< דברי הימים ב 20 >
ויהי אחריכן באו בני מואב ובני עמון ועמהם מהעמונים על יהושפט למלחמה׃ | 1 |
Sima na yango, bato ya Moabi mpe ya Amoni elongo na ndambo ya bato ya Maoni bayaki kobundisa Jozafati.
ויבאו ויגידו ליהושפט לאמר בא עליך המון רב מעבר לים מארם והנם בחצצון תמר היא עין גדי׃ | 2 |
Bongo sango ekomaki na matoyi ya Jozafati na maloba oyo: « Mampinga minene ezali koya kobundisa yo longwa na Siri mpe na ngambo mosusu ya ebale monene; esili kokoma na Atsatsoni-Tamari oyo babengaka Eyini-Gedi. »
וירא ויתן יהושפט את פניו לדרוש ליהוה ויקרא צום על כל יהודה׃ | 3 |
Jozafati abangaki makasi; azwaki mokano ya kotuna toli ya Yawe mpe akataki ete mokili mobimba ya Yuda ekila bilei.
ויקבצו יהודה לבקש מיהוה גם מכל ערי יהודה באו לבקש את יהוה׃ | 4 |
Bato ya Yuda oyo bawutaki na bingumba nyonso ya Yuda basanganaki mpo na koluka Yawe.
ויעמד יהושפט בקהל יהודה וירושלם בבית יהוה לפני החצר החדשה׃ | 5 |
Jozafati atelemaki kati na lisanga ya Yuda mpe ya Yelusalemi, kati na Tempelo ya Yawe, liboso ya lopango ya sika.
ויאמר יהוה אלהי אבתינו הלא אתה הוא אלהים בשמים ואתה מושל בכל ממלכות הגוים ובידך כח וגבורה ואין עמך להתיצב׃ | 6 |
Asambelaki: « Oh Yawe, Nzambe ya bakoko na biso! Ezali Yo te Nzambe oyo azali kati na likolo? Ezali Yo te oyo okonzaka bikolo nyonso ya mokili? Nguya mpe makasi ezali kati na loboko na Yo, mpe moko te akoki kotelemela Yo!
הלא אתה אלהינו הורשת את ישבי הארץ הזאת מלפני עמך ישראל ותתנה לזרע אברהם אהבך לעולם׃ | 7 |
Oh Nzambe na biso, ezali Yo te oyo obenganaki bavandi ya mokili oyo liboso ya Isalaele, bato na Yo, mpo na kopesa yango mpo na libela epai ya bakitani ya Abrayami, molingami na Yo?
וישבו בה ויבנו לך בה מקדש לשמך לאמר׃ | 8 |
Bavandaki mpe na mokili yango, batongaki awa Esika ya bule mpo na Yo, mpo na Kombo na Yo, na koloba:
אם תבוא עלינו רעה חרב שפוט ודבר ורעב נעמדה לפני הבית הזה ולפניך כי שמך בבית הזה ונזעק אליך מצרתנו ותשמע ותושיע׃ | 9 |
‹ Soki mabe moko ekomeli biso: bitumba, etumbu, bokono to nzala makasi, tokoya kotelema liboso ya Tempelo oyo mpe liboso na Yo, pamba te Kombo na Yo ezali kati na Tempelo oyo; mpe kati na pasi na biso, tokoganga epai na Yo; bongo Yo, okoyoka, okoyanola mpe okobikisa biso! ›
ועתה הנה בני עמון ומואב והר שעיר אשר לא נתתה לישראל לבוא בהם בבאם מארץ מצרים כי סרו מעליהם ולא השמידום׃ | 10 |
Sik’oyo, tala bato ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi ya etuka ya bangomba Seiri, ba-oyo na tina na bango, tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, opekisaki bana ya Isalaele kobotola mokili na bango; mpe mpo na yango, balekaki pembeni-pembeni ya mokili na bango mpe babomaki bango te!
והנה הם גמלים עלינו לבוא לגרשנו מירשתך אשר הורשתנו׃ | 11 |
Tala lolenge nini bazali kofuta biso: bayei kobundisa mpe kobengana biso na mabele oyo opesaki biso lokola libula!
