< 1 טימותי 5 >

אל תגער בזקן כי אם תזהירנו כאב לך ואת הצעירים כאחים׃ 1
Kogangela mobange te, kasi lendisa ye lokola nde azali tata na yo. Lendisa bilenge mibali lokola bandeko,
את הזקנות כאמות ואת הצעירות כאחיות ובכל טהרה׃ 2
bamama mibange lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi, na motema peto.
כבד את האלמנות אשר באמת אלמנות הנה׃ 3
Sunga malamu basi oyo bakufisa mibali, oyo bazali penza kokelela.
וכי יהיו לאלמנה בנים או בני בנים הם ילמדו לראשונה לעשות חסד עם ביתם ולשלם גמול לאבותם כי זה הוא טוב ורצוי לפני האלהים׃ 4
Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.
אבל האלמנה באמת אשר נשארה יחידה שמה אלהים מבטחה ומתמדת בתפלות ובתחנות לילה ויומם׃ 5
Mwasi akufisa mobali, oyo atikala penza ye moko mpe azali kokelela atiaka elikya na ye kati na Nzambe mpe asambelaka butu mpe moyi mpo na kosenga lisungi epai ya Nzambe.
אך המענגה מתה היא בחייה׃ 6
Kasi mwasi akufisa mobali, oyo amipesaka na bisengo azali ya kokufa atako azali na bomoi.
וזאת תצוה למען תהיינה בלא דפי׃ 7
Pesa bango malako yango mpo ete batambola na bomoi ezanga pamela.
אבל מי שלא יפרנס את קרוביו וביותר את בני ביתו כפר באמונה והוא גרוע מאשר איננו מאמין׃ 8
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
אלמנה אל תבחר זולתי בת ששים שנה ואשר היתה אשת איש אחד׃ 9
Mpo ete mwasi atangama na molongo ya basi bakufisa mibali, oyo Lingomba azali na mokumba ya kosunga, asengeli kozala na mibu tuku motoba ya mbotama to koleka, kozala mwasi ya makangu te,
ויש לה עדות על מעשיה הטובים שגדלה בנים והכניסה ארחים ירחצה את רגלי הקדשים ותמכה את העשוקים ורדפה כל מעשה טוב׃ 10
kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu: abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.
אבל האלמנות הצעירות אל תקבל כי בהטות יצרן את לבן מן המשיח חשקות הן להיות לאיש׃ 11
Kasi kotanga te bilenge basi bakufisa mibali na molongo ya basi bakufisa mibali; pamba te soki posa na bango ya nzoto elamuki mpe epengwisi bango na miso ya Klisto, bakoluka lisusu kobala,
ודינן עליהן כי בגדו באמונתן הראשונה׃ 12
mpe, likolo na yango, bakomema ngambo mpo ete balongisi te ekateli na bango ya liboso.
ועוד בהיותן עצלות למדו לשוטט מבית לבית ולא לבד עצלות כי אף מפטפטות ורדפות אחר חדשות ומדברות את אשר לא יתכן׃ 13
Mpe tina mosusu oyo okotanga bango te na molongo ya basi bakufisa mibali ezali ete bakokoma bagoyigoyi mpe bakokoma koyengayenga na bandako ya bato mosusu. Na bongo, bakokoma bagoyigoyi kaka te, kasi mpe bato na bilobaloba, bato na songisongi mpe bato oyo balobaka makambo oyo basengeli kutu koloba te.
על כן רצוני כי הצעירות תהיינה לאיש ללדת בנים ולהנהיג את בתיהן ולא לתת לאיב תאנה לחרף׃ 14
Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.
כי יש מהן אשר כבר סרו אחרי השטן׃ 15
Likambo ya pasi ezali ete mingi kati na bango basili kobunga nzela mpo na kolanda Satana.
בן אמונה או בת אמונה שיש להם אלמנות יעזרו אתן ולא תהיינה למשא על הקהל כדי שיוכל להספיק לאלה אשר הנה אלמנות באמת׃ 16
Soki, kati na Lingomba, ezali na mwasi mondimi oyo, kati na libota na ye, azali na basi bakufisa mibali, tika ete asunga bango; mpe tika ete Lingomba emema mokumba na bango te mpo ete ekoka kosunga basi bakufisa mibali, oyo basengeli penza na lisungi mpo ete bakelela.
הזקנים המיטיבים לנהל ראוים הם למשנה כבוד וביותר העמלים בדבר ובהוראה׃ 17
Bakambi oyo batambolisaka malamu misala ya Lingomba basengeli kozwa lifuti mbala mibale, mingi-mingi ba-oyo basalaka mosala ya kopanza Sango malamu mpe ya koteya.
כי הכתוב אמר לא תחסם שור בדישו ועוד נאמר הפעל שוה בשכרו׃ 18
Pamba te Makomi elobi: « Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma, » mpe « mosali asengeli na lifuti na ye. »
אל תקבל שטנה על הזקן בלתי אם על פי שנים או שלשה עדים׃ 19
Kondimaka te maloba ya moto oyo ayei ye moko kofunda mokambi ya Lingomba epai na yo; okondima ye kaka soki ayei elongo na bato mibale to misato lokola batatoli mpo na kolendisa bosolo ya likambo yango.
את החטאים תוכיח בפני כל למען ייראו גם האחרים׃ 20
Na miso ya bato nyonso, pamelaka bakambi oyo basali masumu mpo ete bato mosusu bakoma na botosi.
הנני מעיד בך נגד האלהים ואדנינו ישוע המשיח ונגד בחירי המלאכים אשר שמור תשמר את זאת בלי משפט נמהר ולא תעשה דבר במשא פנים׃ 21
Liboso ya Nzambe, ya Yesu-Klisto mpe ya ba-anjelu oyo baponama, napesi yo mokumba ya kobatela mitindo oyo na kozanga kopona bilongi.
אל תהי נמהר בסמיכת ידיך על אדם ולא תשתתף לחטאת אחרים שמר את נפשך בטהרה׃ 22
Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.
אל תרבה לשתות עוד מים כי אם קח מעט יין בעבור בטנך ואשר פעמים רבות חלה אתה׃ 23
Okomelaka mayi kaka te, kasi melaka mpe mwa masanga ya vino mpo ete esunga yo mpo na pasi na yo ya libumu mpe mpo na bokono oyo ozwaka mbala na mbala.
יש בני אדם אשר חטאתיהם גלויות ומקדימות לדין ויש מהם אשר הנה הלכות אחריהם׃ 24
Ezali na bato oyo masumu na bango emonanaka polele liboso ete basambisa bango, kasi masumu ya bamosusu emonanaka sima na tango.
וככה גם המעשים הטובים גלוים המה ואשר אינם כן לא יוכלו להסתר׃ 25
Ezali mpe ndenge moko mpo na misala malamu: emonanaka polele. Kasi misala oyo ekomonana polele te ekotikala ya kobombama te mpo na libela.

< 1 טימותי 5 >