניך ובנשיך ובכל רכושך׃ 14
Yawe alingi sik’oyo koboma, na nzela ya etumbu ya somo, bato na yo, bana na yo ya mibali, basi na yo mpe biloko na yo nyonso.
ואתה בחליים רבים במחלה מעיך עד יצאו מעיך מן החלי ימים על ימים׃ 15
Yo moko mpe okobela bokono ya makasi, bokono ya libumu oyo pasi na yango ekomata se komata mikolo nyonso kino kobimisa yo misopo na libanda. › »
ויער יהוה על יהורם את רוח הפלשתים והערבים אשר על יד כושים׃ 16
Yawe asalaki ete bato ya Filisitia mpe bato ya Arabi oyo bazalaki kovanda pembeni ya bato ya Kushi babundisa Yorami.
ויעלו ביהודה ויבקעוה וישבו את כל הרכוש הנמצא לבית המלך וגם בניו ונשיו ולא נשאר לו בן כי אם יהואחז קטן בניו׃ 17
Babundisaki Yuda, bakotaki kati na yango na makasi mpe bamemaki biloko nyonso oyo bamonaki kati na ndako ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali mpe basi na ye; mwana mobali moko kaka atikalaki: Yoakazi, mwana na ye ya suka.
ואחרי כל זאת נגפו יהוה במעיו לחלי לאין מרפא׃ 18
Sima na makambo oyo nyonso, Yawe atindelaki ye bokono ya libumu oyo esilaka te.
ויהי לימים מימים וכעת צאת הקץ לימים שנים יצאו מעיו עם חליו וימת בתחלאים רעים ולא עשו לו עמו שרפה כשרפת אבתיו׃ 19
Pasi na yango ezalaki mikolo nyonso komata se komata; mpe na suka ya mobu ya mibale, misopo ya Yorami ebimaki na libanda mpo na bokono mpe akufaki kati na pasi makasi. Bato na ye batumbaki te biloko ya solo kitoko mpo na kopesa ye lokumu ndenge basalaki mpo na batata na ye.
בן שלשים ושתים היה במלכו ושמונה שנים מלך בירושלם וילך בלא חמדה ויקברהו בעיר דויד ולא בקברות המלכים׃ 20
Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. Akendeki kaka ndenge wana, moto ata moko te ayokaki mawa. Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te.

< דברי הימים ב 21 >