אלהינו הלא תשפט בם כי אין בנו כח לפני ההמון הרב הזה הבא עלינו ואנחנו לא נדע מה נעשה כי עליך עינינו׃ | 12 |
Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. »
וכל יהודה עמדים לפני יהוה גם טפם נשיהם ובניהם׃ | 13 |
Bato nyonso ya Yuda elongo na mabota nyonso, basi mpe bana na bango, batelemaki liboso ya Yawe.
ויחזיאל בן זכריהו בן בניה בן יעיאל בן מתניה הלוי מן בני אסף היתה עליו רוח יהוה בתוך הקהל׃ | 14 |
Bongo Molimo na Yawe akitelaki, kati na lisanga, Yaazieli, mwana mobali ya Zakari, mwana ya mobali ya Benaya, mwana mobali ya Yeyeli mpe mwana mobali ya Matania, Molevi mpe moko kati na bakitani ya Azafi.
ויאמר הקשיבו כל יהודה וישבי ירושלם והמלך יהושפט כה אמר יהוה לכם אתם אל תיראו ואל תחתו מפני ההמון הרב הזה כי לא לכם המלחמה כי לאלהים׃ | 15 |
Yaazieli alobaki: « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino: ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe.
מחר רדו עליהם הנם עלים במעלה הציץ ומצאתם אתם בסוף הנחל פני מדבר ירואל׃ | 16 |
Lobi, bokende kobundisa bango. Bakomata ngomba Atsize, mpe bino bokokutana na bango na suka ya lubwaku, liboso ya esobe ya Yerueli.
לא לכם להלחם בזאת התיצבו עמדו וראו את ישועת יהוה עמכם יהודה וירושלם אל תיראו ואל תחתו מחר צאו לפניהם ויהוה עמכם׃ | 17 |
Bokobunda bitumba ata moke te: bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te! Lobi, bokende kokutana na bango; mpe Yawe akozala elongo na bino! › »
ויקד יהושפט אפים ארצה וכל יהודה וישבי ירושלם נפלו לפני יהוה להשתחות ליהוה׃ | 18 |
Jozafati agumbamaki elongi kino na mabele, mpe bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bafukamaki mpo na kogumbamela Yawe.
ויקמו הלוים מן בני הקהתים ומן בני הקרחים להלל ליהוה אלהי ישראל בקול גדול למעלה׃ | 19 |
Balevi kati na bato ya Keati mpe ya Kore batelemaki mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mongongo makasi.
וישכימו בבקר ויצאו למדבר תקוע ובצאתם עמד יהושפט ויאמר שמעוני יהודה וישבי ירושלם האמינו ביהוה אלהיכם ותאמנו האמינו בנביאיו והצליחו׃ | 20 |
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki: « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga! »
ויועץ אל העם ויעמד משררים ליהוה ומהללים להדרת קדש בצאת לפני החלוץ ואמרים הודו ליהוה כי לעולם חסדו׃ | 21 |
Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba: « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
ובעת החלו ברנה ותהלה נתן יהוה מארבים על בני עמון מואב והר שעיר הבאים ליהודה וינגפו׃ | 22 |
Tango kaka babandaki koyemba mpe kokumisa, Yawe atiaki mobulu kati na bato ya Amoni, ya Moabi mpe ya bangomba Seiri oyo bakotaki na Yuda, mpe babomanaki bango na bango.
ויעמדו בני עמון ומואב על ישבי הר שעיר להחרים ולהשמיד וככלותם ביושבי שעיר עזרו איש ברעהו למשחית׃ | 23 |
Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango.
ויהודה בא על המצפה למדבר ויפנו אל ההמון והנם פגרים נפלים ארצה ואין פליטה׃ | 24 |
Tango bato ya Yuda bayaki na esika ya kotalela esobe na mosika, batalaki na ngambo ya mampinga minene ya banguna mpe bamonaki kaka bibembe elali na mabele: moko te abikaki.
ויבא יהושפט ועמו לבז את שללם וימצאו בהם לרב ורכוש ופגרים וכלי חמדות וינצלו להם לאין משא ויהיו ימים שלושה בזזים את השלל כי רב הוא׃ | 25 |
Jozafati elongo na bato na ye bakendeki kozwa bomengo ya bitumba; mpe bamonaki bibembe ebele, biloko ebele, bilamba ebele mpe biloko ebele ya talo. Balokotaki biloko ebele oyo bakokaki ata komema te. Basalaki mikolo misato mpo na kozwa yango, pamba te bomengo ya bitumba ezalaki ebele penza.
וביום הרבעי נקהלו לעמק ברכה כי שם ברכו את יהוה על כן קראו את שם המקום ההוא עמק ברכה עד היום׃ | 26 |
Na mokolo ya minei, basanganaki na lubwaku ya Beraka epai wapi bapambolaki Yawe. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango lubwaku ya Beraka.
וישבו כל איש יהודה וירושלם ויהושפט בראשם לשוב אל ירושלם בשמחה כי שמחם יהוה מאויביהם׃ | 27 |
Na bokambami ya Jozafati, bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazongaki na esengo na Yelusalemi, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo wana akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
ויבאו ירושלם בנבלים ובכנרות ובחצצרות אל בית יהוה׃ | 28 |
Bakotaki na Yelusalemi na lokito ya makembe, ya mandanda mpe ya bakelelo, mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe.
ויהי פחד אלהים על כל ממלכות הארצות בשמעם כי נלחם יהוה עם אויבי ישראל׃ | 29 |
Somo ya Nzambe ekangaki bikolo nyonso ya mokili tango bayokaki sango ete Yawe abundisi banguna ya Isalaele.
ותשקט מלכות יהושפט וינח לו אלהיו מסביב׃ | 30 |
Bokonzi ya Jozafati ezwaki kimia, pamba te Nzambe na ye apesaki ye bopemi na bangambo nyonso.
וימלך יהושפט על יהודה בן שלשים וחמש שנה במלכו ועשרים וחמש שנה מלך בירושלם ושם אמו עזובה בת שלחי׃ | 31 |
Jozafati, mwana mobali ya Asa, akonzaki Yuda; azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Yuda, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili.
וילך בדרך אביו אסא ולא סר ממנה לעשות הישר בעיני יהוה׃ | 32 |
Jozafati alandaki nzela oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango; apengwaki na yango ata moke te mpe asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe.
אך הבמות לא סרו ועוד העם לא הכינו לבבם לאלהי אבתיהם׃ | 33 |
Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba; mpe bato babongisaki nanu te mitema na bango mpo na kokangama na Nzambe ya bakoko na bango.
ויתר דברי יהושפט הראשנים והאחרנים הנם כתובים בדברי יהוא בן חנני אשר העלה על ספר מלכי ישראל׃ | 34 |
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya Jewu, mwana mobali ya Anani; mpe masolo yango ezali kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
ואחריכן אתחבר יהושפט מלך יהודה עם אחזיה מלך ישראל הוא הרשיע לעשות׃ | 35 |
Sima na yango, Jozafati, mokonzi ya Yuda, asalaki boyokani elongo na Akazia, mokonzi ya Isalaele, oyo etamboli na ye ezalaki mabe na miso ya Nzambe.
ויחברהו עמו לעשות אניות ללכת תרשיש ויעשו אניות בעציון גבר׃ | 36 |
Basanganaki bango mibale mpo na kotonga bamasuwa oyo esengelaki kokende na Tarsisi. Sima na kotonga bamasuwa na Etsioni-Geberi,
ויתנבא אליעזר בן דדוהו ממרשה על יהושפט לאמר כהתחברך עם אחזיהו פרץ יהוה את מעשיך וישברו אניות ולא עצרו ללכת אל תרשיש׃ | 37 |
Eliezeri, mwana mobali ya Dodavawu, moto ya Maresha, asakolaki mpo na kotelemela Jozafati; alobaki: « Lokola osali boyokani elongo na Akazia, Yawe akobebisa misala na yo. » Mpe bamasuwa ebebaki mpe ekokaki lisusu te kokende na Tarsisi.